Makomi
Malongi mpe Mayokani 102


Eteni 102

Masakoli ya masolo na ntina ya bobongisami ya lisanga monene ya yambo ya Eklezia, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 17, sanza ya mibale ya mobu 1834. Masakoli ya masolo ya ebandeli ekomamaki na Bampaka Oliver Cowdery mpe Orson Hyde. Profeta azongelaki kotalela masakoli yangna mokolo molandaki, mpe mokolo nsima na yango masakoli abongisaki endimamaki na nyonso na lisanga monene lokola “mokanda ya bokokisi mpe mobeko likonzi ya lisanga monene” ya Eklezia. Milongo ya kotanga 30 kino 32, oyo etali Lisanga ya Bapostolo Zomi na mibale, mibakisamaki na mobu 1835 na nse ya bokambi ya Joseph Smith ntango eteni oyo ebongisamaki mpo na kobima kati na Malongi mpe Mayokani.

1–8, Lisanga monene ebiangami mpo na kobongisa kokoso monene oyo ebimaka kati na Eklezia; 9–18, Nzela ya kosalela epesama mpo na koyoka masambisi; 19–23, Mokambi ya lisanga nde ayebisaka ekateli; 24–34, Nzela ya kolanda mpo na kotuba etiami.

1 Na mokolo oyo lisanga mobimba ya banganganzambe minene ntuku mibale na minei basanganaki, na nzela ya emoniseli, na ndako ya Joseph Smith Mwana, mpe babandaki kokoba kobongisa lisanga monene ya eklezia ya Klisto, oyo esengelaki kozala na banganganzambe minene zomi na mibale, mpe lisusu mokambi moko to Misato lokola likambo yango ekoki kosenga.

2 Lisanga monene epesamaki na nzela ya emoniseli mpo na ntina ya kosukisa kokoso monene oyo ekoki kobima kati na eklezia, oyo ekoki te kosukisama na eklezia to na lisanga ya episikopo na bosepeli ya basambi.

3 Joseph Smith Mwana, Sidney Rigdon mpe Frederick G. Williams bakitolamaki bakambi na kopona ya lisanga; mpe Joseph Smith Tata, John Smith, Joseph Coe, John Johnson, Martin Harris, John S. Carter, Jared Carter, Oliver Cowdery, Samuel H. Smith, Orson Hyde, Sylvester Smith, mpe Luke Johnson, banganganzambe minene, baponamaki kozala bato ya lisanga ya ntango nyonso mpo na eklezia, na kopona ya bato nyonso ya lisanga yango.

4 Nsima batunaki bato ya lisanga oyo batangami nkombo awa likolo soki bandimaki mosala mpo na oyo baponamaki, mpe soki bakolinga kosala kati na lotomo wana engebene na mobeko ya lola, na oyo mituna nyonso bapesaki eyano ete bandimaki mosala mpo na oyo baponamaki, mpe bakokokisa lotomo na bango engebene na ngolu ya Nzambe oyo epesami likolo na bango.

5 Motango ya bato bazalaki kati na lisanga, baoyo basalaki kopona na nkombo mpe mpo na eklezia na koponaka bato ya lisanga baoyo batangami awa likolo ezalaki ntuku minei na misato, lokola elandi: banganganzambe minene libwa, bampaka zomi na nsambo, banganganzambe banei, mpe bandeko bandimi zomi na Misato.

6 Bayokanaki: ete lisanga monene ekoki te kozala na nguya ya kosala eloko moko longola se soki sambo kati na bato ya lisanga oyo batangami awa likolo, soki te bakitani na bango oyo baponami na kolandaka mibeko bazali wana.

7 Basambo oyo basengeli kozala na nguya ya kopona banganganzambe minene basusu, baoyo bakoki komona ete balongobani mpe bakoki kosala na esika ya bato sambo ya lisanga baoyo bazali wana te.

