Masalisi mpo na Makomi
BJS, Luka 21


BJS, Luka 21:24–26. Meka na Luka 21:25–26

Yesu alobi na ntina ya bilembo ya boyei na Ye.

24 Sikawa alobaki na bango makambo oyo, mpo na oyo etali bobebisi ya Yelusaleme. Mpe nsima bayekoli na ye batunaki ye, kolobaka, Moteyi, yebisa biso mpo na oyo etali boyei na yo.

25 Mpe ayanolaki bango, mpe alobaki, O nkola wapi bantango ya Bayuda-te ekokokisama, ekozala na bilembo na moi, mpe na sanza, mpe na minzoto; mpe likolo ya mabele mobulu ya bikolo na kilikili, lokola mbu mpe mbonge kogangaka. Mabele lisusu makozala na mobulu, mpe mai ya mozindo monene;

26 Mitema ya bato ekokima bango mpo na bobangi, mpe mpo na kosenzelaka makambo oyo ezali koya likolo ya mabele. Mpo banguya ya lola ekoningisama.

BJS, Luka 21:32. Meka na Luka 21:32

Nyonso ekokokisama ntango bantango ya baoyo bazali Bayuda-te ekokokisama.

32 Solo nalobi epayi na bino, nkola oyo, nkola wapi bantango ya baoyo bazali Bayuda-te ekokokisama, ekoleka te kino nyonso ekokisama.

Bimisa na lokasa