Masalisi mpo na Makomi
BJS, Luka 3


BJS, Luka 3:4–11. Meka na Luka 3:4–6

Klisto akoya lokola esakolamaki mpo na komema lobiko na Yisalaele mpe na Bapagano. Na bokokisi ya ntango, Akoya lisusu kosambisa mokili.

4 Lokola ekomami kati na buku ya profeta Esayasi; mpe oyo ezali maloba yango, kolobaka, Mongongo ya moko oyo azali koganga kati na esobe, Bolengela nzela ya Nkolo, mpe sembola balabala na ye.

5 Mpo tala, mpe mona, akoya, lokola ekomami na buku ya baprofeta, kolongola masumu ya mokili, mpe komema lobiko epayi na bikolo ya bapaganu, kosangisa esika moko baoyo wana babungi, oyo bazali ya lopango ya mpate ya Yisalaele;

6 Iyo, kutu baoyo bapalangani mpe batungisami; mpe lisusu kolengela nzela, mpe kokokisa koteya nsango malamu epayi ya Bayuda-te;

7 Mpe kozala pole mpo na banso oyo bafandi kati na molili, kino na ndelo mosika ya mabele; kokokisa bosekwi ya bakufi, mpe komata likolo, kofanda na loboko ya mobali ya Tata,

8 Kino litondi ya ntango, mpe mobeko mpe litatoli ekokangama, mpe bafungola ya bokonzi makopesama lisusu epayi ya tata;

9 Kosalela boyengebene mpo na banso; kokita na masambisi likolo ya banso, mpe kondimisa baoyo bazangi bonzambe na ntina ya misala na bango ezangi bonzambe, oyo basalaki; mpe nyonso oyo na mokolo oyo akoya;

10 Mpo ezali mokolo ya nguya; iyo, mabwaku nyonso makotondisama, mpe bangomba ya mike mike mpe ngomba ya minene minene nyonso ekokitisama; bisika egumbami nyonso esembolama, mpe bisika nyonso ya mabulu bikomisama alima;

11 Mpe mosuni nyonso ekomona lobiko ya Nzambe.

BJS, Luka 3:19–20. Meka na Luka 3:10–13

Bokolongono ya babola esungami na bozwi kati na ebombelo. Bato (basangisi ya mpako) basengeli kozwa te oyo eleki ndelo ya mobeko.

19 Mpo ete eyebani malamu epayi na bino, Teofile, na lolenge ya Bayuda, mpe engebene na bonkoko ya mobeko na bango mpo na oyo etali kozwaka mosolo kati na ebombelo, oyo bazalaki kopesa na babola, na moko na moko eteni ya bozwi oyo ezalaki ya ye;

20 Mpe nde lolenge oyo bato bazalaki kosala lisusu, na yango Yoane alobaki na bango, Bolekisa ndelo te engebene na mobeko epesamelaki bino.

Bimisa na lokasa