Makomi
Mosiya 3


Mokapo 3

Mokonzi Benyamina azali kokoba na maloba na ye—Nkolo ya Nguya nyonso akosala na kati ya bato kati na tabelenakele ya bodongo—Makila makobima uta na lidusu moko ya lomposo na Ye lokola Akomikaba mpo na masumu ya mokili—Na ye ezali bobele nkombo na oyo wapi lobiko ekoya—Bato bakoki kolongola moto ya mokili mpe kokoma Basantu na lisalisi ya Bomikabi—Monioko ya moto ya nkuna ekozala lokola liziba ya moto mpe libanga ya fofolo. Penepene na mobu 124 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe lisusu bandeko na ngai, nakobenda bokebi na bino, mpo nazali mwa moke na mingi ya koloba epayi na bino; mpo tala, nazali na makambo ya koyebisa bino mpo na oyo etali oyo ekoya.

2 Mpe makambo oyo nakolobela bino boyebisamaki epayi na ngai na anjelu uta na Nzambe. Mpe alobaki epayi na ngai: Lamuka; mpe nalamukaki, mpe tala atelemaki liboso na ngai.

3 Mpe alobaki epayi na ngai: Lamuka, mpe yoka maloba oyo nakoyebisa yo; mpo tala, nayei mpo na koyebisa yo nsango ya nsai ya bosepeli monene.

4 Mpo Nkolo ayokaki sambo na yo, mpe asambisi bosembo na yo, mpe atindi ngai mpo na koloba epayi na yo ete okoki kosepela; mpe ete okoki koyebisa epayi ya bato na yo, ete bango mpe lokola bakoka kotonda na bosepeli.

5 Mpo tala, ntango ekoya, mpe ezali mosika te, ete na nguya, Nkolo ya Nguya nyonso oyo ayangelaka, oyo azalaki, mpe azali uta boseko nyonso na boseko nyonso, akokita na nse uta na lola na kati ya bana ya bato, mpe akofanda na tabelenakele ya bodongo, mpe akokende na kati ya bato, kosalaka makamwisi ya nguya, lokola kobikisa bakoni, kosekwisa bakufi, kosalaka ete batengoli batambola, bato bakufa miso bazwa bomoni, mpe bato bakufa matoyi bayoka, mpe kobikisaka ndenge nyonso ya bokono.

6 Mpe akobengana bazabulu, soki te milimo ya mabe oyo mifandi na mitema ya bana ya bato.

7 Mpe tala, akoyoka mpasi ya masenginia, mpe bolozi ya nzoto, nzala, mposa ya mai, mpe bolembi, kutu koleka oyo moto akoki koyoka mpasi, longola se soki ezali kino liwa; mpo tala, nsomo na ye ekozala bongo monene mpo na nkuna mpe bonsomo ya bato na ye ete makila makobima uta na lidusu moko moko ya mposo ya nzoto.

8 Mpe akobiangama Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, Tata ya lola mpe mabele, Mokeli ya biloko nyonso uta na ebandeli; mpe mama na ye akobiangama Malia.

9 Mpe tala, ayei epayi ya baoyo ya ye moko, ete lobiko ekoka koya epayi na bana ya bato kutu na nzela ya bondimi na nkombo na ye; mpe kutu na nsima ya nyonso oyo bakotala se lokola moto, mpe bakoloba ete azali na zabulu, mpe bakofiakola ye, mpe bakobaka ye na ekulusu.

10 Mpe akosekwa na mokolo ya misato uta na bakufi; mpe tala, atelemi mpo na kosambisa mokili; mpe tala, makambo nyonso oyo masalemi ete bosambisi ya sembo ekoka koya likolo ya bana ya bato.

11 Mpo tala, mpe lisusu makila na ye mamikabami mpo na masumu ya baoyo bakweyaki na bobuki mobeko ya Adama, baoyo bakufaki koyebaka te bolingi ya Nzambe mpo na oyo etali bango, soki te baoyo basalaki masumu kati na bozangi koyeba.

12 Kasi lisuma, lisuma epayi na ye oyo ayebi ete atomboki na Nzambe! Mpo lobiko ekoya na moto moko te ya lolenge oyo longola se soki ezali na nzela ya boyamboli mpe bondimi na Nkolo Yesu Klisto.

13 Mpe Nkolo Nzambe atindaki baprofeta basantu na ye epayi na bana nyonso ya bato, mpo na kosakola makambo oyo epayi na libota na libota, ekolo na ekolo, mpe monoko na monoko, ete na yango nyonso oyo bakondima ete Klisto akoya, se bango wana kaka bakozwa bolimbisi ya masumu na bango, mpe bakosepela na bosepeli monene koleka mpenza, lokola se soki asilaki kala koya na kati na bango.

