Makomi
Moroni 10


Mokapo 10

Litatoli ya Buku ya Mormon liyaka na nguya ya Molimo Mosantu—Makabo ya Molimo epesami na basembo—Makabo ya Molimo malandaka ntango nyonso bondimi—Maloba ya Moroni malobami uta na mputulu—Boya epayi na Klisto, bokoma bato oyo babongisami nie na Ye, mpe bosantisa milimo na bino. Penepene na 421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Sikawa ngai, Moroni, nakomi mwa makambo lokola ebongeli ngai malamu; mpe nakomeli bandeko na ngai Balamani; mpe nalingi bayeba ete mingi koleka mibu nkama minei na ntuku mibale elekaki, uta epesamaki elembo ya boyei ya Klisto.

2 Mpe nakangi masolo ya makomi oyo, esili ngai koloba mwa ndambo ya maloba mpo na ntina ya kolendisa bino.

3 Tala, nalingi kolendisa bino ete ntango bokotanga makambo oyo, soki ezali bwania na Nzambe ete botanga yango, ete bomikundola lolenge boni Nkolo atondaki na boboto epayi na bana ya bato, uta na bokeli ya Adama, kutu kino na ntango oyo bokozwa makambo oyo, mpe bomanyola yango kati na mitema na bino.

4 Mpe ntango ekozwa bino biloko oyo, nalingi kolendisa bino ete bosenga Nzambe, Tata ya Seko, na nkombo ya Klisto soki makambo oyo ezali solo te; mpe soki bosengi na motema ya bosembo, na mokano ya solo, kozalaka na bondimi na Klisto, akomonisa bosolo na yango epayi na bino, na nguya ya Molimo Mosantu.

5 Mpe na nguya ya Molimo Mosantu bokoki koyeba bosolo ya makambo nyonso.

6 Eloko nyonso kani oyo ezali malamu ezali alima mpe solo; yango wana, eloko moko te oyo ezali malamu ewanganaka Klisto, kasi endimaka ete azali.

7 Mpe bokoki koyeba ete azali, na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana nalingi kolendisa bino ete, bowangana nguya ya Nzambe te; mpo asalaka na nguya, engebene na bondimi ya bana ya bato, lolenge moko lelo mpe lobi, mpe libela.

8 Mpe lisusu, nalendisi bino, bandeko na ngai, ete bowangana makabo ya Nzambe te, mpo ezali mingi; mpe mawutaka na Nzambe se moko wana. Mpe ezali na banzela ekeseni oyo makabo oyo epesami; kasi ezali Nzambe se moko wana oyo asalaka nyonso mpo na nyonso; mpe epesami na nzela ya mamonisi ya Molimo ya Nzambe epayi ya bato, mpo na litomba na bango.

9 Mpo tala, na moko epesami na Molimo ya Nzambe, ete akoka koteya liloba ya bwania;

10 Mpe na mosusu, ete akoka koteya maloba ya boyebi na Molimo se moko wana;

11 Mpe na mosusu, bondimi monene koleka; mpe na mosusu, makabo ya kobikisa bokono na Molimo se moko wana;

12 Mpe lisusu, na mosusu, ete akoka kosala makamwisi minene;

13 Mpe lisusu, na mosusu, ete akoka kosakola mpo na oyo etali makambo nyonso;

14 Mpe lisusu, na mosusu, komona banjelu mpe milimo kosalaka;

15 Mpe lisusu, na mosusu, ndenge nyonso ya minoko;

16 Mpe lisusu, na mosusu, bolimboli ya nkota mpe minoko ya ndenge na ndenge.

17 Mpe makabo oyo nyonso epesami na Molimo ya Klisto; mpe epesami na nyonso, moto na moto, engebene na bolingi na ye.

18 Mpe nalingi kolendisa bino, bandeko balingami na ngai, ete bomikundola ete likabo nyonso ya malamu liutaka na Klisto.

19 Mpe nalingi kolendisa bino, bandeko balingami na ngai, ete bomikundola ete azali se lolenge moko lobi, lelo, mpe libela, mpe ete makabo oyo nyonso oyo nalobeli, oyo ezali ya molimo, makosila soki moke te, kutu ekozala ntango molai lokola ekowumela mokili, bobele engebene na bozangi boyambi ya bana ya bato.

20 Yango wana, bondimi esengeli kozala; soki bondimi esengeli kozala elikya esengeli mpe lokola kozala; mpe soki elikya esengeli kozala bolingani esengeli mpe lokola kozala.

