Makomi
1 Nefi 13


Mokapo 13

Nefi amoni na limoni eklezia ya zabulu etiami na kati ya Bayuda-te, bobomboli mpe kolonizasio ya Amerika, bobungisi ya biteni mingi ya polele mpe ya motuya ya Biblia, ezalela elandi ya bopengwi ya baoyo bazali Bayuda-te, bozongisi ya nsango malamu, boyei ya makomi ya mikolo ya nsuka, mpe botongi ya Siona. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete anjelu alobaki epayi na ngai kolobaka: Tala! Mpe natalaki mpe namonaki bikolo mpe babokonzi.

2 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Omoni nini? Mpe nalobaki: Namoni bikolo mpe babokonzi.

3 Mpe alobaki epayi na ngai: Oyo ezali bikolo mpe babokonzi ya Bayuda-te.

4 Mpe esalemaki ete namonaki na kati ya bikolo ya Bayuda-te, bokeli ya eklezia ya monene.

5 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Tala bokeli ya eklezia oyo ezali ya nsomo mingi koleka likolo ya baeklezia nyonso misusu, oyo ebomi basantu ya Nzambe, iyo, mpe ekonyokola bango mpe ekolinga bango ba nsinga, mpe ekangi bango na nkanga ya ebende, mpe ememi bango kati na bokangemi.

6 Mpe esalemaki ete namonaki eklezia monene mpe ya nsomo; mpe namonaki zabulu ete azalaki mokeli na yango.

7 Mpe lisusu namonaki wolo, mpauni, mpe bilamba ya swa, mpe nsalaba mpe lino ya kilo ya malonga, mpe ndenge nyonso ya bilamba ya motuya; mpe namonaki basi mingi ya pite.

8 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai, kolobaka: Tala wolo, mpe mpauni, mpe bilamba ya swa, mpe nsalaba, mpe lino ya kilo mpe ya malonga, mpe bilamba ya motuya, mpe basi ya pite, bazali mposa ya eklezia ya monene mpe ya nsomo.

9 Mpe lisusu mpo na masanzoli ya mokili nde babomi basantu ya Nzambe, mpe bamemaki bango kati na bokangemi.

10 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonaki mai mingi; mpe ekabolaki baoyo bazali Bayuda-te uta na nkona ya bandeko na ngai ya mibali.

11 Mpe esalemaki ete anjelu alobaki epayi na ngai: Tala nkele ya Nzambe ezali likolo ya nkona ya bandeko na yo ya mibali.

12 Mpe natalaki mpe namonaki moto moko na kati ya baoyo bazalaki Bayuda-te, oyo akabwanaki na nkona ya bandeko mibali na ngai na mai mingi; mpe namonaki Molimo ya Nzambe, ete akitaki mpe asalaki likolo ya moto yango; mpe akendaki likolo ya mai mingi, kutu epayi na nkona ya bandeko mibali na ngai, baoyo bazalaki na mboka elakelama.

13 Mpe esalemaki ete namonaki Molimo ya Nzambe, ete asalaki likolo ya basusu oyo bazalaki Bayuda-te; mpe bakendaki uta na bokangemi, likolo ya mai mingi.

14 Mpe esalemaki ete namonaki ebele mingi ya Bayuda-te likolo ya mboka ya elaka; mpe namonaki nkele ya Nzambe, ete ezalaki likolo ya nkona ya bandeko mibali na ngai; mpe bapanzamaki liboso ya baoyo bazalaki Bayuda-te mpe babetamaki.

15 Mpe namonaki Molimo ya Nkolo, ete ezalaki likolo ya Bayuda-te, mpe bafulukaki mpe bazwaki mboka ya bosangoli libula na bango; mpe namonaki ete bazalaki mpembe, mpe bonzenga mpe kitoko mingi koleka, lokola bato na ngai yambo ete babomama.

16 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonaki ete Bayuda-te baoyo bakendaki uta na bokangemi bamikitisaki liboso ya Nkolo, mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango.

17 Mpe namonaki ete mama na bango Bayuda-te basanganaki esika moko likolo ya mai, mpe lisusu likolo ya mabele, mpo na kobunda na bango.

18 Mpe namonaki ete nguya ya Nzambe ezalaki elongo na bango, mpe lisusu ete nkele ya Nzambe ezalaki likolo na bango nyonso oyo basanganaki esika moko mpo na kobunda na bango.

19 Mpe ngai, Nefi, namonaki ete Bayuda-te baoyo bakendaki uta na bokangemi bakangolamaki na nguya ya Nzambe uta na maboko ya bikolo nyonso misusu.

20 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonaki ete bafulukaki na mboka; mpe namonaki buku moko, mpe ememamaki na kati na bango.

