Makomi
Alma 5


Maloba oyo Alma, Nganganzambe Monene engebene na molongo mosantu ya Nzambe, atikelaki bato na bingumba mpe mboka mike na bango epayi nyonso na mboka.

Kobanda na mokapo 5.

Mokapo 5

Mpo na kozwa lobiko, bato basengeli koyambola mpe kobomba mitindo, kobotama lisusu, kosukola bilamba na bango na makila ya Klisto, komikitisa mpe komilongola uta na lolendo mpe elulela, mpe kosala misala ya bosembo—Mobateli Malamu abiangi bato na Ye—Baoyo basalaka misala mabe bazali bana ya zabulu—Alma atatoli bosolo ya malongi na ye mpe atindi bato koyambola—Nkombo ya basembo ekokomama na buku ya bomoi. Penepene na mobu 83 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete Alma abandaki kopesa liloba ya Nzambe epayi ya bato, yambo na mboka ya Zalayemila, mpe uta kuna epayi nyonso na mboka mobimba.

2 Mpe oyo ezali maloba oyo alobelaki bato kati na eklezia oyo etiamaki na engumba ya Zalayemila, engebene na lisolo ya makomi ya ye moko, kolobaka:

3 Ngai, Alma, ebulisamaki ngai na tata na ngai, Alma, mpo na kozala nganganzambe monene likolo ya eklezia ya Nzambe, mpo azalaki na nguya mpe likoki uta na Nzambe mpo na kosala makambo oyo, tala, nalobi epayi na bino ete abandaki kotia eklezia na mboka oyo ezalaki na ndelo ya Nefi; iyo, mboka oyo ebiangamaki mboka ya Mormon; iyo, mpe abatisaki bandeko na ye na mai ya Mormon.

4 Mpe tala, nalobi epayi na bino ete, bakangolamaki uta na maboko ya bato ya mokonzi Noa, na boboto mpe nguya ya Nzambe.

5 Mpe tala, nsima na yango, bamemamaki kati na boumbu na maboko ya Balamani na esobe; iyo, nalobi epayi na bino, bazalaki kati na bokangemi, mpe lisusu Nkolo akangolaki bango uta na boumbu na nguya ya liloba na ye; mpe tomemamaki kati na mboka oyo, mpe awa tobandaki kotia eklezia ya Nzambe epayi nyonso na mboka oyo mpe lokola.

6 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino, bandeko na ngai, bino oyo bozali bato ya eklezia oyo, ezali bino mpenza kokanga na bokundoli bokangemi ya batata na bino? Iyo, mpe ezali bino mpenza kokanga na bokundoli boboto mpe motema molai na ye epayi na bango? Mpe lisusu, ekangi bino mpenza na bokundoli ete akangolaki milimo na bango uta na lifelo?

7 Tala, abongolaki mitema na bango; iyo, alamusaki bango uta na mpongi ya mozindo, mpe balamukaki mpo na Nzambe. Tala, bazalaki na katikati ya molili; nzokande, milimo na bango mingengisamaki na pole ya liloba ya libela; iyo, bazingamaki penepene na singa ya liwa, mpe na minyololo ya lifelo, mpe bobebisami ya libela ezelaki bango.

8 Mpe sikawa natuni bino, bandeko na ngai, bango babebisamaki? Tala, nalobi epayi na bino, Te, babebisamaki te.

9 Mpe lisusu natuni, singa ya liwa, mpe minyololo ya lifelo oyo ezingaki bango penepene mikatanaki, mifungwamaki? Nalobi epayi na bino ete, Iyo, mifungwamaki, mpe mitema na bango mitondaki na nsai, mpe bayembaki loyembo ya bolingo ya bosikoli. Mpe nalobi epayi na bino ete babikisamaki.

10 Mpe sikawa natuni bino babikisami likolo ya masengami kani? Iyo, mpo na makambo nini esengelaki bango kotia elikya mpo na lobiko? Nini ezali ntina ya bokangolami na bango uta na singa ya liwa, iyo, mpe lisusu uta na minyololo ya lifelo?

