Makomi
Malongi mpe Mayokani 123


Eteni 123

Mosala ya Basantu na kotalaka bato banyokolaki bango, lokola ekomamaki na Profeta Joseph Smith wana mokangemi kati na boloko na Liberty, Missouri. Eteni oyo ezali litangi ya mokanda akomelaki Eklezia na elaka ya mokolo ya 20, sanza ya misato ya mobu 1839 (tala moto ya eteni 121).

1–6, Basantu basengeli kosangisa makomi mpe kobimisa buku ya lisolo ya bolozi mpe minyokoli na bango; 7–10, Molimo se moko oyo motiaki biyambayamba ya lokuta momemi lisusu monyokoli ya Basantu; 11–17, Mingi na kati ya mangomba nyonso ya bokabwani bakoyamba bosolo mokolo moko.

1 Mpe lisusu, tolingaki kopesa likanisi mpo botala malamu soki libaku elongobani na basantu nyonso kosangisa boyebi ya makambo nyonso, mpe mitungisi mpe mabe basali bango na bato ya Ekolo oyo;

2 Mpe lisusu boyebi ya makambo oyo etali bozwi mpe motuya ya ebomi oyo bazweli mpasi, ezala basimbami na lokumu to na bomoto na bango moko, na bozwi ya bandako mpe lokola;

3 Mpe lisusu nkombo ya bato nyonso oyo batiaki loboko kati na minyokoli na bango, lokola ekoki bango kozwa yango mpe koluka koyeba yango.

4 Mpe mbele lisanga moko ya babongisi ekoki koponama mpo na koluka koyeba makambo oyo, mpe kokamata maloba ya bato mpe mikanda ya ndai; mpe lisusu kosangisa mikanda oyo mikomamaki mpo na kobebisa lokumu mpe oyo ezali kotambola;

5 Mpe nyonso oyo ezali kati na bazulunale, mpe kati na buku minene ya bolimboli makambo, mpe masolo nyonso makomami mpo na kobebisa lokumu mpe oyo ebimisami, mpe oyo ezali kokomama, mpe koluka soki makomami na banani, mpe kolakisa bolandami mobimba ya nkuna ya bozabulu mpe makambo mabe mpe ya bobomi oyo masalemi likolo ya bato oyo—

6 Ete tokoka kobimisa makambo yango na makomi bobele na mokili mobimba te, kasi kolakisa yango na lolenge na yango ya molili mpe ya lifelo na bakambi ya mbulamatari, mpo ezala bokasi ya nsuka oyo esengami epayi na biso na Tata na biso na Lola, liboso tokoka na lolenge ya kotonda mpe ya kokoka kosenga elaka oyo wana ekobianga ye kobima uta na esika na ye ya kobombana; mpe lisusu ete ekolo mobimba ekoka kotikala na mokalo te liboso ete akoka kotinda nguya ya loboko na ye ya makasi.

7 Ezali mosala ya ntina monene oyo tozali na yango nyongo epayi ya Nzambe, epayi na banjelu, baoyo kani tomemami kozala elongo, mpe lisusu mpo na biso moko, mpo na basi mpe bana na biso, oyo bagumbamimitu na nse na mpasi, mawa, mpe mabanzo, na nse ya loboko elongobani na etumbu koleka na bobomi, bonyokoli uta na bayangeli, mpe bonyokoli, oyo esungami mpe epesami makasi mpiko mpe elendisami na bopusi ya molimo wana oyo na bokasi mpenza mondimisaki biyambayamba ya batata, oyo basangolaki libula ya lokuta, likolo ya mitema ya bana, mpe batondisaki mokili na mobulu, mpe oyo ezalaki kokola se makasi, mpe ezali sikawa ebandeli ya ebebi nyonso, mpe mabele mobimba ezali kolela na nse ya bozito ya mabe na yango.

8 Ezali nkanga ya libende, ezali singa yoko ya makasi; ezali miniololo mpenza, mpe mabende, mpe nkanga, mpe mikangemi ya lifelo.

9 Boye ezali mosala ya ntina monene oyo tozali na yango nyongo, bobele na basi mpe bana na biso moko te, kasi na basi bakufeli mibali mpe bana bazangi batata, baoyo kani mibali mpe batata babomamaki na nse ya loboko na yango ya libende;

10 Oyo misala ya molili mpe ya boyinisi ekoki malamu mpo na kolengisa na nsomo lifelo, mpe ya koyokisa nsomo mpe kotanisa yango pee, mpe kosala ete maboko ya zabulu mpenza malenga mpe maningana na nsomo.

11 Mpe lisusu ezali mosala ya ntina monene ete tozali na nyongo epayi ya nkola oyo ezali kokola, mpe epayi ya bato nyonso ya peto na motema—

12 Mpo ezali naino na bato mingi likolo ya mabele na kati ya mangomba ya bokabwani, masanga ya bato, mpe biyamba, oyo bazipami miso na mayele mabe ya bato, na nzela ya oyo babatami mpo na kokosa, mpe baoyo bapekisami bosolo bobele mpo bayebi te wapi kozwa yango—

13 Boye, ete tobebisa mpe tolembisa bomoi na biso na kobimisaka na pole makambo ebombama nyonso ya molili, na motuya oyo toyebi yango; mpe ezali solo ya komonisama uta na lola—

14 Oyo esengeli bongo kosalema na molende monene.

15 Tika ete moto moko te akamata yango lokola biloko ya mike mike; mpo na makambo oyo ezali na mingi na yango, oyo etali basantu, ezali mpo na ntango ekoya nsima.

16 Boyebi, bandeko bandimi, ete masuwa monene mpenza epusami makasi mpenza na ya yenda ya moke na ntango ya ekumbaki, soki bamibateli kosalela yango malamu na kotalaka mopepe mpe mbonge.

17 Boye, balingami mingi bandeko bandimi, tika ete tosala na esengo nyonso oyo ezali na nguya na biso; mpe ete nsima tokoka kotikala ya kotelema, kozalaka na bobangi soki moke te, mpo na komona lobiko ya Nzambe, mpe mpo ete loboko na ye ebimisama.

Bimisa na lokasa