Masalisi mpo na Makomi
BJS, Luka 12


BJS, Luka 12:9–12. Meka na Luka 12:9–10; tala lisusu BJS, Matai 12:37–38 mpe Mal&May 132:26–27

Yesu alimboli ete kotuka Molimo Mosantu ekolimbisama te.

9 Kasi oyo akowangana ngai liboso ya bato, akowanganama liboso ya banjelu ya Nzambe.

10 Sikawa bayekoli na ye bayebaki ete alobaki oyo, mpamba te balobaki na ye mabe liboso ya bato; mpo ete bazalaki kobanga kotatola ye liboso ya bato.

11 Mpe bazalaki kobanza- banza na kati ya bango moko, kolobaka, Ayebi mitema na biso, mpe azali kolobela bokwei na biso, mpe tokolimbisama te. Kasi ye ayanolaki bango, mpe alobaki epayi na bango,

12 Nyonso oyo akoloba liloba ya mabe na Mwana ya moto, mpe ayamboli, ekolimbisama mpo na ye; kasi epayi na ye oyo atuki Molimo Mosantu, ekolimbisama te.

BJS, Luka 12:41–57. Meka na Luka 12:37–48

Yesu Klisto ateyi ete basali na Ye basengeli ntango nyonso komilengela mpo na bozongi naYe.

41 Mpo, tala, akoya na bokengeli ya yambo ya butu, mpe akoya na bokengeli ya mibale, mpe lisusu akoya na bokengeli ya misato.

42 Mpe solo nalobi epayi na bino, Asili koya kala, lokola ekomamaki na ntina na ye; mpe lisusu ntango akoya na bokengeli ya mibale, to akoya na bokengeli ya misato, bapambolami ezali basali oyo ntango akoya akokuta bango kosalaka bongo;

43 Mpo Nkolo ya basali wana akokanga ye moko nketo, mpe kofandisa bango mpo na kolia, mpe akobima mpe kosalela bango.

44 Mpe sikawa, solo nalobi biloko oyo epayi na bino, ete bokoka koyeba oyo, ete boyei ya Nkolo ezali lokola moyibi na butu.

45 Mpe ezali lokola moto oyo azali nkolo ndako, oyo, soki akengeli biloko na ye te, moyibi ayei na ngonga oyo ayebi te, mpe akamati biloko na ye, mpe akaboli yango na kati ya baninga na ye.

46 Mpe balobaki na kati ya bango moko, Soki nkolo ndako ayebaki na ngonga nini moyibi azalaki koya, alingaki akengela, mpe kotika te ndako na ye ebukama mpe biloko na ye bibungisama.

47 Mpe alobaki epayi na bango, Solo nalobi epayi na bino, bomilengela boye bino lisusu; mpo ete Mwana ya moto azali koya na ngonga oyo bozali kokanisa te.

48 Bongo Petelo alobaki epayi na ye, Nkolo, ezali yo koloba lisese oyo mpo na biso, to mpo na banso?

49 Mpe Nkolo alobaki, Nazali kolobela baoyo wana Nkolo akotia bakonzi likolo ya ndako na ye, mpo na kopesa bana na ye ndambo ya bilei na bango na eleko elongobani.

50 Mpe balobaki, Bongo nani azali mosali wana ya sembo mpe ya bwania?

51 Mpe Nkolo alobaki epayi na bango, Ezali mosali wana oyo akengelaka, mpo na kokabola ndambo ya bilei na ye na eleko elongobani.

52 Apambolami azali mosali wana oyo Nkolo na ye akokuta, ntango akoya, kosalaka bongo.

53 Zambi nalobi epayi na bino, ete akokomisa ye mokonzi likolo ya nyonso oyo azali na yango.

54 Kasi mosali mabe azali oyo bakuti azali kokengela te. Mpe soki mosali wana bakuti ye kokengela te, akoloba na motema na ye, Nkolo na ngai azali kowumisa boyei na ye; mpe abandi kobeta bandeko mibali basali, mpe bandeko basi basali, mpe kolia, mpe komela, mpe kolangwa.

55 Nkolo ya mosali wana akoya na mokolo oyo azali kozela te, mpe na ngonga wapi ayebi te, mpe akokata ye biteni, mpe akopesa likabo na ye na bato bazanga bondimi.

56 Mpe mosali oyo ayebaki bolingi ya Nkolo na ye, mpe amilengelaki mpo na boyei ya Nkolo na ye te, asalaki engebene na bolingi na ye mpe te, akobetama na fimbo mingi.

57 Kasi ye oyo ayebaki te bolingi ya Nkolo na ye, mpe asalaki biloko oyo elongobani na fimbo, akobetama ndambo. Mpo epayi ya moto nyonso oyo mingi epesami, na ye mingi ekosengama; mpe na nani oyo Nkolo apesi mingi, na ye bato bakosenga mingi koleka.

Bimisa na lokasa