Makomi
2 Nefi 9


Mokapo 9

Yakobo alimboli ete Bayuda bakosangisama kati na bamboka na bango nyonso ya elaka—Bomikabi esikoli moto uta na Bokwei—Nzoto ya bakufi ekobima uta na lilita, mpe milimo na bango uta na lifelo mpe uta na paladiso—Bakosambisama—Bomikabi ebikisaka uta na liwa, lifelo, zabulu, mpe monioko mozanga nsuka—Basembo basengeli kobikisama na bokonzi ya Nzambe—Bitumbu mpo na masumu bilimbolami—Moko Mosantu ya Yisalaele azali mokengeli ya ekuke. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, bandeko mibali balingami na ngai, natangaki makambo oyo ete bokoka koyeba mpo na ntina ya mayokani ya Nkolo oyo ayokanaki na ndako nyonso ya Yisalaele—

2 Oyo alobaki na Bayuda, na monoko ya baprofeta basantu na ye, kutu uta na ebandeli kino nsima, uta nkola na nkola, kino ntango ekoya ete bakozongisama na eklezia ya solo mpe etonga ya Nzambe; ntango bakosangisama epayi na bango na mboka ya bosangoli libula na bango, mpe bakotiama na bamboka na bango nyonso ya elaka.

3 Tala, bandeko mibali balingami na ngai, nazali kolobela bino makambo oyo ete bokoka kosepela, mpe botombolamitu na bino libela, na ntina ya mapamboli Nkolo Nzambe akobonza likolo ya bana na bino.

4 Mpo nayebi ete, mingi kati na bino, bolukaki mingi koyeba mpo na oyo etali makambo ekoya; yango wana nayebi ete bino boyebi ete mosuni na biso esengeli moke moke kobeba mpe kokufa; nzokande, na nzoto na biso tokomona Nzambe.

5 Iyo, nayebi ete boyebi ete na nzoto akomilakisa epayi na bango oyo na Yelusaleme, wapi toutaki; mpo elongobani ete ezala na kati na bango; mpo esengami na Mokeli monene ete apesa nzela ye moko mpo na kokoma moyangelami epayi na moto na mosuni, mpo na kokufa mpo na bato nyonso, ete bato nyonso bakoka kokoma bayangelami epayi na ye.

6 Mpo lokola liwa elekaki likolo ya bato nyonso, mpo na kokokisa mwango etonda na boboto ya Mokeli monene, esengeli mpenza ete nguya ya bosekwi ezala, mpe bosekwi esengeli mpenza koya epayi na moto mpo na ntina ya bokwei; mpe bokwei eyaki mpo na ntina ya bobuki mobeko; mpe mpo ete bato bakomaki bakwei bakatamaki mosika uta na miso ya Nkolo.

7 Yango wana, esengeli mpenza ete bomikabi boye ezanga ndelo ezala—longola se soki ezali bomikabi ezanga ndelo soki bongo te nzoto oyo ya bopoli ekokaki kolata bozangi bopoli te. Yango wana, bosambisi ya yambo oyo eyaki likolo ya moto esengelaki mpenza kowumela na bowumeli oyo ezanga nsuka. Mpe soki bongo, mosuni oyo mosengelaki kolalisama na nse mpo na kopola mpe kokoma potopoto na mabele mama na yango, mpo na kosekwa lisusu te.

8 O bwania ya Nzambe, boboto na ye mpe ngolu na ye! Mpo tala, soki mosuni ekosekwa lisusu te milimo na biso misengelaki kokoma kaka nde miyangelami na anjelu oyo akweyaki uta na liboso ya miso ya Nzambe ya Seko, mpe akomaki zabulu, mpo na kosekwa lisusu te.

9 Mpe milimo na biso misengelaki kokoma lokola ye, mpe mbele tokomi bazabulu, banjelu ya zabulu, mpo na kokangama uta na miso ya Nzambe na biso, mpo na kowumela elongo na tata ya lokuta, na mpasi, lokola ye moko; iyo, na mozali oyo akosaki baboti ya yambo na biso na mayele, oyo amimonisami lokola anjelu ya pole, mpe asenginiaka bana ya bato na makelemba ya nkuku ya bobomi mpe ndenge nyonso ya misala ya nkuku ya molili.

10 O lolenge boni monene ezali bolamu ya Nzambe na biso, oyo alengeli nzela mpo na kokima na biso uta na bofinami ya dongolomiso ya nsomo oyo; iyo, dongolomiso wana, liwa mpe lifelo, oyo nabiangi liwa ya nzoto, mpe lisusu liwa ya molimo.

11 Mpe na ntina ya nzela ya bokangoli ya Nzambe na biso, Moko Mosantu ya Yisalaele, liwa oyo, oyo kani nalobeli, oyo ezali ya ntango, ekotika bakufi ya yango; oyo wapi liwa ezali lilita.