8 Bayokanaki: ete ntango nyonso wapi ebonga moko ekotikala mpamba mpo na ntina ya kufa, ntina ya kolongolama uta na lotomo mpo na bobuki mobeko, to na ntina ya kozalaka lisusu te na nse ya biyangeli ya botambwisi ya eklezia oyo, kolongolama ya moko kati na bato ya lisanga baoyo batangami awa likolo, ebonga yango ekotondisama na moto oyo aponami na mokambi to bakambi, mpe ekondimama na kopona ya lisanga mobimba ya banganganzambe minene nyonso, oyo basangani mpo na ntina wana, mpo na kosala na nkombo ya eklezia.

9 Mokambi ya eklezia, oyo azali lisusu mokambi ya lisanga, abiangami na nzela ya emoniseli, mpe andimami na mosala na ye ya koyangela na mongongo kopona ya eklezia.

10 Mpe ezali engebene na bolongobani ya lotomo na ye ete asengeli koyangela likolo ya lisanga ya eklezia; mpe ezali litomba na ye mpo na kosungama na bakambi basusu mibale, oyo baponami na lolenge se moko oyo ye moko aponamaki.

11 Mpe soki moko to nyonso mibale ya baoyo baponamaki mpo na kosalisa ye bazali te, azali na nguya ya koyangela likolo ya lisanga na kozangaka mosungi; mpe soki azali ye moko wana te, bakambi bana mosusu bazali na nguya ya kokamba na esika na ye, ezala nyonso mibale to moko kati na bango.

12 Ntango nyonso soki lisanga monene ya eklezia ya Klisto ebongisami na lolenge esengeli, engebene na emekoleli oyo elimbolamaki awa yambo, ekozala mosala ya bato ya lisanga zomi na mibale ya kobwaka mbese, mpe na nzela wana koyeba nani kati na zomi na mibale asengeli koloba liboso, kobandaka na moto ya liboso mpe bongo na bongo kokitaka kino na moto ya zomi na mibale.

13 Ntango nyonso soki lisanga oyo ebongisami mpo na kotalela likambo songolo, bato ya lisanga oyo zomi na mibale basengeli kotala soki likambo yango ezali moko ya mpasi soki mpe te; soki ezali mpasi te, bobele mibale kati na bato ya lisanga oyo basengeli kolobela yango, engebene na emekoleli ekomami awa likolo.

14 Kasi soki emonani kozala likambo ya mpasi, bato minei basengeli koponama; mpe soki mpe ezali likambo ya mpasi koleka, motoba; kasi ezala mpasi ata ndenge nini motango ya baoyo baponami mpo na koloba ekoleka bato motoba te.

15 Ezala ndenge nini, oyo bafundi, azali na makoki ya kozala na ndambo moko ya lisanga, mpo na kokima lifinga soki mpe bozangi boyengebene.

16 Mpe bato ya lisanga oyo baponami mpo na koloba liboso basengeli komonisa likambo yango polele, wana esili bango kotala malamu bilembo ya bosolo, engebene na pole ya bosolo ya likambo yango liboso ya lisanga; mpe moto na moto asengeli koloba engebene na bosembo mpe boyengebene.

17 Bato wana ya lisanga bakobenda mituya ya mibale-mibale, elingi koloba, 2, 4, 6, 8, 10, mpe 12, bazali baoyo bakotelema mpo na moto oyo bafundi, mpe kokima lifinga to bozangi boyengebene.

18 Na makambo nyonso mofundi mpe oyo bafundi basengeli kozala na litomba ya koloba mpo na bango moko liboso ya lisanga, nsima ya koyoka moto na moto kopesa bilembo mpe bato ya lisanga oyo baponamaki mpo na kolobela likambo basilisa makanisi na bango.

19 Ekosila bango koyoka bilembo ya bosolo, ekosila bato ya lisanga, mofundi mpe oyo bafundi koloba, mokambi asengeli kopesa ekateli engebene na bososoli boye akozala na yango mpo na likambo yango, mpe akobenga bato ya lisanga zomi na mibale kondima se ekateli moko wana na nzela ya kopona na bango.

20 Kasi soki bato ya lisanga oyo batikali, baoyo balobaki te, to moko kati na bango, nsima ya koyoka bilembo ya bosolo mpe masambisi na biyano epayi yoko, bamoni libunga na ekateli ya mokambi, bakoki komonisa libunga yango, mpe likambo yango esengeli koyokamelama lisusu.