14 Nzokande Nkolo Nzambe amonaki ete bato na ye bazali bato na matoyi mangongi, mpe apesaki bango mobeko, kutu mobeko ya Mose.

15 Mpe bilembo, mpe makamwisi, mpe bililingi, mpe bilili mingi nde alakisaki epayi na bango, mpo na oyo etali boyei na ye; mpe lisusu baprofeta basantu balobelaki bango mpo na oyo etali boyei na ye; mpe nzokande bayeisaki mitema na bango makasi, mpe basosolaki te ete mobeko ya Mose ezali na motuya moko te longola se soki ezali na nzela ya bomikabi ya makila na ye.

16 Mpe kutu soki ekokaki kosalema ete bana mike bakoka kosumuka bakokaki te kobikisama; kasi nalobi epayi na bino ete bapambolami; mpo tala, lokola bazali kokweya na Adama, to na mbotama, kutu bongo makila ya Klisto mamikabami mpo na masumu na bango.

17 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete nkombo mosusu ekozala te oyo epesami tna nzela moko soki mpe eloko mosusu na nzela oyo wapi lobiko ekoki koya epayi ya bana ya bato, longola se kati to mpe na nzela ya nkombo ya Klisto, Nkolo ya Nguya nyonso.

18 Mpo tala asambisaka, mpe bosambisi na ye ezali alima; mpe mwana oyo akokufa na bomwana na ye akowa te; kasi bato bakomela bokweisami na milimo na bango moko longola se soki bamikitisi mpe bakomi lokola bana mike, mpe bandimi ete lobiko ezalaki, mpe ezali, mpe ekoya, kati mpe na nzela ya makila ya bomikabi ya Klisto, Nkolo ya Nguya nyonso.

19 Mpo moto ya mokili azali monguna ya Nzambe, mpe azalaki uta na bokwei ya Adama, mpe akozala, libela na libela, longola se soki amitiki na masengisi ya Molimo Mosantu, mpe abwaki mosika moto ya mokili mpe akomi mosantu na nzela ya bomikabi ya Klisto Nkolo, mpe akomi lokola mwana moke, moto ya botosi, mosokemi, moto ya bomikitisi, moto ya motema molai, atonda na bolingo, oyo azali na bolingi ya kotosa makambo nyonso oyo Nkolo amoni elongobani kotinda likolo na ye, kutu lokola mwana moke atosaka tata na ye.

20 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete ntango ezali koya wapi ntango boyebi ya Mobikisi ekopanzana bipayi nyonso uta ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato.

21 Mpe tala, ekoya ntango wana, moto moko te akomonana ete azangi mpamela liboso ya Nzambe, longola se soki ezali bana mike, bobele na nzela ya boyamboli mpe bondimi na nkombo ya Nkolo Nzambe ya Nguya Nyonso.

22 Mpe kutu na ntango oyo, ntango ekosila yo koteya bato na yo makambo oyo Nkolo Nzambe na yo atindaki yo, kutu na ntango wana nde bakozala lisusu te bato oyo bazangi mpamela na miso ya Nzambe, bobele engebene na maloba oyo nalobaki epayi na yo.

23 Mpe sikawa nalobi maloba oyo Nkolo Nzambe atindaki ngai.

24 Mpe boye elobi Nkolo: Makoteleme lokola litatoli oyo ezali kongenga na kofundaka bato oyo, na mokolo ya bosambisi; na yango bakosambisama, moto na moto engebene na misala na ye, ezala soki ezali malamu, to soki ezali mabe.

25 Mpe soki ezali mabe bapesami na bomoni ya nsomo ya elindo mpe bonsomo na bango moko, oyo ekosala ete bango bazonga nsima uta na miso ya Nkolo kati na ezalela ya mpasi mpe monioko mozanga nsuka, uta wapi bakoki kozonga lisusu te; boye bamelaki bokweisami mpo na milimo na bango moko.

26 Boye, bamelaki nkeni mobimba ya nkele ya Nzambe, oyo boyengebene ekoki lisusu te kowangana epayi na bango lokola bokokaki kowangana ete Adama akweyaki mpo aliaki mbuma epekisama; boye, boboto ekokaki kozala na ekoki lisusu te likolo na bango libela.

27 Mpe monioko na bango ezali lokola liziba ya moto mpe libanga ya fofolo, ya yango mololi ezimaka te, mpe ya yango molinga emataka libela na libela. Boye nde Nkolo atindaki ngai. Amene.

Bimisa na lokasa