12 Mpe liwa oyo nalobeli, oyo ezali liwa ya molimo, ekotika bakufi ya yango; oyo liwa ya molimo ezali lifelo; yango wana, liwa mpe lifelo basengeli kotika bakufi na bango, mpe lifelo esengeli kotika milimo ekangama na yango, mpe lilita esengeli kotika nzoto ekangama na yango, mpe nzoto mpe milimo ya bato mikozongisama moko na mosusu; mpe ezali na nguya ya bosekwi ya Moko Mosantu ya Yisalaele.

13 O lolenge boni monene ezali mwango ya Nzambe na biso! Mpo epayi mosusu, paladiso ya Nzambe esengeli kotika milimo ya basembo, mpe lilita kotika nzoto ya basembo; mpe molimo mpe nzoto ezongisami na yango moko lisusu, mpe bato nyonso bazangi kopola, mpe bazangi bokufi, mpe bazali milimo na bomoi, kozalaka na boyebi moko ya kobonga nie lokola biso na mosuni, longola se soki ekozala ete boyebi na biso ekozala ya kobonga nie.

14 Yango wana, tokozala na boyebi moko ya kobonga nie mpo na elindo nyonso na biso, mpe mbindo na biso, mpe bolumbu na biso; mpe basembo bakozala na boyebi moko ya kobonga nie ya bosepeli na bango, mpe bosembo na bango, kolatisamaka na bopeto, iyo, kutu na nzambala ya bosembo.

15 Mpe ekosalema ete ntango bato nyonso bakoleka uta na liwa oyo ya yambo na bomoi, na lolenge ete basili kokoma bazanga bokufi, basengeli kobima liboso ya kiti ya bosambisi ya Moko Mosantu ya Yisalaele; mpe na nsima nde ekoya bosambisi, mpe nsima nde esengeli bango kosambisama engebene na bosambisi bosantu ya Nzambe.

16 Mpe na ntembe te, lokola Nkolo azali na bomoi, mpo Nkolo Nzambe alobaki yango, mpe ezali liloba na ye ya seko, oyo ekoki koleka te, ete baoyo bazali sembo bakozala kaka sembo, mpe baoyo bazali mbindo bakozala kaka mbindo; yango wana, baoyo bazali mbindo bazali zabulu mpe banjelu na ye; mpe bakokende mosika kati na moto ya libela, oyo molengelamaki mpo na bango; mpe monyoko na bango ezali lokola liziba ya moto mpe libanga ya fofolo, oyo kani mololi ekomata libela na libela mpe ezali na nsuka te.

17 O bonene mpe boyengebene ya Nzambe na biso! Mpo akosala maloba na ye nyonso, oyo ebimaki uta na monoko na ye, mpe mobeko na ye esengeli kokokisama.

18 Kasi, tala, basembo, basantu ya Moko Mosantu ya Yisalaele, baoyo bandimaki Moko Mosantu ya Yisalaele, baye na molende bamemaki bikulusu ya mokili, mpe batalaki mpamba nsoni na yango, bakosangola libula ya bokonzi ya Nzambe, oyo bolengelamaki mpo na bango uta na bokelami ya mokili, mpe bosepeli na bango ekotondisama libela.

19 O bonene ya boboto ya Nzambe na biso, Moko Mosantu ya Yisalaele! Mpo akangoli basantu na ye uta na dongolomiso ya nsomo wana zabulu, mpe na liwa, mpe na lifelo mpe na liziba ya moto mpe na libanga ya fofolo, oyo ezali monyoko ezanga nsuka.

20 O lolenge boni monene ezali bosantu ya Nzambe na biso! Mpo ayebi makambo nyonso, mpe ezali na eloko moko te oyo ayebi te.

21 Mpe akoya kati na mokili ete akoka kobikisa bato nyonso soki bakoyoka mongongo na ye; mpo tala, akoyoka bolozi mpo na bato nyonso, iyo, bolozi ya ekelamo na ekelamo ya bomoi, ezala mibali, basi, mpe bana, baoyo bazali na libota ya Adama.

22 Mpe andimaki oyo ete bosekwi ekoka kosalema na bato nyonso, ete nyonso bakoka kotelema liboso na ye na mokolo monene mpe ya bosambisi.

23 Mpe atindi bato nyonso ete basengeli koyambola, mpe kobatisama na nkombo na ye, kozalaka na bondimi ya kobonga nie na Moko Mosantu ya Yisalaele, soki te bakoki kobikisama te na bokonzi ya Nzambe.