11 Tala, nakoki koyebisa bino—endimaki te tata na ngai Alma maloba epesamaki na monoko ya Abinadi? Mpe ezalaki ye te profeta mosantu? Elobaki ye te maloba ya Nzambe, mpe tata na ngai Alma endimaki ye yango te?

12 Mpe engebene na bondimi na ye mbongwana ya monene esalemaki na motema na ye. Tala nalobi epayi na bino ete nyonso oyo ezali solo.

13 Mpe tala, ateyaki liloba epayi ya batata na bino, mpe mbongwana ya makasi esalemaki na mitema na bango, mpe bamikitisaki mpe batiaki motema na bango na Nzambe ya solo mpe ya bomoi. Mpe tala, bazalaki basembo kino na nsuka; boye babikisamaki.

14 Mpe sikawa tala, natuni bino, bandeko na ngai ya eklezia, ebotamaki bino na molimo epayi na Nzambe? Ezwaki bino elilingi na ye na bilongi na bino? Eyokaki bino mbongwana ya monene oyo na mitema na bino?

15 Ezali bino kosalela bondimi kati na bosikoli na ye oyo akelaki bino? Ezali bino kotalela liboso na miso ya bondimi, mpe komona nzoto ya kufa oyo esekwi na bozangi kufa, mpe bopoli boye esekwi na bozangi bopoli, mpo na kotelema liboso ya Nzambe mpo na kosambisama engebene na misala oyo esalemaki na nzoto ya kufa?

16 Nalobi epayi na bino ete, ekoki bino kokanisa na bino moko ete boyoki mongongo ya Nkolo, kolobaka epayi na bino, na mokolo wana: Boya epayi na ngai, bino baoyo bopambolami, mpo tala, misala na bino ezalaki misala ya sembo likolo ya etando ya mabele?

17 Soki te ekanisi bino na bino moko ete bokoki kokosa Nkolo na mokolo wana, mpe koloba—Nkolo, misala na biso ezalaki misala ya sembo likolo ya etando ya mabele—mpe ete akobikisa bino?

18 To soki te, ekoki bino komimona bino moko bomemami liboso ya esambelo ya Nzambe na milimo na bino etondami na elindo mpe boswi ya motema, kozalaka na bokundoli ya elindo nyonso ya bino, iyo, bokundoli ya kobonga nie ya nkuna nyonso ya bino, iyo, boko bokundoli ete botiyaki ntembe na mitindo ya Nzambe?

19 Nalobi epayi na bino, ekoki bino kotala likolo na Nzambe na mokolo wana na motema moko peto mpe maboko masukwami? Nalobi epayi na bino, ekoki bino kotala likolo, kozalaka na elilingi ya Nzambe ekomami na kokata nkoma likolo ya bilongi na bino?

20 Nalobi epayi na bino, ekoki bino kokanisa ete bobikisami ntango bomipesi mpo na kokoma bayangelami ya zabulu?

21 Nalobi epayi na bino, bokoyeba na mokolo wana ete bokoki kobikisama te; mpo ezali na moto te oyo akoki kobikisama longola se soki bilamba na ye esukwami mpembe; iyo, bilamba na ye esengeli kopetolama kino bikosukwama uta na bosoto nyonso, kati na makila na ye oyo alobamaki na batata na biso, oyo akoya mpo na kosikola bato na ye uta na masumu na bango.

22 Mpe sikawa natuni bino, bandeko na ngai, lolenge nini ekoyoka moto moko na kati na bino, soki bokotelema liboso ya esambiselo ya Nzambe, wana ezali bino na bilamba bibebisami na makila mpe ndenge nyonso ya bosoto? Tala, biloko oyo bikotatola nini na bino?

23 Tala ekotatola yango te ete bozali babomi, iyo, mpe lisusu ete bozali na elindo ya ndenge nyonso ya nkuna?

24 Tala, bandeko na ngai, ebanzi bino ete moto ya lolenge oyo akoki kozwa esika ya kofanda na bokonzi ya Nzambe, elongo na Abalayama, na Yisaka, mpe na Yakobo, mpe lisusu na baprofeta basantu nyonso, baoyo kani bilamba esukwami mpe bizangi mbindo, ezali peto mpe mpembe?

