Makomi
Malongi mpe Mayokani 134


Eteni 134

Mayebisi ya boyambi mpo na oyo etali mbulamatari mpe mibeko na mobimba, mayebisi oyo endimami na kopona ya nyonso na eyangani monene ya Eklezia oyo esalemaki na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 17, sanza ya mwambe ya mobu 1835. Basantu mingi basanganaki esika moko mpo na kotalela oyo bakanisaki kozala makambo minene kati na emoniseli ya yambo ya buku ya Malongi mpe Mayokani. Na ntango wana, liloba oyo epesamaki lokola boyingisi oyo: “Ete boyambi na biso na kotalaka bambulamatari mpe mibeko ya mokili na mobimba na yango ekoki kolimbolama soki mpe kososolama na lolenge ya mabe te, tomoni ete ebongi malamu kolakisa, na nsuka ya buku oyo, makanisi na biso mpo na oyo etali se likambo se moko oyo.”

1–4, Bambulamatari basengeli kobatela bonsomi ya makanisi ya motema mpe bondimi mpe ya bokumbameli; 5–8, Moto nyonso asengeli kosunga mbulamatari na bango mpe kozala na mokumba ya komemia mpe kotosa mobeko; 9–10, Mangomba ya biyamba esengeli kozala na nguya ya kosala lokola bakonzi ya leta te; 11–12, Bato balongisami na kosambaka mpo na bango moko mpe mpo na bozwi na bango.

1 Tondimi ete bambulamatari batiamaki na Nzambe mpo na litomba ya moto; mpe ete atangi bato lokola bayanoli mpo na misala na bango liboso na bango, ezala na kosalaka mibeko mpe kosalelaka myango, mpo na bolamu mpe bokengi ya lingomba ya bato nyonso.

2 Tondimi ete mbulamatari moko te akoki kozala na kimia, longola se soki mibeko ya lolenge wana etiami mpe mibatelami ete mibukama te lokola mikosala solo mpenza ete moto moko moko asalela bonsomi ya mayele ya motema mpe bondimi, makoki mpe eyangeli ya bozwi, mpe bobateli ya bomoi.

3 Tondimi ete bambulamatari nyonso basengeli mpenza kozala na basali na leta mpe basambisi mpo na kolendisa mibeko se ya bambulamatari se moko bana; mpe ete basali na lolenge wana oyo bakoyangela mobeko na alima mpe boyengebene basengeli koluka mpe kosunga bango na kopona ya bato nyonso soki mbulamatari yango ezali ya ekolo nsomi, soki te na bolingi ya mokonzi monene.

4 Tondimi ete eyamba etiami na Nzambe; mpe bato basengeli koyanola epayi na ye, mpe bobele se epayi na ye, mpo na oyo etali kosalela yango, longola se soki makanisi ya biyamba na bango etindi bango kobuka makoki mpe lipanda ya basusu; kasi tondimi te ete mobeko ya bato ezali na makoki ya kokota-kota na makambo ya bondimi na kopesaka na makasi mibeko etali lolenge ya kokumbamela mpo na kopekisa makanisi mpe bondimi ya mitema ya bato, soki mpe kopesa bato na makasi ndenge ya kosambela ezala na polele to na nkuku; ete mosambisi ya leta asengeli kosukisa mabe, kasi asengeli soki moke te koyangela mayele ya motema; asengeli kopesa etumbu na moto na elindo, kasi soki moke te kolongola bonsomi ya molimo.

5 Tondimi ete bato nyonso basengeli kosunga mpe kolendisa bambulamatari moko moko epayi wapi bafandi, wana ebatelami bango na makoki ezwami uta na mbotama mpe oyo esengeli kolongolama na mibeko ya bambulamatari wana te; mpe ete mobulu mpe botomboki elongobani te na mwana mboka oyo abatelami boye, mpe asengeli na engebene kopesama etumbu; mpe ete bambulamatari nyonso bazali na makoki ya kotia mibeko ya lolenge wana na misala lokola bamoni malamu koleka na makanisi na bango moko kopesa ndanga mpo na bobateli ya bato; na ntango se moko, nzokande, kotalaka lokola bule bonsomi ya mayele ya motema.