21 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Oyebi ndimbola ya buku oyo?

22 Mpe nalobaki epayi na ye: Nayebi te.

23 Mpe alobaki: Tala ebimi uta na monoko ya Moyuda. Mpe ngai, Nefi, namonaki yango; mpe alobaki epayi na ngai: Buku oyo omoni ezali lisolo ya makomi ya Bayuda, oyo ezali na mayokani ya Nkolo, oyo asalaki na ndako ya Yisalaele; mpe lisusu ezali na mingi ya masakoli ya baprofeta basantu; mpe ezali lisolo ya makomi lolenge moko mpe lokola minkoma oyo ezali likolo ya bapalaki ya motako, longola se ezali mingi mpenza te; kasi, ezali na mayokani ya Nkolo, oyo asalaki na ndako ya Yisalaele; yango wana, ezali ya motuya monene mpenza mpo na Bayuda-te.

24 Mpe anjelu ya Nkolo alobaki epayi na ngai: Omonaki ete buku oyo ebimaki uta na monoko ya Moyuda; mpe ntango ebimaki uta na monoko ya Moyuda ezalaki na litondi ya nsango malamu, oyo kani bapostolo zomi na mibale bapesi litatoli; mpe bapesi litatoli engebene na bosolo oyo ezali na Mwana ya mpate ya Nzambe.

25 Yango wana, makambo oyo ekendaki uta na Bayuda na bopeto epayi ya Bayuda-te, engebene na bosolo oyo ezali na Nzambe.

26 Mpe esili yango kokende na loboko ya bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate, uta na Bayuda epayi ya Bayuda-te, omoni bokeli ya eklezia wana ya monene mpe ya nsomo, oyo ezali ya nsomo mingi koleka baeklezia nyonso misusu; mpo tala, balongoli uta na nsango malamu ya Mwana ya mpate biteni mingi oyo ezalaki polele mpe motuya mingi koleka nyonso; mpe lisusu mayokani mingi ya Nkolo balongolaki.

27 Mpe nyonso oyo basalaki ete bakoka kobebisa nzela ya sembo ya Nkolo, ete bakoka kozipa miso mpe koyeisa mitema ya bana ya bato makasi.

28 Yango wana, omoni ete esilaki buku kokende na nzela ya maboko ya eklezia ya monene mpe ya nsomo, ete makambo mingi ya polele mpe ya motuya elongolamaki uta na buku yango, oyo ezali buku ya Mwana ya mpate ya Nzambe.

29 Mpe esilaki makambo oyo ya polele mpe ya motuya kolongolama, yango ekendaki na bikolo nyonso ya Bayuda-te; mpe esilaki yango kokende na bikolo nyonso ya Bayuda-te, iyo, kutu na ngambo ya mai mingi oyo omonaki elongo na Bayuda-te baoyo bakendaki uta na bokangemi, omoni—na ntina ya makambo mingi ya polele mpe ya motuya oyo balongolaki uta na buku, oyo ezalaki polele mpo na bososoli ya bana ya bato, engebene na polele oyo ezali na Mwana ya mpate ya Nzambe—na ntina ya makambo oyo balongolaki uta na nsango malamu ya Mwana ya mpate, motango monene koleka mingi babetaki mabaku, iyo, na lolenge ete Satana azali na nguya monene likolo na bango.

30 Nzokande, omoni ete Bayuda-te oyo bakendaki uta na bokangemi, mpe baoyo batombolamaki na nguya ya Nzambe likolo ya bikolo misusu, likolo ya etando ya mboka ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu, oyo ezali mboka oyo Nkolo Nzambe asalaki liyokani na tata na yo ete nkona na ye ekozwa lokola mboka ya bosangoli libula na bango; yango wana, omoni ete Nkolo Nzambe akopesa te nzela ete baoyo bazali Bayuda-te babebisa bosangisi ya nkona na yo nie, oyo ezali na kati ya bandeko na yo ya mibali.

31 Akopesa mpe te nzela ete baoyo bazalaki Bayuda-te babebisa nkona ya bandeko na yo ya mibali.

32 Nkolo Nzambe akopesa mpe te nzela ete Bayuda-te bawumela na ezalela ya nsomo ya bokufi miso, oyo omoni bazali na yango, mpo ete biteni ya polele mpe ya motuya mingi koleka ya nsango malamu oyo elongolamaki na eklezia wana ya nsomo, oyo kani omonaki bokeli.

33 Yango wana, elobi Mwana ya mpate ya Nzambe: Nakotondisama na boboto mpo na Bayuda-te, kino na kokendaka kotala montika ya ndako ya Yisalaele na bosambisi monene.

