2010–2019
Libondeli na Bandeko Na Ngai ya Basi
sánzá ya zómi 2015


15:33

Libondeli na Bandeko Na Ngai ya Basi

Tozali na mposa ya bokasi na bino, bondimami na bino, makoki na bino mpo na kokamba, bwania na bino, mpe mingongo na bino.

Bampaka Rasband, Stevenson, mpe Renlund, biso, Bandeko na bino, totombeli bino boyei bolamu na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale. Totondi Nzambe mpo na mabimisi oyo Apesi na profeta na Ye Mokambi Thomas S. Monson.

Bandeko babali mpe basi, ntango tosanganaki na likita linene sanza motoba eleki, moko te akokaki naino koyeba mbongwana elingaki kobeta lokito na motema ya Eklezia mobimba. Mpaka Elder L. Tom Perry apesaki lisikulu moko ya nguya etali mosala ya kokokisa na mosusu te oyo libala mpe libota ezali na yango na mwango ya Nkolo. Tokamwaki mpenza ntango kaka mwa mikolo nsima, toyokaki nsango ya cancer oyo elingaki kobotola biso ye.

Atako kolongono ya nzoto ya Mokambi Boyd K. Packer ezalaki kokita, ye akobaki na “kosala molende” na mosala ya Nkolo. Azalaki ya kolemba mpenza sanza ya minei eleki, kasi azwaki mokano mpo na kosakola litatoli na ye kino na mpema na ye ya nsuka. Nde, kaka mikolo 34 nsima ya liwa ya Mpaka Perry, Mokambi Packer lisusu akatisaki ebale.

Tozangaki Mpaki Richard G. Scott na likita linene na biso eleki, kasi tokakisaki mpo na matatoli ya nguya ya Mobikisi apesaki na makita manene maleki. Mpe kaka mikolo 12 mileki Mpaka Scott azongisaki molimo mpe asanganaki na molingami na ye Jeanene.

Nazwaki libaku ya kozala elongo na banso ya Bandeko na ngai oyo wana na mikolo na bango ya nsuka, lokola kosanganaka na baye ya libota ya Mokambi Packer mpe Mpaka Scott ya penepene mpembeni ya mabota kaka liboso akufa na bango. Ezalaki kpokoso mpo na kondima ete baninga misato oyo ya motuya mpenza, basali oyo ya lokumu ya Nkolo,bakei na mbalakaka. Nazangi bango mingi kokela nakoki koloba.

Lokola nazalaki komaniola lolenge ya makambo oyo ya mbalakaka, moko ya likanisi oyo ekangami na ngai ezali ete oyo namonaki na baye wana batikali na bomoi. Ekomami na mayele na ngai elili ya ya kimia ya Ndeko Mwasi Smith Packer mpe Ndeko Mwasi Barbara Dayton Perry mpembeni ya ya mibali na bango, basi mibale batonda na bolingi, bosolo, mpe bondimi ya peto.

Ntango Ndeko Mwasi Packer avandaki mpembeni ya mobali na na ye na bangonga na ye ya nsuka, azalaki konganga na kimia oyo eleki bososoli.1 Atako ayebaki ete moninga na ye ya bolingi ya penepene na mibu 70 alingaki mosika te kolonngwa, alakisaki kimia ya mwasi atonda na bondimi. Azalaki lokola anzelu, kaka lokola azalaki na foto na bango na bobulisi ya Tempelo ya Brigham City Temple.

Mokambi mpe ndeko mwasi Packer na Tempelo ya Brigham City Utah

Namonaki ete bolingo mpe kiamia ya lolenge moko ebimaki na Ndeko Mwasi Perry. Bondimi na ye na mobali na ye mpe na Nkolo ezalaki polele, mpe epasolaki ngai motema.

Mpaka mpe ndeko mwaasi Perry

Atako ngonga ya nsuka ya mibali na bango, mpe kokobaka tii na mokolo ya lelo, basi oyo ya bondimi balakisaki bokasi mpe mpiko oyo basi babateli mayokani balakisaka ntango nionso2... Moto te akoki komeka nguya oyo basi ya boye bazali na yango, kaka na mabota te kasi na Eklezia ya Nkolo, lokola basi, bamama, mpe bankoko ya basi; lokola bandeko basi mpe bandeko ya baboti; lokola bateyi mpe bayangeli; mpe mingimingi lokola bandakisa mpe babateli bamipesa ya bondimi.3

Oyo ezali ya solo na eleko nionso ya nsango malamu uta mikolo ya Adama mpe Ewa. Kasi basi ya eleko oyo bakeseni na basi ya nionso mosusu, mpamba t eleko oyo ekeseni na nionso mosusu.4 Bokeseni oyo ememi matomba mpe mikumba.