24 Mpe soki bakoyambola te mpe bakondima na nkombo na ye te, mpe bakobatisama na nkombo na ye te, mpe soki bakotia molende kino na nsuka te, basengeli kokweisama; mpo Nkolo Nzambe, Moko Mosantu ya Yisalaele, alobi yango.

25 Yango wana, apesaki mobeko; mpe wapi mobeko mopesami te etumbu ezali te; mpe wapi etumbu ezali te bokweisami ezali te; mpe wapi bokweisami ezali te boboto ya Moko Mosantu ya Yisalaele ezali na bosenga likolo na bango, na ntina ya bomikabi; mpo bakangolami na nguya na ye.

26 Mpo bomikabi esepelisi masengami ya boyengebene na ye likolo ya nyonso oyo mobeko mopesami na bango te, ete bakangolama uta na dongolomiso wana ya nsomo, liwa mpe lifelo, mpe zabulu, mpe liziba ya moto mpe fofolo, oyo ezali monioko ezanga nsuka; mpe bazongisama na Nzambe oyo apesaki bango mpema, oyo azali Mosantu ya Yisalaele.

27 Kasi lisuma epayi na ye oyo apesami mobeko, iyo, oyo azali na mitindo nyonso ya Nzambe, lokola biso, mpe oyo akobuka yango, mpe oyo akobebisa mikolo na ye ya komekama, mpo nsomo ezali ezalela na ye!

28 O mwango wana ya mayele mabe ya moko oyo ya mabe! O botombwami ya mpamba, mpe bolembu, mpe liboma ya bato! Ntango bazali ya koyekola bakanisi bazali na bwania, mpe bayokaka toli ya Nzambe te, mpo batiaka yango mpembeni, kobanzaka ete bayebi na bango moko, yango wana, bwania na bango ezali ya liboma mpe epesaka bango litomba te. Mpe bakowa.

29 Kasi kozala ya koyekola ezali malamu soki bakoyoka toli ya Nzambe.

30 Kasi lisuma epayi ya bato na bozwi, baoyo bazali na bozwi ya biloko ya mokili. Mpo na ntina ete bazali na bozwi bazali kotiola babola, mpe bakoniokolo basokemi, mpe mitema na bango ezali likolo ya bomengo na bango; yango wana, bomengo na bango ezali nzambe na bango. Mpe tala, bomengo na bango ekowa elongo na bango.

31 Mpe lisuma epayi ya bato bakufa matoyi baoyo balingi koyoka te; mpo bakowa.

32 Lisuma epayi ya bato bakufa miso baoyo balingi komona te; mpo bakowa mpe lokola.

33 Lisuma epayi na basutu na mitema; mpo boyebi ya mabe na bango ekobeta bango na mokolo ya nsuka.

34 Lisuma epayi na moto ya lokuta, mpo akobwakama na lifelo.

35 Lisuma epayi na mobomi oyo abomi na nko, mpo akokufa.

36 Lisuma epayi na bango oyo basalaka pite, mpo bakobwakama na nse na lifelo.

37 Iyo, lisuma epayi na bango oyo bakumbamelaka bikeko, mpo zabulu ya bazabulu nyonso asepelaka na bango.

38 Mpe, mpo na kosukisa, lisuma na baye epayi banso bakokufa kati na masumu na bango; mpo bakozonga epayi na Nzambe, mpe bakomona elongi na ye, mpe bakotikala kati na masumu na bango.

39 O, bandeko mibali balingami na ngai, bomikundola nsomo na kobukaka mobeko na kotelemelaka Nzambe wana Mosantu, mpe nsomo ya kokweyaka na masenginia ya moko oyo ya mayele mabe. Bomikundola, kozala na makanisi ya mosuni ezali liwa, mpe kozala na makanisi ya molimo ezali bomoi ya seko.

40 O, bandeko mibali balingami na ngai, botia litoyi na maloba na ngai. Bomikundola monene ya Moko Mosantu ya Yisalaele. Boloba te ete nalobelaki bino makambo makasi; mpo soki bosali yango, bokotiola bosolo; mpo nalobaki maloba ya Mozalisi na bino. Nayebi ete maloba ya bosolo ezali makasi likolo ya mbindo nyonso; kasi basembo bakobanga yango te, mpo balingi bosolo mpe bakoningisama te.

41 O bongo, bandeko mibali balingami na ngai, boya epayi ya Nkolo, Moko Mosantu. Bomikundola ete banzela na ye ezali sembo. Tala, nzela mpo na moto ezali nkaka, kasi elali na botamboli ya semba liboso na ye, mpe mokengeli ya ekuke ezali Moko Mosantu ya Yisalaele; mpe kuna asalelaka mosali te; mpe nzela mosusu ezali te longola se soki ezali na ekuke; mpo akoki kokosa te, mpe Nkolo Nzambe ezali nkombo na ye.