34 Mpe esalemaki ete anjelu ya Nkolo alobaki epayi na ngai, kolobaka: Tala, elobi Mwana ya mpate ya Nzambe, ekosila ngai kokende kotala montika ya ndako ya Yisalaele—mpe montika oyo nalobelaki ete ezali nkona ya tata na yo—yango wana, ekosila ngai kokende kotala bango na bosambisi, mpe kobeta bango na loboko ya Bayuda-te, mpe ekosila Bayuda-te kobeta mabaku mingi koleka, na ntina ya biteni ya polele mpe ya motuya koleka ya nsango malamu ya Mwana ya mpate oyo elongolamaki na eklezia ya nsomo, oyo ezali mama na basi ya pite, elobi Mwana ya mpate—nakotondisama na boboto mpo na Bayuda-te na mokolo wana, na lolenge ete nakomema epayi na bango, na nguya na ngai moko, mingi ya nsango malamu, oyo ekozala polele mpe ya motuya, elobi Mwana ya mpate.

35 Mpo, tala, elobi Mwana ya mpate: Nakomilakisa epayi na nkona na yo, ete bakokoma makambo mingi oyo nakosala epayi na bango, oyo ekozala polele mpe ya motuya; mpe ekosila nkona na yo kobebisama, mpe kobeba moke moke kati na bozangi boyambi, mpe nkona ya bandeko na yo ya mibali mpe lokola, tala, makambo oyo ekobombama, mpo na kokende epayi ya Bayuda-te, na lisalisi ya likabo mpe nguya ya Mwana ya mpate.

36 Mpe na yango nde nsango malamu na ngai ekokomama, elobi Mwana ya mpate, mpe libanga na ngai mpe lobiko na ngai.

37 Mpe bapambolami ezali bango oyo bakoluka kotia Siona na ngai na mokolo wana, mpo bakozwa likabo mpe nguya ya Molimo Mosantu; mpe soki bakotia molende kino na nsuka, bakotombwama likolo na mokolo ya nsuka, mpe bakobikisama na bokonzi ya libela ya Mwana ya mpate; mpe oyo nyonso akosakola kimia, iyo, nsango ya bosepeli monene, lolenge boni kitoko bakozala likolo ya ngomba.

38 Mpe esalemaki ete namonaki montika ya nkona ya bandeko mibali na ngai, mpe lisusu buku ya Mwana ya mpate ya Nzambe, oyo ebimaki uta na monoko ya Moyuda, ete ekendaki uta na Bayuda-Te epayi ya montika ya nkona ya bandeko na ngai ya mibali.

39 Mpe esilaki yango kokoma epayi na bango, namonaki babuku mosusu, oyo eyaki na lisalisi ya nguya ya Mwana ya mpate, uta na Bayuda-te epayi na bango, mpo na kondimisa baoyo bazalaki Bayuda-te mpe montika ya nkona ya bandeko mibali na ngai, mpe lisusu Bayuda baoyo bapanzamaki likolo ya etando nyonso ya mabele ete masolo ya makomi ya baprofeta mpe ya bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate ezali solo.

40 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai, kolobaka: Masolo ya makomi oyo ya nsuka, oyo omonaki na kati ya baoyo bazali Bayuda-te, makotia bosolo na oyo ya yambo, oyo ezali ya bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate, mpe makoyebisa makambo ya polele mpe ya motuya oyo elongolamaki uta na yango, mpe ekoyebisa na mabota nyonso, minoko nyonso, mpe bato nyonso, ete Mwana ya mpate ya Nzambe azali Mwana ya Tata ya Seko, mpe Mobikisi na mokili; mpe ete bato nyonso basengeli koya epayi na ye, soki te bakoki te kobikisama.

41 Mpe esengeli koya engebene na maloba oyo ekotiama na monoko ya Mwana ya mpate; mpe maloba ya Mwana ya mpate ekoyebisama kati na masolo ya makomi ya nkona na yo, kati na masolo ya makomi ya bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate mpe lokola; yango wana, nyonso mibale ekotiama kati na lisolo ya makomi moko; mpo azali se Nzambe moko mpe Mobateli moko likolo ya mabele nyonso.

42 Mpe ntango ezali koya ete akomimonisa epayi na bikolo nyonso, ezala epayi na Bayuda mpe lisusu epayi ya Bayuda-te mpe lokola; mpe ekosila ye komimonisa epayi na Bayuda mpe epayi ya Bayuda-te, nde akomimonisa epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe epayi na Bayuda, mpe baoyo ya nsuka bakozala ya yambo, mpe baoyo ya yambo bakozala ya nsuka.

Bimisa na lokasa