Elili ya Mokambi Kimball

Mibu ntuku misato na motoba eleki, na 1979, Mokambi Spencer W. Kimball asalaki lisakola moko ya mozindo etali nguya bamama babateli mayokani bakozala na yango na Eklezia ya Nkolo ya mikolo mikoya. Asakolaki, “Mingi ya bokoli minene oyo ezali koya na Eklezia na mikolo mya nsuka ekoya mpamba te mingiya basi ya malamu ya mokili … bakobanda bango na Eklezia na motango moko monene. Yango ekokoma soki basi ya Eklezia balakisi bosembo mpe bompenza na bomoi na bango mpe soki basi ya Eklezia bamonani ya kokabwana mpe ya kokesena—na ndenge ye esengo—na basi ya mokili.”5

Bandeko na ngai ya basi, bino oyo bozali basali na biso elongo ya ntina na makambo oyo ya nsuka, mokolo oyo Mokambi Kimball amonaki liboso ezali lelo. Bozali basi amonaki! Bomoi na bino ya bolamu, bolingo, boyebi, mpoki, lolenge, bondimi, mpe bosembo ekobenda basi ya bolamu ya mokili, elongo na mabota na bango, na Eklezia na motango emonana naino te!6

Biso, bandeko na bino ya mibali, tozali na mposa bokasi na bino, lisolo na bino, bondimi na bino, bokoki na bino mpo na kokamba, mpe mayele na bino, mpe mingongo na bino. Bokonzi ya Nzambe ezali te mpe ekoki kozala ya mobimba te soki ezangi basi oyo basala mayokani ya bule, mpe babateli yango, basi oyo bakoki koloba na nguya mpe likoki ya Nzambe!7

Mokambi Boyd K. Packer asakolaki:

“Tozali na mposa ya basi oyo babongisami mpe oyo bakoki kobongisa. Tozali na mposa ya basi na bokoki ya koyangeli oyo bakoki kosala mwango mpe kokamba mpe kosalisa; basi oyo bakoki koteya, basi oyo bakoki koloba. …

“Tozali na mposa ya basin a likabo ya bososoli oyo bakoki komona nzela na mokili mpe kobakola oyo, atako endimami, ezali likololikolo to ya likama.”8

Lelo, tika nabakisa ete tozali na mposa ya basi oyo bayebi boniboni kosala makambo ya motuya ekoma na bondimi na bango mpe oyo bazali na babateli ya mpiko ya libongi mpe mabota na mokili moko na bokono ya masumu. Tozali na mposa ya basi oyo bamipesi mpo na kokengela bana ya Nzambe na nzela ya boyokani mpo na bonetoli; basi oyo bayebi boniboni koyamba mabimisi ya moto na moto, oyo basosoli nguya mpe kimia ya dotatio ya tempelo; baye oyo bayebi boniboni kobelela nguya ya lola mpo na kobatela mpe kolendisa bana mpe mabota; basi oyo bakoteya na kobanga te.

Na bomoi na ngai mobimba, napambolami na basi ya boye. Nkondo mwasi na ngai, Dantzel, azalaki mwasi ya bongo. Nakozala ntango nionso na botondi mpo na nguya ya kobongola bomoi azalaki na yango epai na ngai na ndenge nionso ya bomoi na ngai, lokola bokasi na ngai ya kobanda lipaso ya kofungola motema.

Mibu ntuku mitano mileki batunaki ngai na pasola mwa mwana mwasi moko, na bokono ya motema ya kobotama. Ndeko na ye ya mobali ya nkulutu liboso akokufaki na lolenge moko. Baboti na ye babondelaki ngai mpo na lisungi. Nazalaki na elikia te mpo na mbano na yango kasi nalakaki kosala nionso na nguya na ngai mpo na kobikisa bomoi na ye. Atakako nasala bokasi na ngai eleki, mwana akufaki. Sima, baboti wana kaka nsima bamemaki mwana mwasi mosusu epai na ngai, nde ya mibu 16 kaka, abotamaki lisusu na motema moko esalema mabe. Lisusu, na bosengi na bango, nasalaki lipaso. Mwana oyo akufaki lisusu. Kobungisa oyo ya motema mpasi na libota moko ebomaki ngai.