25 Nalobi epayi na bino, Te; longola se soki bokomisi Mokeli na biso mobuki lokuta uta na ebandeli, soki te bobanzi ete azali mobuki lokuta uta na ebandeli, bokoki te kobanza ete ya lolenge oyo bakoki kozala na esika na bokonzi ya lola; kasi bakobwakama libanda mpo bazali bana ya bokonzi ya zabulu.

26 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino, bandeko na ngai, soki boyokaki mbongwana ya motema, mpe soki boyokaki koyemba loyembo ya bolingo ya bosikoli, nalingi kotuna, ekoki bino koyoka bongo sikawa?

27 Etamboli bino, komibatelaka lokola bato bazangi mpamela liboso ya Nzambe? Ekoki bino koloba, soki bobiangamaki mpo na kokufa na ntango oyo, kati na bino moko, ete bozali na lolenge ekoki bato na bomikitisi? Ete bilamba na bino esukwami mpe ekomisami mpembe kati na makila ya Klisto, oyo akoya mpo na kosikola bato na ye uta na masumu na bango?

28 Tala, elongwe bino uta na lolendo? Nalobi epayi na bino, soki bolongwe te bolengelami te mpo na kokutana na Nzambe. Tala bosengeli komilengela na lombangu; mpo bokonzi ya lola ezali kala mingi te mpembeni, mpe moto ya lolenge oyo akozwa bomoi ya seko te.

29 Tala, nalobi, ezali na moto moko na kati na bino oyo alongwe te uta na boluli? Nalobi epayi na bino ete moto ya lolenge oyo alengelami te; mpe ngai nalingi ete amilengela noki-noki, mpo ngonga ezali mosika te mpembeni, mpe ayebi te soki ekoya ntango nini; mpo moto ya lolenge oyo amonani ete azangi elindo te.

30 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, ezali na moto moko na kati na bino oyo asekaka ndeko na ye, soki te akosala se kobakisa na bompikiliki bonyokoli likolo na ye?

31 Lisuma epayi na moto ya lolonge oyo, mpo amilengeli te, mpe ntango ebelemi ete asengeli koyambola soki te akoki kobikisama te!

32 Iyo, kutu lisuma epayi na bino nyonso basali ya mabe; boyambola, boyambola, mpo Nkolo Nzambe alobaki yango!

33 Tala, atindi bobiangami epayi ya bato nyonso; mpo maboko ya boboto matandolami epayi na bango, mpe alobi: Boyambola, mpe nakoyamba bino.

34 Iyo, alobi: Yaka epayi na ngai mpe bokolia mbuma ya nzete ya bomoi; iyo, bokolia lipa ya bomoi mpe bokomela mai ya bomoi ya ofele;

35 Iyo, yaka epayi na ngai mpe bobimisa misala ya bosembo, mpe bokokatama te na nse mpe bokobwakama te kati na moto—

36 Mpo tala, ntango ebelemi ete moto nyonso oyo akobimisa mbuma ya malamu te, to nyonso oyo akosala te misala ya sembo, se ye moko wana azali na ntina ya komilela mpe kosala matanga.

37 O bino basali ya mabe; bino baye bovimbani na biloko ya mpamba mpamba ya mokili, bino baye botatolaki ete boyebi nzela ya bosembo nzokande bobungi nzela, lokola mpate azangi mobateli, ata mobateli abiangaki nsima na bino mpe azali kaka kobianga nsima na bino, kasi bokoyoka te mongongo na ye!

38 Tala, nalobi epayi na bino, ete mobateli malamu abiangi bino; iyo, mpe abiangi bino na nkombo ya ye moko, oyo ezali nkombo ya Klisto; mpe soki bokotia bokebi na mongongo ya mobateli malamu te, na nkombo oyo wapi bobiangami, tala, bozali mpate ya mobateli malamu te.

39 Mpe sikawa soki bozali mpate ya mobateli malamu te, bozali ya etonga nini? Tala, nalobi epayi na bino, ete zabulu azali mobateli na bino, mpe bozali ya etonga na ye; mpe sikawa, nani akoki kowangana oyo? Tala, nalobi epayi na bino, moto oyo akowangana oyo azali mobuki lokuta mpe mwana ya zabulu.