42 Mpe oyo nyonso akobeta, akofungolela ye; mpe bato ya bwania, bato bayekola, mpe baoyo bazali bazwi, baoyo bavimbani na ntina ya boyekoli na bango, mpe bwania na bango mpe bozwi na bango—iyo, bazali baoyo ye akotala mpamba; mpe longola se soki bakobwaka mosika makambo oyo, mpe bamimoni bato ya liboma liboso ya Nzambe, mpe bakiti na bozindo ya bomikitisi, akofungolela bango te.

43 Kasi makambo ya bato ya bwania mpe bato ya ekenge makobombama mosika uta na bango libela—iyo, yango wana esengo oyo elengelamaki mpo na basantu.

44 O, bandeko mibali balingami na ngai, bomikundola maloba na ngai. Tala, nalongoli bilamba na ngai, mpe naningisi yango liboso na bino; nasambeli Nzambe ya lobiko na ngai ete atala ngai na liso na ye oyo emonaka nyonso; yango wana, bokoyeba na mokolo ya nsuka, ntango bato nyonso bakosambisama mpo na misala na bango, ete Nzambe ya Yisalaele atatolaki ete naningisaki mabe na bino mosika uta na molimo na ngai, mpe ete natelemi kati na bongengi liboso na ye, mpe nazali peto na makila na bino.

45 O, bandeko mibali balingami na ngai, botika masumu na bino; bolongola miniololo na ye oyo alingi kokanga bino ngwi; boya epayi na Nzambe oyo azali libanga ya lobiko na bino.

46 Bolengela milimo na bino mpo na mokolo wana ya nkembo ntango boyengebene ekopesama epayi na basembo, kutu mokolo ya bosambisi, ete bokoka kozonga nsima te na bobangi ya nsomo; ete bokoka te komibombama na bobangi ya nsomo; ete bomikundola elindo na bino ya nsomo na bobongi nie, mpe bosengisama te na makasi mpo na koganga: Santu, santu ezali masambisi na yo, O Nkolo Nzambe ya Bokasi Nyonso—kasi nayebi elindo na ngai; nabukaki mobeko na yo, mpe bobuki mitindo na ngai ezali na ngai; mpe zabulu azwaki ngai, na lolenge ete nazali nyama bakangi na mpasi na ye ya nsomo.

47 Kasi tala, bandeko mibali na ngai, ezali likambo elongobani ete nalamusa bino na koyebaka ete makambo ya bobangi oyo ezali solo? Elingaki ngai kopasola milimo na bino soki mayele na bino mazalaka peto? Elingaki ngai kozala polele na bino engebene na polele ya bosolo soki bozalaki nsomi uta na masumu?

48 Tala, soki bozalaki basantu, nalingaki kolobela bino makambo ya bosantu; kasi lokola bozali basantu te, mpe botali ngai lokola moteyi, esengeli mpenza ete nateya bino malandi ya masumu.

49 Tala, molimo na ngai eboyi masumu, mpe motema na ngai mosepeli na bosembo; mpe nakosanzola nkombo esantu ya Nzambe na ngai.

50 Boya, bandeko mibali na ngai, moko na moko oyo azali na mposa ya mai, yaka na mai; mpe oyo azali na mosolo te, yaka kosomba mpe kolia; iyo, yaka kosomba vinyo mpe mabele na mosolo te, na ntalo mpe te.

51 Yango wana, bobebisa mosolo te mpo na oyo ezali motuya te, to misala na bino mpo na oyo ekoki kotondisa te. Boyokela ngai na molende, mpe bomikundola maloba oyo nalobaki; mpe boya epayi ya moko Mosantu ya Yisalaele, mpe bosala lipati na oyo ekowa te, to mpe ekoki kopola te, mpe tika molimo na bino mosepela na bilei kitoko.

52 Tala, bandeko mibali balingami na ngai, bomikundola maloba ya Nzambe na bino; bosambela ye ntango nyonso na moi, mpe bopesa matondi na nkombo esantu na ye na butu. Tika ete mitema na bino esepela.

53 Mpe tala lolenge boni minene ezali mayokani ya Nkolo, mpe lolenge boni monene ezali bonkonde na ye mpo na bana ya bato; mpe na ntina ya monene na ye, mpe ngolu mpe boboto na ye, alakaki epayi na biso ete nkona na biso ekobebisama mobimba te, engebene na mosuni, kasi ete akobatela bango; mpe na bankola ya nsima bakokoma etape ya sembo mpo na ndako ya Yisalaele.

54 Mpe sikawa, bandeko mibali na ngai, nalingaki kolobela bino mingi koleka; kasi na mokolo ya nsima nakoyebisa bino oyo etikali ya maloba na ngai. Amene.

Bimisa na lokasa