21 Mpe longola se soki bozali na bolingani bokoki ata moke te kobikisama na bokonzi ya Nzambe; bokoki kobikisama mpe te na bokonzi ya Nzambe soki bozali na bondimi te; bokoki kobikisama mpe te soki bozali na elikya te.

22 Mpe soki bozali na elikya te bosengeli mpenza kozala kati na kozanga elikya; mpe kozanga elikya eyaka na ntina ya bobe.

23 Mpe Klisto solo alobaki epayi ya batata na biso: Soki bozali na bondimi bokoki kosala makambo nyonso oyo malongobani epayi na ngai.

24 Mpe sikawa nazali koloba epayi na nsuka nyonso ya mabele—ete soki esalemi mokolo moko ete nguya mpe makabo ya Nzambe masili na kati na bino, ekozala na ntina ya bozangi boyambi.

25 Mpe lisuma ezala epayi na bana ya bato soki ezali bongo; mpo ekozala na moto moko te oyo azali kosala bolamu na kati na bino, te, ata moko te. Mpo soki ezali na moto moko na kati na bino oyo azali kosala bolamu, akosala na nguya mpe makabo ya Nzambe.

26 Mpe lisuma epayi na bango oyo bakolongola makambo oyo mpe bakufi, mpo bakufi kati na masumu na bango, mpe bakoki kobikisama na bokonzi ya Nzambe te; mpe nazali koloba yango engebene na maloba ya Klisto; mpe nakosi te.

27 Mpe nalendisi bino mpo na komikundola makambo oyo; mpo ntango ezali koya na lombangu wapi bokoyeba ete nakosi te, mpo bokomona ngai na esambiselo ya Nzambe; mpe Nkolo Nzambe akolobela bino: Esakolaki ngai te maloba na ngai epayi na bino, oyo ekomamaki na moto oyo, lokola moko oyo azali koganga uta na bakufi, iyo, kutu lokola moko oyo azali koloba uta na mputulu?

28 Nasakoli makambo oyo mpo na bokokisi ya masakoli. Mpe tala, makobima uta na monoko ya Nzambe ya libela, mpe liloba na ye ekobeta piololo uta nkola na nkola.

29 Mpe Nzambe akolakisa epayi na bino, ete oyo wana nakomaki ezali solo.

30 Mpe lisusu nalingi kolendisa bino ete boya epayi na Klisto, mpe bokangama na makabo nyonso ya malamu, mpe bosimba makabo mabe te, eloko ya mbindo mpe te.

31 Mpe bolamuka, mpe botelema uta na mputulu, O Yelusaleme; iyo, mpe lata bilamba na yo ya kitoko, O mwana mwasi ya Siona; mpe lendisa makonzi na yo mpe tandola ndelo na yo libela, ete okoka koyokisama nsoni lisusu te, ete mayokani ya Tata ya Seko oyo asalaki epayi na yo, O ndako ya Yisalaele, makoka kokokisama.

32 Iyo, boya epayi ya Klisto, mpe bokoma bato oyo babongisami nie na ye, mpe boboya bozangi bonzambe nyonso; mpe soki boboyi bozangi bonzambe nyonso, mpe bolingi Nzambe na bokasi, mayele mpe makasi na bino nyonso, bongo ngolu na ye ekokoka mpo na bino, ete na ngolu na ye bokoka kozala bato babongi nie na Klisto; mpe soki na ngolu ya Nzambe bobongi nie na Klisto, bokoki ata moke te kowangana nguya ya Nzambe.

33 Mpe lisusu, soki na ngolu ya Nzambe bosili kobonga nie na Klisto, mpe bowangani te nguya na ye, bongo nde bosantisami na Klisto na ngolu ya Nzambe, na nzela ya bosopi ya makila ya Klisto, oyo ezali kati na liyokani ya Tata mpo na bolimbisi ya masumu na bino, ete bokoma basantu, bazanga mbindo.

34 Mpe sikawa natombeli epayi ya nyonso, sese. Nakeyi kala mingi te kopema na paladiso ya Nzambe, kino molimo mpe nzoto na ngai ekosangana lisusu, mpe kino nakomemama lokola molongi na nzela ya mopepe, mpo na kokutana na bino liboso ya esambiselo ya elengi ya Yehova monene, Mosambisi ya Seko ya bato nyonso ya bomoi mpe bakufi. Amene.

Nsuka

Bimisa na lokasa