Nakendeki ndako na mpasi etonda ma motema. Namibwakaki na nse na salon na biso mpe nalelaki butu mobimba. Dantzel atikalaki mpembeni na ngai, koyokaka ngai ntango nazalaki kosakola ete nakosala lisusu lipaso mosusu te. Nde, penepene na 5:00 na ntongo, Dantzel atalaki ngai mpe na bolingo atunaki, “Osilisi kolela? Mpe kende kolata. Zonga na laboratoire. Kende kosala! Osengeli koyekola mingi koleka. Soki otiki sikawa, basusu bakosengela koyekola na mpasi oyo yo osili koyeba.”

O boniboni, nazalaki na mposa ya bomoni, bwania, mpe bolingo ya mwasi na ngai! Nazongaki na mosala, mpe nayekolaki mingi koleka. Soki ezalaki molende ya efulama ya Dantzel te, nalingaki te kokoba lipaso ya kofungola motema mpe nalingaki te kolengelama mpo na kosala lipaso na 1972 oyo ebikisaki bomoi ya Mokambi Spencer W. Kimball.9

Bandeko basi, bososoli bonene mpe bolai ya nguya na bino ntango bozali koloba makambo wana oyo eyaka na motema mpe mayele na bino ntango bokambemi na Molimo? Mokambi moko ya lokumu ya likonzi alobelaki ngai etali liyangani moko ya likonzi, oyo azalaki na mokakatano. Lolenge moko, asosolaki ete mokambi ya Eteyelo ya bana alobaka te, boye atunaki soki azalaka na makanisi ya kopesa. “Malamu, alobaki mpe nde abandaki kokabola likanisi moko oyo ebongolaki botambolisi nionso ya liyangani. Mokambi ya likonzi akobaki, ntango azalaki koloba, Molimo etatolaki na ngai ete apesaka monoko na libimisi oyo tozalaka koluka lokola liyangani.”

Bandeko na ngai ya basi, kotala te libiangi na bino, kotala te bizaleli na bino, tozali na mposa ya makanisi na bino, bwania na bino, mpe bofuli na bino. Tozali na mposa ete boloba makasi mpe boloba lisusu na mayangani na palwasi mpe likonzi. Tozali mposa ete ndeko mwasi nionso lokola moko mpe ya mobimba, moninga moko ya mobimba mpo na kosala elongo”10 ntango bokosangana elongo na mibali na bino mpo na koyangela maboti na bino. Babala to te, bandeko basi bazali na makoki mpe mayele ya kafukafu oyo bazwi lokola makabo ya Nzambe. Biso bandeko mibali tokoki te kobandela nguya se moko ya bino.

Toyebi ete mosala ya nsuka ya bokeli ezalaki bokeli ya mwasi!11 tosengeli na bokasi na bino!

Kobundisa Eklezia, malongi na yango, mpe lolenge na biso ya bomoi akobakisama. Na ntina na biso, tozali na mposa ya basi oyo bazali na bososoli ya ntina ya malongi ya Klisto mpe oyo bakosalela bososoli wana mpo na koteya mpe kosunga kokolisa nkola moko oyo ekotelemela lisusu.12 Tozali na mposa ya basi oyo bakoki kobakola lokuta na ndenge na yango nionso. Tozali na mposa ya basi oyo bayebi boniboni kozwa nguya oyo Nzambe apesi babateli mayokani mpo oyo babimisi bondimi na elikia na bolingami. Tozali na mposa ya basi oyo bazali na mpiko mpe bomoni ya Mama na biso Ewa.

Bandeko basi, eloko te ezali na ntina mpo na bomoi na bino ya seko koleka mbongwana. Ezali basi babongwana mpe ya kobatela liyokani—mpe kati na bango natangi molongani na ngai ya bolingo Wendy— oyo ya bango bomoi ekotelema libanda ya mokili moko ya kobeba mpe oyo bamonani bongo lokola ya kokabwana mpe kokesena na ndenge esengo.

Boye lelo, nabondeli bandeko basi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka mpo na kokende liboso. Bokamata esika na bino ya bosembo mpe ya ntina, na lingomba na bino, mpe na bokonzi ya Nzambe—koleka bosala naino to liboso. Nabondeli bino bokokisa lisakoli ya Mokambi Kimball. Mpe, nalaki na bino, na nkombo ya Yesu Klisto, ete ntango bokosala yango, Molimo Mosantu akobongisa nguya na bino na lolenge emonana te!

