Masalisi mpo na Makomi
BJS, Luka 16


BJS, Luka 16:16–23. Meka na Luka 16:16–18

Mobeko mpe baprofeta etatoli na ntina ya Yesu. Bafalisai baluki kobebisa bokonzi ya Nzambe. Yesu atalisi lisese ya moto na bozwi mpe Lazalo.

16 Mpe balobaki epayi na ye, Tozali na mobeko, mpe baprofeta; kasi mpo na oyo etali moto oyo tokoyamba ye te kozala mokonzi na biso; mpo amitii ye moko kozala mosambisi likolo na biso.

17 Nsima Yesu alobaki epayi na bango, Mobeko mpe baprofeta etatoli na ntina na ngai; iyo, mpe baprofeta nyonso oyo bakomaki, kutu kino Yoane, basilaki kala kolobela mikolo oyo.

18 Uta na ntango wana, bokonzi ya Nzambe eteyami, mpe moto na moto oyo azali koluka bosolo azali koluka nzela ete akota kati na yango.

19 Mpe ezali pete mpo na lola mpe mabele eleka, ete nsonge ya elembo moko ya mobeko ezanga kokokisama.

20 Mpe mpo na nini ezali bino kolakisa mobeko, mpe kowangana oyo esili kokomama; mpe kokweisa ye oyo Tata atindi mpo na kokokisa mobeko, ete bosikolama bino nyonso?

21 O bino bozanga mayele! mpo bolobi na mitema na bino, Nzambe azali te. Mpe bobebisi nzela ya sembo; mpe bokonzi ya lola eniokwami uta na bino; mpe bonyokoli bato na bomikitisi; mpe na yauli na bino bozali koluka kobebisa bokonzi; mpe bokamati bana ya bokonzi na makasi. Lisuma epayi na bino, bino bato ya ekobo!

22 Mpe bafingaki ye lisusu, kozalaka na nkanda mpo na maloba na ye, ete bazali bato ya ekobo.

23 Kasi akobaki, kolobaka, Nyonso oyo abengani mwasi na ye, mpe abali mosusu, asali ekobo; mpe nyonso oyo abali ye oyo babengani uta na mobali na ye, asali ekobo. Solo nalobi epayi na bino, nakokokisa bino na moto ya bozwi.

Bimisa na lokasa