21 Mpe soki, nsima ya koyoka bango lisusu na bokebi, pole ebakisami likolo ya likambo yango, ekateli oyo ezwamaki esengeli kobongolama engebene na pole wana.

22 Kasi soki pole ebakisami te, ekateli ya yambo ekotikala, mpe ndambo eleki monene ya bato ya lisanga bazali na nguya ya kokata se ndenge moko.

23 Soki kokoso ezali mpo na kolanda malamu malongi to mabongisi, soki ekomami mingi te mpo na kolakisa likambo polele na mayele ya lisanga, mokambi akoki koluka koyeba mpe kozwa bolingi mpe makanisi ya Nkolo na nzela ya emoniseli.

24 Banganganzambe minene, ntango bazali na mobembo, bazali na nguya ya kosangana mpe kobongisa lisanga moko na lolenge elakisami awa likolo, mpo na kosukisa kokoso, ntango basambi to moko kati na bango akosenga yango.

25 Mpe lisanga oyo ya banganganzambe minene ekozala na nguya ya kopona moko na kati ya motango na bango mpo na koyangela likolo ya lisanga wana mpo na ntango wana.

26 Esengeli kozala mosala ya lisanga oyo tolobeli awa ya kotinda, sasaipi, elilingi moko ya makomi ya botamboli ya misala na bango, elongo na maloba makoki ya litatoli ekangami na ekateli na bango, epayi na lisanga monene ya ebonga ya Bokambi ya Yambo ya Eklezia.

27 Soki basambi to moko kati na bango asepeli te na ekateli ya lisanga totangi awa likolo, bakoki kotuba na lisanga monene ya ebonga ya Bokambi ya Yambo ya Eklezia, mpe kozwa boyoki ya masambisi lisusu, likambo oyo esengeli komemama kuna, engebene na emekoleli oyo ekomami yambo, lokola soki ete ekateli ya lolenge wana ekamatamaki te.

28 Lisanga oyo ya banganganzambe minene na mobembo esengeli kobiangama bobele mpo na makambo ya kokoso minene koleka mpo na oyo etali eklezia; mpe likambo moko te ya bato nyonso soki te ya mikolo nyonso ekokoka te mpo na kobenga lisanga ya lolenge wana.

29 Banganganzambe minene oyo bazali na mobembo to baoyo bazwami bongo na esika songolo bazali na nguya ya koloba soki ntina ezali to te ya kobenga lisanga ya lolenge wana.

30 Na kotalaka ekateli na bango, bokeseni ezali katikati na lisanga monene to banganganzambe minene na mobembo, mpe lisanga monene ya mobembo oyo esalemi na bapostolo zomi na mibale,

31 Uta na ekateli ya lisanga oyo ya liboso kotuba likambo ekoki kozala; kasi uta na ekateli ya lisanga ya nsima kotuba ekoki kosalema te.

32 Oyo lisanga ya nsima ekoki kotiama ntembe bobele na bakambi banene ya eklezia soki bobuki mobeko esalemi.

33 Bakanaki: ete mokambi to bakambi ya ebonga ya Bokambi ya Yambo ya Eklezia asengeli to basengeli kozala na nguya ya kokamata ekateli soki likambo songolo, lokola ekoki kotubama, ezali na alima ya kobengama mpo bayokela basambi lisusu, nsima ya kotala malamu botubi mpe bilembo mpe maloba etiami elongo na botubi yango.

34 Bato ya lisanga ya zomi na mibale babandaki nsima mpe bakobaki kobwaka mbese soki te kosala maponami, mpo na komonisa polele nani asengeli koloba yambo, mpe nsuka na yango oyo elandi esalemaki, na kotangaka nkombo: 1, Oliver Cowdery; 2, Joseph Coe; 3, Samuel H. Smith; 4, Luke Johnson; 5, John S. Carter; 6, Sylvester Smith; 7, John Johnson; 8, Orson Hyde; 9, Jared Carter; 10, Joseph Smith Tata; 11, John Smith; 12, Martin Harris.Nsima ya losambobakangaki likita.

Oliver Cowdery,

Orson Hyde,

Bakalaki

Bimisa na lokasa