Napesi litatoli ya bosolo ya Nkolo Yesu Klisto mpe ya nguya ya kosikola, mpe ya komikaba mpo na moto, mpe ya kosantisa. Mpe, lokola Apostolo na Ye, natondi bino, bandeko na ngai ya basi ya bolingo, mpe napamboli bino mpo na kolamuka na lolenge na bino mobimba, mpo na kokokisa ndelo ya bokeli na bino, ntango tokotambola liboko na loboko na mosala oyo ya bule. Elongo, tokosalisa mokili komilengela mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo. Natatoli yango, lokola ndeko na bino ya mobali, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Bafilipi 4:7.

  2. Oyo esangisi mpinzoli— na kobatelaka mibeko to kolela mpo na baye tolingi ntango batiki bomoi oyo ( tala Doctrine & Alliances 42:45.

  3. Tala nguya ya Rebeka epai ya Isaya mpe Yakobo na Genese 27: 46; 28:1–4.

  4. Tala Joseph Fielding Smith, Answers to Gospel Questions, comp. Joseph Fielding Smith Jr., 5 vols. (1957–66), 4:166. Nasegi bino boyeba: Bileko nionso ezalaki esukaki na eteni moko ya moke ya mokili mpe esilaki na bopengwi. Na bokeseni, eleko oyo ekosuka ten a esika to ntango moko. Ekotondisa mokili mpe ekosangani na Boyei ya Mibale ya Nkolo.

  5. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 222–23.

  6. Ntango nabotanaki, ezalaki na moke koleka bandimi 600,000 ya Eklezia. Lelo ezali na mingi koleka 15 milio. Motango oyo ekokoba kobakisama.

  7. Mokambi Joseph Fielding Smith alobelaki bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi, “Bokoki koloba na likoki, mpamba te Nkolo atii likoki likolo na bino.” Alobaki lisusu ete Lingomba ya Bamama Basungi “epesameli nguya mpe likoki mpo na kosala makambo mingi ya minene Mosala oyo bazali kosala esalemi na likoki ya bozambe” (“Relief Society—An Aid to the Priesthood,” Relief Society Magazine, Jan. 1959, 4, 5). Matangi oyo etangamaki lisusu na Mpaka Dallin H. Oaks na lisikulu moko ya likita, “The Keys and Authority of the Priesthood,” Ensign or Liahona, Sanza ya Mitano 2014, 51.

  8. Boyd K. Packer, “The Relief Society,” Ensign, Nov. 1978, 8; Tala lisusu M. Russell Ballard, Counseling with Our Councils: Learning to Minister Together in the Church and in the Family (1997), 93.

  9. Tala Spencer J. Condie, Russell M. Nelson: Father, Surgeon, Apostle (2003), 153,–56. Liyebisi: Na 1964 Mokambi Kimball atiaki ngai maboko lokola mokambi ya likonzi mpe apambolaki ngai ete motango ya bawei ekita na emakasi na ngai ya kobanda mapaso ya nzela ya motema. Moke na kati na biso nde bayebaki ete mibu mwambe nsima, nalingaki kosala lipaso Mokambi Kimball oyo ezalaki lisusu kobongola nzela ya motema na ye ya mabe.

  10. “Ntango tolobeli libala lokola kimoninga, tika tolobela lokola kimoninga ya mobimba. Tolingi te basi ya BMS bazala baninga bafandi kimia to baninga oyo bazali na ndelo na etinda oyo ya seko! Nasengi bozala baoyo bazali na likabo mpe baninga ya mobimba” (Spencer W. Kimball, “Privileges and Responsibilities of Sisters,” Ensign, Nov. 1978, 106).

  11. “Ntina nionso ya mokili mpe nionso oyo ezalaki na mokili ekokaki komema na eloko te soki mwasi te—libanga likonzi na masuwa ya bokeli ya bonganganzambe” (Russell M. Nelson, “Lessons from Eve,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1987, 87). “Eva akomi ekelamu ya nsuka ya Nzambe, liboke monene wapi bakangi mosala nionso kitoko oyo mosalemi kino liboso” (Gordon B. Hinckley, “The Women in Our Lives,” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2004, 83).

  12. Tala Russell M. Nelson, “Children of the Covenant,” Ensign, May 1995, 33.