Makomi
Malongi mpe Mayokani 118


Eteni 118

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Far West, Missouri, na mokolo ya 8, sanza ya sambo ya mobu 1838, lokola eyano na libondeli ete, “Lakisa biso bolingi na yo, O Nkolo, mpo na oyo etali Bazomi na mibale.”

1–3, Nkolo akopesa mpo na bozangi ya mabota ya Bazomi na mibale; 4–6, Bibonga oyo etikalaki mpamba kati na Bazomi na mibale bizwi bato.

1 Solo, boye elobi Nkolo: Tika ete likita moko esalema sasaipi; tika ete Bazomi na mibale bazala bato babongisami; mpe tika ete bato baponama mpo na kozwa esika ya baoyo bakwei.

2 Tika ete mosali na ngai Thomas atikala mpo na eleko yoko na mboka ya Siona, mpo na kobimisa buku ya liloba ya ngai.

3 Tika montika mokoba koteya uta na ngonga wana, mpe soki bakosala oyo na bokitisi ya motema, na bosokemi mpe na bomikitisi, mpe motema molai, ngai, Nkolo, napesi epayi na bango elaka ete nakopesa mpo na bozangi ya mabota na bango; mpe ekuke moko mpenza ekofungolama mpo na bango, uta sikawa mpe libela.

4 Mpe na eleko ya milona ekoya tika bango balongwa mpo na kokende likolo ya mai monene, mpe kuna bakosakola nsango malamu na ngai, litondi na yango, mpe kopesa litatoli na nkombo na ngai.

5 Tika ete bakabwana na basantu na ngai na engumba ya Far West, na mokolo ya ntuku mibale na motoba ya sanza ya minei ekoya, na esika wapi ekotongama ndako na ngai, elobi Nkolo.

6 Tika ete mosali na ngai John Taylor, mpe lisusu mosali na ngai John E. Page, mpe lisusu mosali na ngai Wilford Woodruff, mpe lisusu mosali na ngai Willard Richards, baponama mpo na kosala na bisika ya baoyo wana bakweyaki, mpe bapesama nsango elongobani ya boponi na bango.

Bimisa na lokasa