Makomi
Malongi mpe Mayokani 114


Eteni 114

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Far West, Missouri, na mokolo ya 11, sanza ya minei ya mobu 1838.

1–2, Bibonga ya kosala mosala na Eklezia oyo esimbami na baoyo wana bazali sembo te ekopesama na basusu.

1 Solo boye elobi Nkolo: Ezali bwania na mosali na ngai David W. Patten, ete abongisa mombongo na ye nyonso noki lokola ekokoka ye, mpe alongola biloko ya mombongo na ye, ete akoka kosala mosala ya misionele mpo na ngai na eleko ya milona oyo ekoya nsima, elongo na bato mosusu, kutu bato zomi na mibale kotangaka ye moko, mpo na kotatola nkombo na ngai mpe kosakola nsango ya nsai epayi ya mokili mobimba.

2 Mpo solo boye elobi Nkolo, ete mbala mingi lokola ezali na baoyo wana na kati na bino bazali kowangana nkombo na ngai, basusu basengeli kotiama na esika na bango mpe kozwa bopisikopo na bango. Amene.

Bimisa na lokasa