6 Tondimi ete moto na moto asengeli kopesama lokumu kati na mokumba na ye, ete na lolenge wana bakonzi mpe basambisi basengeli kopesama lokumu, mpo batiami mpo na kobatela baoyo bazangi ekweyeli mpe mpo na kopesa etumbu na bato na elindo; mpe ete na mibeko bato nyonso batombeli kopesa limemia mpe botosi, mpo soki mizangi kimia mpe boyokani ekotiama na nse ya mobulungano mpe bonsomo; mpamba te mibeko ya bato etiami na nko mpo na ntina ya koyangela makambo etali biso lokola bato moko moko mpe lokola bikolo, katikati ya moto na moninga na ye moto; mpe mitindo ya Nzambe epesami uta na lola, kotiaka mabongisi oyo etali makambo ya molimo, mpo na bondimi mpe bokumbameli, mpo na nyonso mibale moto asengeli koyanola epayi ya mosali na ye.

7 Tondimi ete bakonzi, bikolo, mpe bambulamatari bazali na makoki, mpe basengeli kotia mibeko na misala mpo na bobateli ya bana mboka nyonso mpo na kosalela kati na bonsomi boyambi ya eyamba na bango; kasi tondimi te ete bazali na makoki engebene na boyengebene ya kopekisa litomba oyo na bana mboka, to kopekisa bango mpo na oyo etali makanisi na bango, wana ezali bango kolakisa limemia mpe botosi na mibeko mpe ete makanisi ya eyamba ya lolenge wana makoki te kopesa bango elonga pona mobulu to ekokolo.

8 Tondimi ete kosala mabe esengeli kopesama etumbu engebene na lolenge ya lisumu; ete koboma, kokaba moto, kobotola na makasi, koyiba, mpe kobebisa kimia ya nyonso, na nzela nyonso, esengeli kopesama etumbu engebene na bonene ya mabe na yango mpe mposa ya motema na mabe na kati ya bato, na mibeko ya mbulamatari wana wapi lisumu esalemi; mpe mpo na ntina ya kimia mpe nie ya nyonso bato nyonso basengeli kosala mpe kosalela makoki na bango na komemaka bato basumuki na mibeko malamu mpo na kopesama etumbu.

9 Tondimi te ete ezali likambo ya malonga mpo na kosangisa nguya ya eyamba elongo na mbulamatari ya mboka, na nzela ya oyo ekoma ete lingomba ya eyamba moko ebatelami mpe lingomba mosusu epekisami kati na kosalela makoki ya yango ya molimo, mpe makoki ya moko moko ya bandimi na yango, lokola bana mboka, liboyami.

10 Tondimi ete mangomba ya biyamba nyonso ezali na makoki ya kokamata meko na bandimi na bango mpo na bizaleli mabe, engebene na mibeko mpe mimesano ya mangomba ya lolenge wana; longola se soki meko ya lolenge wana ezala mpo na kolendisa boyokani ya bandimi mpe misala malamu na bango; kasi tondimi te ete lingomba ya eyamba songolo ezali na likoki ya kofunda bato likolo ya makoki ya bozwi soki mpe bomoi, kokamata uta na bango biloko ya mokili oyo, to kotia bango na likama ezala ya bomoi to eteni ya nzoto, soki mpe mpo na kopesa etumbu ya kobeta nzoto ya lolenge kani likolo na bango. Bakoki bobele kotangola bango uta na lingomba na bango, mpe kolongola uta na bango oyo ya kosangana lokola mondimi na bango.

11 Tondimi ete bato basengeli kotuba epayi na mobeko ya leta mpo na kofuta mbeba mpe mabe nyonso masalemi, wapi mabe masalemi na moto soki mpe na makoki ya bozwi to lokumu ya moto ebebisami, wapi mibeko ya lolenge wana ezali mpo na kobatela se makoki oyo; kasi tondimi ete bato nyonso balongisami na kosambaka mpo na bango moko, baninga na bango, mpe bozwi, mpe mbulamatari, uta na bitumba ya bozangi botosi na mibeko mpe bobuki mibeko ya makoki ya bato nyonso na ntango esengami, epayi wapi bofundi ya mibale ya noki ekoki kosalema na mibeko te, mpe libondi ekoki kopesama te.

12 Tondimi yango ete ezali alima koteya nsango malamu na bikolo ya mabele, mpe kokebisa basembo komibikisa uta na bosoto ya mokili; kasi tondimi te ete ezali alima kozwama na makambo etali basali oyo bazali baumbu, to koteya baoyo nsango malamu, soki kobatisa bango na kozangaka bolingi mpe litombeli ya bankolo na bango, soki mpe kokota kota mpe kopusa bango ata na likambo moke koyima-yima na ezalela na bango kati na bomoi oyo, na bongo kotia bomoi ya bato na likama; kokota-kota lolenge wana tondimi ete ezali engebene na mobeko te mpe bosembo mpe te, mpe ezali kotia kimia ya mbulamatari nyonso na likama, mbulamatari oyo azali kopesa batu nzela ya kozala na nse ya boumbu.

Bimisa na lokasa