2010–2019
Kolongobana na Mapamboli na Biso Elakelama
sánzá ya zómi 2015


11:22

Kolongobana na Mapamboli na Biso Elakelama

Limoni ya mapamboli ya kokamwisa ya Tata na biso esengeli kozala ntina monene na miso na biso mokolo na mikolo nionso.

Olingaka ndeko mwasi oyo na video te? Toyebi ete mingi kati na bino oyo bazwi libaku ya kokolisa bana na binomei te bovandi na bomoi na bino kolingaka, koteyaka, mpe kopambolaka bana ya bato mosusu. Mpe, oh, boniboni Tata na biso ya Lola mpe biso, bandeko na bino ya basi, tolingi bino mpo na yango!

Tozali biso banso, lisanga na bino bilenge basi balingani na Eteyelo ya Bana mpe Bilenge Basi, tozali na libaku ya kosimba bebe abotami sika na maboko na biso mpe komona ye kotala yo na miso? Eyoki biso liyoki ya bule mpe ya molimo ezingaki molimo ya celesitiale oyo, kala mingi te atindami na Tata na biso ya Lola epai ya ekelamu ya sika, mwa nzoto peto? Nasalaki mayoki mingi te kitoko, pete mpenza, mpe molimo koleka.

Banzoto na biso ezali makabo ya bule uta na Tata na biso ya Lola. Ezali batempelo ya motoyemei. Ntango tobateli yango kosukwama mpe peto, tokoki kolongobana mpo na kosunga Tata na biso kokela banzoto mpo na bana balingami na Ye ya molimo.

Mateya ya Mokambi Packer

Na lisikulu ya suka ya Mokambi Boyd K. Packer na likita linene, oyo Bosengeli komikundola yango mpo ete “bolengeli mpe bipwepwe.” atatolaki “Mobeko mpo na koyikisa mpe kotondisa mokili… ezali ntina … mpe liziba ya esengo ya bato. Na bosaleli na bosolo ya nguya oyo, tokoki kokoma pene na Tata na biso ya Lola mpe kosala litondi ya esengo, ata ya bonzambe. Nguya ya kobota ezali eteni ya libaku na mwango te; yango ezali mwango ya esengo.”

Akobaki:

“Bolingo ya solo esengeli kosalama kino na sima ya libala bokaboli bolingo oyo ekofungola nguya wana ya bule ya kobota … [na] koboya makambo wapi mposa ya nzoto ekoka kokamba.  …

“… Esengo na biso na bomoi ya kufa [mpe] konetolama na biso ezali na lolenge nini toyanolaki na bamposa ya nzoto ya mbalakaka wana ekobaka.”1

Bandeko na ngai ya basi balingami, elongo na elenge to mobange, Nayokaki mwa kobanga ntango Nalengelaki lisikulu oyo. Lokola Alma mwana alakisaki, “Natombeli uta na eteni ya katikati ya motema na ngai … ete boyokamela … kobianga na nkombo na ye esantu, mpe kokengela mpe kokoba kosambela, ete bokoka kosenginiama te likolo ya oyo bokoki kokumba te, … ete bokoka kotombolama na mokolo ya nsuka.”2

Sima, Mormon lisusu atatolaki oyo na mikolo ya Alma, Korihor, motelemeli-Klisto, “ateyaki … , kobungisaka mitema ya … basi mingi.”3

Bandeko basi, Satana atelemisi “Korihor-lokola” dalapo na mikolo na bisona elonga monene kokola. Nini ezali bibundeli na ye mingi? Mikanda ya bopengwesi, film na TV, pornographie, kimakango na internet. Tokoki kosakana na mitambo ya Satana te mpe kozanga kozika. Mokili elingi mbano ya mbalakaka ata boyebi ya mbalakaka na Internet. Bandeko basi!Tokoki te kosakana na moto epeli makasi ya Satana mpe kozika te. Nayebi eloko moko te oyo ekolongisa biso mpo na kimonginga ya solo ya Molimo Mosanto koleka mayele.

Mingi na mokili ya lelo bazali koluka litomba ya mbalakaka mpe boyebi ya mbalakaka na nzela ya Internet. Na ngambo mosusu, tokopambolama koleka soki tosaleli bondimi na biso mpe na motema kokita mpe kokende epai ya Tata na biso ya Lola, liziba ya bosolonionso.Biyano mingi mpe elikia ekoki koya na nzela ya kolukaka mokolo na mokolo mpe kotangaka makomi mpe na losambo ya solo mpe ya mawa, kasi wana ezali na bilaka ya bongo te na nzela ya Internet. Profeta Jacob atatoli, “Mpo na Molimo akoloba bosolo mpe makambo lokola mazali mpenza. Yango wana, makambo maye mamonisami, mpe makambo lokola makozala.”4

Ntango tomikotisi na kotala, kotanga, to kopona kosala ekoki nini oyo ezali na nse kokutanisa na mibeko ya Tata na biso ya Lola, ezali kolembisa biso, bandeko ya basi balingami. Totiya mibu na biso mpembeni, soki ninitotali, koyokamela, to toponi kosala oyo ekokutana te na mibeko ya Nkolo na kati ya Jeunes Soyez Forts longola yango, bwaka yango, pasola yango, kolanda yango te.

