Masalisi mpo na Makomi
BJS, Luka 17


BJS, Luka 17:21. Meka na Luka 17:20–21

Bokonzi ya Nzambe esili koya.

21 Bakoloba mpe te, Tala, awa! to, Tala, kuna! Mpo, tala, bokonzi ya Nzambe esili kala koya epayi na bino.

BJS, Luka 17:36–40. Meka na Luka 17:37

Yesu asakoli lisese ya bingondo mpo na kolimbola bosangisi ya basantu na Ye na mikolo ya nsuka.

36 Mpe bazongisaki maloba mpe balobaki epayi na ye, Wapi, Nkolo, ekokamatama bango?

37 Mpe alobaki epayi na bango, Epayi wapi nyonso ekosangisama nzoto; to, na maloba mosusu, na esika nyonso wapi basantu basangisami, na esika wana bangondo bakosangana; to, na esika wana montika mokosangana esika moko.

38 Oyo alobaki, kolimbolaka bosangani ya basantu; mpe na ntina ya banjelu kokitaka mpe kosangisaka montika epayi na bango; moko uta na mbeto, mosusu uta na kotuta, mpe mosusu uta na bilanga, uta epayi wapi elingi ye.

39 Mpo solo ekozala na lola ya sika, mpe mabele ya sika, epayi wapi ekofanda bosembo.

40 Mpe eloko ya mbindo ekozala te; mpo mokili ekonuna, kutu lokola elamba, mpo ete ekoli kati na bosoto, yango wana ezali kolimwa, mpe enyatelo etikala esantu, peto uta na lisumu nyonso.

Bimisa na lokasa