Makomi
3 Nefi 18


Mokapo 18

Yesu abandisi elambo na kati ya Banefi—Batindami kosambela ntango nyonso na nkombo na Ye—Baye wana baliaka mosuni na Ye mpe bamelaka makila na Ye ntango balongobani te bakweisami—Bayekoli bazwi nguya ya kopesa Molimo Mosantu. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete Yesu atindaki bayekoli na ye ete bamema ndambo ya limpa mpe vinyo epayi na ye.

2 Mpe wana ekendaki bango mpo na koluka lipa mpe vinyo, atindaki ebele ya bato yango ete bafanda na nse likolo ya mabele.

3 Mpe ntango bayekoli bayaki na limpa mpe vinyo, akamataki lipa mpe akataki mpe apambolaki yango, mpe apesaki na bayekoli mpe atindaki ete balia.

4 Mpe ntango baliaki mpe batondaki, atindaki ete bapesa epayi na ngulupa bato.

5 Mpe ntango eliaki mpe etondaki ebele ya bato, alobaki epayi na bayekoli: Tala moto moko akokulisama na kati na bino, na ye nakopesa nguya ya kokata lipa, mpe ya kopambola yango mpe ya kopesa yango epayi ya bato ya eklezia na ngai, epayi na bango oyo bakondima mpe bakobatisama na nkombo na ngai.

6 Mpe oyo bokotosa kosala yango ntango nyonso, lokola nasali, kutu lokola nakati lipa mpe napamboli yango mpe napesi yango epayi na bino.

7 Mpe oyo bosalaka yango na bokundoli ya nzoto na ngai, oyo nalakisi epayi na bino. Mpe ekozala litatoli epayi ya tata ete bomikundolaka ngai ntango nyonso. Mpe soki bomikundoli ngai ntango nyonso, bokozwa Molimo na ngai mpo na kozala elongo na bino.

8 Mpe esalemaki ete ntango alobaki maloba oyo, atindaki bayekoli na ye ete bakamata ndambo ya vinyo mpe bamela ndambo na yango, mpe ete lisusu bapesa epayi na ebele ya bato oyo ete bakoka komela yango.

9 Mpe esalemaki ete basalaki bongo, mpe bamelaki yango mpe batondaki; mpe bapesaki epayi na ebele ya bato wana, mpe bamelaki mpe batondaki.

10 Mpe ntango bayekoli basalaki eye, Yesu alobaki epayi na bango: Bopambolami mpo na likambo oyo bosali, mpo oyo ekokisi mitindo na ngai, mpe oyo etatoli epayi ya tata ete bozali na bolingi ya kosala oyo natindi bino.

11 Mpe oyo bokosala yango ntango nyonso na baoyo bayamboli mpe babatisami na nkombo na ngai; mpe bokosala yango na bokundoli ya makila na ngai, oyo nasopi mpo na bino ete bokoka kotatola epayi ya Tata ete bomikundolaka ngai ntango nyonso. Mpe soki ntango nyonso bomikundolaka ngai, bokozwa Molimo na ngai mpo na kozala elongo na bino.

12 Mpe napesi epayi na bino motindo moko ete bosalaka makambo oyo. Mpe soki bokosala makambo oyo ntango nyonso, bopambolami, mpo botongami likolo ya libanga ya ngai.

13 Mpe nyonso oyo na kati na bino bakosala mingi soki te moke koleka makambo oyo batongami te likolo ya libanga ya ngai, kasi batongami likolo ya moboko moko ya zelo; mpe ntango mvula ekiti, mpe mpela eyei, mpe mipepe mifuli, mpe mibeti likolo na bango, bakokweya, mpe bikuke ya lifelo bibelemi kofungwana mpo na koyamba bango.

14 Boye bopambolami soki bobateli mitindo na ngai, oyo Tata atindi ngai ete napesa epayi na bino.

15 Solo, solo, nalobi epayi na bino, bosengeli kokengela mpe kosambela ntango nyonso, mbele bosenginiama na zabulu, mpe bomemama mosika lokola bakangemi na ye.

16 Mpe lokola nasambelaki na kati na bino, kutu bongo nde bokosambela kati na eklezia na ngai, na kati ya bato na ngai baoyo bayamboli mpe babatisami na nkombo na ngai. Tala nazali pole, natie ndakisa moko mpo na bino.

17 Mpe esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo epayi na bayekoli na ye, abalukaki lisusu epayi na ebele ya bato mpe alobelaki bango:

18 Tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, bosengeli kokengela mpe kosambela ntango nyonso, mbele bokota kati na masenginia; mpo Satana azali na mposa ya kozwa bino, ete ayungula bino lokola loso.