40 Mpo nalobi epayi na bino nyonso oyo ezali malamu ewuti na Nzambe, mpe nyonso oyo ezali mabe mawuti na zabulu.

41 Boye, soki moto moko abimisaka misala malamu ayokaka mongongo ya mobateli malamu, mpe akolanda ye; kasi nyonso oyo abimisaka misala mabe, se ye moko wana akomi mwana ya zabulu, mpo ayokaka mongongo na ye, mpe alandaka ye.

42 Mpe nyonso oyo akosala oyo akozwa lifuta na ye uta na ye; boye, mpo na lifuta na ye akozwa liwa, na kotalaka makambo etali bosembo, mpo azali ya kokufa mpo na oyo etali misala nyonso ya malamu.

43 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nalingi ete boyoka ngai, mpo nazali koloba na makasi ya molimo na ngai; mpo tala, nalobeli bino polele ete bokoka kobunga te, soki te nalobaki engebene na mitindo ya Nzambe.

44 Mpo nabiangami mpo na koloba na lolenge oyo, engebene na molongo mosantu ya Nzambe, oyo mozali na Klisto Yesu; iyo, natindami mpo na kotelema mpe kotatola epayi ya bato oyo makambo elobamaki na batata na biso mpo na oyo etali makambo oyo ekoya.

45 Mpe oyo ezali nyonso te. Ebanzi bino ete nayebi makambo oyo ngai moko? Tala, natatoli epayi na bino ete nayebi ete makambo oyo kani nalobi ezali ya solo. Mpe lolenge kani ebanzi bino ete nayebi oyo etali bosolo na yango mpenza?

46 Tala, nalobi epayi na bino eyebisami epayi na ngai na Molimo Mosantu ya Nzambe. Tala, nakilaki bilei mpe nasambelaki mikolo mingi ete nakoka koyeba makambo oyo ngai moko. Mpe sikawa nayebi ngai moko ete ezali solo; mpo Nkolo Nzambe asali ete mamonisama epayi na ngai na Molimo Mosantu na ye; mpe oyo ezali molimo ya emoniseli oyo azali na ngai.

47 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino ete ebimisami boye epayi na ngai, ete maloba oyo elobamaki na batata na biso ezali solo, kutu bongo engebene na molimo ya masakoli oyo ezali na ngai, oyo ezali lisusu engebene na limonisi ya Molimo ya Nzambe.

48 Nalobi epayi na bino, ete nayebi na ngai moko ete nyonso oyo nakoloba epayi bino, mpo na oyo etali oyo ekoya, ezali solo; mpe nalobi epayi na bino, ete ngai nayebi ete Yesu Klisto akoya, iyo, Mwana, Mobotami se Moko ya Tata, atonda na ngolu, mpe boboto, mpe bosolo. Mpe tala, ezali ye oyo akoya mpo na kolongola masumu ya mokili, iyo, masumu ya moto na moto oyo akondima na nkombo na ye na kotikalaka ngwi.

49 Mpe sikawa nalobi epayi na bino ete oyo ezali molongo oyo wapi nabiangami, iyo, mpo na koteya epayi na bandeko balingami na ngai, iyo, mpe na moko na moko oyo afandi na mboka; iyo, koteya epayi ya nyonso, mobange mpe elenge, moumbu mpe nsomi; iyo, nalobi epayi ya bato mikolo, mpe mikoloya katikati, mpe nkola oyo ezali komata; iyo, kobelela epayi na bango ete basengeli koyambola mpe kobotama lisusu.

50 Iyo, boye elobi Molimo: Boyambola, bino nyonso nsuka ya mabele, mpo bokonzi ya lola ezali kala mingi te koya; iyo, Mwana ya Nzambe akoya na nkembo na ye, na bokasi na ye, lokumu, nguya, mpe mpifo. Iyo, bandeko balingami na ngai, nalobi epayi na bino, ete Molimo alobi: Tala nkembo ya Mokonzi na mabele nyonso; mpe lisusu Mokonzi ya lola akongenga kala mingi te mpenza na kati ya bana nyonso ya bato.

