Makomi
Malongi mpe Mayokani 122


Eteni 122

Liloba ya Nkolo epayi ya Profeta Joseph Smith, wana ezalaki ye mokangemi kati na boloko na Liberty, Missouri. Eteni oyo ezali litangi ya mokanda akomelaki Eklezia na elaka ya mokolo ya 20, sanza ya misato ya mobu 1839 (tala moto ya eteni 121).

1–4, Nsuka nyonso ya mabele ekoluka koyeba nkombo ya Joseph Smith; 5–7, Makama mpe mpasi na ye nyonso ekopesa ye mayele mpe ekozala mpo na bolamu na ye; 8–9, Mwana ya Moto akitaki na nse na bango nyonso.

1 Nsuka nyonso ya mabele ekoluka koyeba nkombo na yo, mpe bato ya liboma bakozwa yo na litioli, mpe lifelo ekozala na nkanda makasi na yo;

2 Nzokande bato ya peto na motema, mpe bato ya bwania, mpe bato ya lokumu, mpe bato malamu, bakoluka toli, mpe likoki, mpe mapamboli ntango nyonso uta na nse ya loboko na yo.

3 Mpe bato na yo bakobalukela yna mokolo moko te likolo ya litatoli ya bateki bandeko na bango.

4 Mpe ata kutu bopusi na bango ekobwaka yo kati na motungisi, mpe kati na mabende mpe bifelo, bato bakotala yo na lokumu; mpe longola se mpo na ntango moke mpe na katikati ya banguna na yo mongongo na yo ekozala nsomo koleka nkosi ya zamba, mpo bosembo na yo; mpe Nzambe na yo akozala mpembeni na yo libela na libela.

5 Soki obiangami koleka na nzela ya mokakatano; soki ozali kati na makama na kati ya bandeko bandimi ya lokuta; soki ozali kati na makama na kati ya miyibi; soki ozali kati na makama na mobembo na nzela ya mokili soki te na nzela ya mbu;

6 Soki bafundi yo na lolenge nyonso ya bofundi ya lokuta; soki banguna na yo bakwei likolo na yo; soki bakaboli yo uta na lingomba ya tata mpe mama na yo mpe bandeko mibali mpe bandeko basi na yo; mpe soki na mompanga oyo babimisi libanda banguna na yo balongoli yo na ntolo ya mwasi na yo, mpe ya bana na yo, mpe mwana mobali na yo ya nkulutu, ata kutu azali bobele mibu motoba, akokangama na bilamba na yo, mpe akoloba, Tata na ngai, tata na ngai, mpo na nini okoki te kotikala na biso? O, tata na ngai, nini bato oyo bakosala na yo? mpe soki nsima bokaboli ye na yo na mompanga, mpe babendi yo na boloko, mpe banguna na yo bazali kolekaleka nzinganzinga na yo lokola mbwa ya zamba kolukaka makila ya mwana ya mpate;

7 Mpe soki babwaki yo na libulu, to na maboko ya babomi, mpe bakateli yo etumbu ya liwa; soki babwaki yo na mozindo; soki mbonge ya mai ya koleka likolo ekoteli yo mwango ya mabe; soki mipepe makasi mikomi monguna na yo; soki lola eyini, mpe biloko nyonso ya bokeli bisangani mpo na kokanga yna nzela; mpe likolo ya nyonso, soki mbanga ya solo ya lifelo efungoli monoko monene mpo na komela yo nsima na yo, yeba, mwana mobali na ngai, ete biloko oyo nyonso ekopesa yo mayele, mpe bikozala mpo na bolamu na yo.

8 Mwana ya Moto akitaki na nse na yango nyonso. Ozali monene koleka ye?

9 Boye, koba kolanda nzela na yo, mpe bonganganzambe ekotikala elongo na yo; mpo ndelo na bango etiami, bakoki koleka te. Mikolo na yo eyebani, mpe mibu na yo mikoyeisama mokuse te; boye, kobanga te nini moto akoki kosala, mpo Nzambe akozala elongo na yo libela na libela.

Bimisa na lokasa