19 Boye bosengeli ntango nyonso kosambela epayi na Tata na nkombo na ngai;

20 Mpe oyo nyonso bokosenga Tata na nkombo na ngai, oyo ezali alima, kozalaka na bondimi ete bokozwa, tala ekopesama epayi na bino.

21 Bosambela epayi ya Tata kati na mabota na bino, ntango nyonso na nkombo na ngai, ete basi mpe bana na bino bakoka kopambolama.

22 Mpe tala, bokokutana esika moko mbala na mbala, mpe bokopekisa moto moko te koya epayi na bino ntango bokokutana esika moko, kasi bopesa nzela ete bakoka koya epayi na bino mpe bopekisa bango te.

23 Kasi bokosambela mpo na bango, mpe bokobengana bango te; mpe soki ezali bongo ete bayaka epayi na bino mbala na mbala, bokosambela mpo na bango epayi na Tata na nkombo na ngai.

24 Boye, tombola pole na bino likolo ete ekoka kongengisa mokili. Tala nazali pole oyo bokotombola likolo—na oyo bomonaki ngai kosala. Tala bomoni ete nasambelaki epayi na Tata, mpe bino nyonso bomonaki.

25 Mpe bomoni ete natindi ete moko te kati na bino ete alongwa, kasi natindi nzokande ete boya epayi na ngai, ete bokoka kosimba mpe komona; kutu bongo nde bokosala na mokili; mpe moto nyonso oyo akobuka motindo oyo apesi nzela ye moko ete akambama kati na masenginia.

26 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu alobaki makambo oyo, abalolaki miso na ye lisusu epayi na bayekoli oyo aponaki, mpe alobaki epayi na bango:

27 Tala solo, solo, nalobi epayi na bino, napesi epayi na bino motindo mosusu; mpe nsima nasengeli kokende epayi ya Tata ete nakoka kokokisa mibeko mosusu oyo apesaki ngai.

28 Mpe sikawa tala, oyo ezali motindo oyo napesi epayi na bino, ete bokopesa nzela te ete moto moko na boyebi nyonso alia mosuni mpe amela makila na ngai soki alongobani te, ntango bokosala yango;

29 Mpo moto nyonso oyo akolia mosuni mpe akomela makila na ngai soki alongobani te alei mpe ameli bokweisami mpo na molimo na ye; boye soki boyebi ete moto oyo alongobani te mpo na kolia mpe komela nzoto mpe makila na ngai bokopekisa ye.

30 Nzokande, bokobengana ye te uta na kati na bino, kasi bokosalela ye mpe bokosambela mpo na ye epayi na Tata, na nkombo na ngai; soki ezali bongo ete ayamboli mpe abatisami na nkombo na ngai, nde bokoyamba ye, mpe bokopesa epayi na ye nzoto mpe makila na ngai.

31 Kasi soki ayamboli te, akotangama te na kati ya bato na ngai, ete akoka te kobebisa bato na ngai, mpo tala, nayebi mpate na ngai, mpe batangami.

32 Nzokande, bokobengana ye uta na sinagoga na bino te, to uta na bisika ya bokumbameli na bino te, mpo bokokoba kosalela baoyo ya lolenge oyo; mpo boyebi te soki bakozonga mpe bakoyambola, mpe bakoya epayi na ngai na mokano etonda mwa motema, mpe nakobikisa bango mpe bokozala nzela ya komemaka lobiko epayi na bango.

33 Boye, bobomba maloba oyo, oyo natindi bino mpo ete boya na nse ya bokweisami te; mpo lisuma epayi na ye oyo Tata akweisi.

34 Mpe napesi bino mitindo oyo na ntina ya boswani boye ezalaki na kati na bino. Mpe bopambolami soki bozali na boswani te na kati na bino.

35 Mpe sikawa nakeyi epayi ya tata, mpo elongobani ete nakende epayi ya tata mpo na ntina na bino.

36 Mpe esalemaki ete ntango Yesu atiaki nsuka na maloba oyo, asimbaki na loboko na ye bayekoli oyo aponaki, moko na moko, kutu kino asimbaki bango nyonso, mpe alobaki epayi na bango lokola asimbaki bango.

37 Mpe ebele ya bato bayokaki te maloba oyo alobaki, boye bapesaki te litatoli; kasi bayekoli bapesaki litatoli ete apesaki bango nguya mpo na kopesa Molimo Mosantu. Mpe nakolakisa epayi na bino nsima ete lisolo ya makomi oyo ezali ya solo.

38 Mpe esalemaki ete ntango Yesu asimbaki bango nyonso, lipata moko eyaki mpe ezipaki ebele ya bato yango ete bakokaki te komona Yesu.

39 Mpe wana ezipamaki bango, atikaki bango, mpe amataki kati na lola. Mpe Bayekoli bamonaki mpe bapesaki litatoli ete amataki lisusu na lola.

Bimisa na lokasa