51 Mpe lisusu Molimo alobi epayi na ngai, iyo, belela epayi na ngai na mongongo makasi kolobaka: Kende mpe loba epayi ya bato oyo—Boyambola, mpo longola se soki boyamboli bokoki na lolenge moko te kosangola libula ya bokonzi ya lola.

52 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, Molimo alobi: Tala, epasola etiami na mosisa ya nzete; boye nzete moko moko oyo ebimisaka te mbuma malamu ekokatama na nse mpe ekobwakama kati na moto, iyo, moto moko oyo mokoki kobomama te, kutu moto oyo mozimaka te. Tala, mpe bomikundola oyo, Moko Mosantu alobaki yango.

53 Mpe sikawa bandeko balingami na ngai, nalobi epayi na bino, ekoki bino kotelemela maloba oyo; iyo, ekoki bino kotia makambo oyo mpembeni, mpe koniata Moko Mosantu na nse ya makolo na bino; iyo, ekoki bino kovimbana na lolendo ya mitema na bino; iyo, ekokoba bino kaka se kolataka monzele ya ntalo mpe kotiaka mitema na bino likolo ya biloko ya mpamba mpamba ya mokili, likolo ya bozwi na bino?

54 Iyo, ekokoba bino se kobanzaka ete bozali bato malamu koleka basusu; iyo, ekokoba bino se konyokola bandeko na bino, baoyo bazali komikitisa mpe bazali kotambola na molongo mosantu ya Nzambe, oyo wapi bamemamaki kati na eklezia oyo, mpe basantisami na Molimo Mosantu, mpe bazali kobimisa misala oyo elongobani mpo na boyamboli—

55 Iyo, mpe ekokoba bino se kobalolaka bamoni mikongo na bino epayi na babola, mpe bakeleli, mpe na koboyaka kokabola biloko na bino na bango?

56 Mpe na kosukisa, bino nyonso oyo bozali kokoba na nkuna na bino, nalobi epayi na bino ete ezali bango oyo bakokatama na nse mpe kobwakama kati na moto longola se soki bayamboli na lombangu.

57 Mpe sikawa nalobi epayi na bino, bino nyonso oyo bozali na mposa ya kolanda mongongo ya mobateli malamu, bobima uta na bato ya nkuna, mpe bokabwana, mpe bosimba te biloko na bango ya mbindo; mpe tala, nkombo na bango ekolongolama mpenza, ete nkombo ya bato ya nkuna ekotangama te na kati ya nkombo ya basembo, ete liloba ya Nzambe ekoka kokokisama, oyo elobaki: Nkombo ya bato ya nkuna ekosangana te elongo na nkombo ya bato na ngai;

58 Mpo nkombo ya basembo ekokomama na buku ya bomoi, mpe epayi na bango nakopesa bosangoli ya libula na loboko na ngai ya mobali. Mpe sikawa, bandeko na ngai, nini esengeli bino koloba mpo na kotelemela oyo? Nalobi epayi na bino, soki bolobi mabe na yango, ezali likambo te, mpo liloba ya Nzambe esengeli kokokisama.

59 Mpo mobateli nini azali kuna na kati na bino oyo azali na mpate mingi kasi akengelaka yango te, ete mbwa ya zamba ekota te mpe elia te ebwele na ye? Mpe tala, soki mbwa ya zamba ekoti kati na etonga akobengana yango te? Iyo, mpe na nsuka, soki akoki, akobebisa yango te.

60 Mpe sikawa nalobi epayi na bino ete mobateli malamu azali kobianga nsima na bino; mpe soki bokoyoka mongongo na ye akomema bino kati na etonga na ye, mpe bozali mpate na ye; mpe atindi bino ete bopesa te nzela ete mbwa ya zamba ya lokoso akota na kati na bino, ete akoka kobebisa bino te.

61 Mpe sikawa ngai, Alma, natindi bino na elobeli ya ye oyo atindaki ngai, ete botosa kosalela maloba oyo nalobeli bino.

62 Nalobi na nzela ya etinda epayi na bino baoyo bozali ya eklezia; mpe epayi na baoyo bazali te ya eklezia nalobi na nzela ya bobiangami, kolobaka: Boya mpe bobatisama mpo na boyamboli, ete bino lisusu bolia mbuma ya nzete ya bomoi.

Bimisa na lokasa