Mobikisi na Gethsemane

Moko te kati nabiso azali ya kobonga nie, kasi ntango tosumukaki, Mokambi Packer amikundoli biso:

“Elaka ezali: ‘Tala, ye oyo ayamboli masumu na ye, lolenge moko alimbisami, mpe Ngai Nkolo, nakokanisa yango lisusu te’ (D&A 58:42). …

“… Bomikabi, oyo ekoki kosenga moko kati na biso, etikaka elembo te. Yango elakisi ata nini tosalaki to wapi tozalaki to boniboni eloko moko esalemaki, soki toyamboli na bosolo, Alakaki ete akosikola. Mpe ntango Asikolaki, ete atiaki oyo. Ezali na mingi mpenza oyo batamboli na kozanga ntina … elongo na elindo, koyebaka te boniboni bakoki kokima. Bokokima na kondimaka Bomikabi ya Yesu Klisto, mpe oyo nionso azalaki koyokisa bino mpasi ekoki kobaluka na bonzenga mpe bolingo ya libela.”5

Pembeni ya boyamboli, lisungi nini to makoki epesameli biso mpo na kosunga biso kozala ya kosukolama mpe bolamu? Eteyelo ya Bana na biso mpe bilenge basi banso bayebi mpe bayembaka loyembo “Scripture Power.”6 Ekoki biso kobakisa yango na “Prayer Power” “Temple Power” “Covenants Power” “Sabbath Day Power,” “Prophet Power,” mpe “Virtue Power”?

Wana ezali lisusu mapamboli minene mpe esangani na bilaka ya kobatelama elongo bolati malamu ya garment ya tempelo. Nakomaki koyoka ete nazali kolata elembo ya monkoto ya bonkumu epesami na Tata na ngai ya Lola. Ntango tomeki kolata garment malamu, natatoli ete Tata na biso andimi yango lokola elembo monene ya bolingo na biso komikaba epai na Ye. Ezali elembo ya mayokami tosalaki elongo na Ye, mpe Alakaki, “Ngai, Nkolo, nasepela ntango bokosalaka oyo nalobi, kasi ntango bosali oyo nalobi te bozali naelako te.7

Kala te nakendaki epai ya moninga ya kala oyo abomaki libala mbala mibale na ntina bomipesi na mabe mpe ekobo ya balongani na ye. Ye mpe bana na ye misato bamonaki mpasi mingi. Alelaki, “namekaki malamu mpe kovanda na bosembo. Mpo na nini nazali na mikakatano mingi? Nini ya mabe nasalaki? Nini Tata ya Lola alingi nasala? Nasambelaka mpe natangaka makomi, nasungaka bana na ngai, bakende na tempelo mbala na mbala.”

Ntango Nayokamelaki ndeko mwasi, Noyokaki lokola, koganga, “Osalaka yango! Osalaka nionso oyo Tata ya Lola alingaka mpe asepelaka yo osala!”

Esosolami, mingi balobelaki mapamboli elakelama oyo ya Tata na biso ezali kaka “mosika mingi,” mingimingi ntango bomoi na biso etondi na mikakatano. Kasi Alma ateyaki mwana na ye ya mobali oyo “bomoi oyo ezali ntango … mpo na komilengela mpo na kokutana na Nzambe.”8Ezali mpo na kozwa mapmboli na biso nionso te. Mokambi Packer alakisaki oyo “‘mpe bakovzala na esengo na nsima ya bomoi oyo. Molongo wana ntango makamwisi esalami mpe makambo nionso etiami na bosembo.”9Atako limoni ya mapamboli ya kokamwa elakamaki na Tata na biso esengeli kozala ntina monene liboso ya miso na biso mokolo na mokolo—mpe bongo lokola tokebisami “litondi ya ngolu na ye”10tokoki kosala moboko mokolo na mokolo.

Nayebi te mpo na nini tozali na mikakatano mingi oyo tozali na yango, kasi yango ezali liyoki na ngai mpenza,bandeko basi, mbano wana ezali monene, ya seko mpe ya koumela, ya esengo mpe koleka boyoki na biso oyo ya mbano ya mokolo wana, tokoki kotonda, Tata ya bolingo, “ Ezali wananionsooyo esengamaki?” Nandimi ete soki tokoki komikundola mokolo na mokolo mpe kondima bozindo ya bolingo oyo Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi na biso bazali nayango mpo na biso, tosengeli kolinga kosala eloko soki nini Basengaki mpo na kozonga pembeni na Bango lisusu. Nini ekoki kozala mabe, bandeko basi balingami, nini tomonaki mpasi awa soki, na nsuka, mikakatano wana ezali makambo mpenza oyo ekolongobanisa biso mpo na bomoi ya seko mpe konetolama na bokonzi ya Nzambe elongo na Bango?

Natatoli ete banzoto na biso ezali mapamboli ya buleuta na Tata na biso na Lola mpe ete lokola tobateli bomoi na biso peto na nzela ya likabo ya bomikabi ya Mobikisi na biso, mpe ya kosukwama mpe tobateli limoni Tata na biso alakaki mbano mokolo na mokolo liboso na biso, tokozwa mokolo moko “nionso oyo Tata na [biso] azali na yango.”11 Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.