Makomi
Malongi mpe Mayokani 16


Eteni 16

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Peter Whitmer Mwana, na Fayette, New York, na sanza ya motoba ya mobu 1829 (tala moto ya eteni 14). Peter Whitmer Mwana akomaki nsima moko ya Banzeneneke Mwambe ya Buku ya Mormon.

1–2, Loboko ya Nkolo ezali likolo ya mabele nyonso; 3–6, Koteya nsango malamu mpe kobikisa milimo ezali eloko ya motuya koleka nyonso.

1 Yoka, mosali na ngai Peter, mpe tia litoyi na maloba ya Yesu Klisto, Nkolo na yo mpe Mosikoli na yo.

2 Mpo tala, nalobi epayi na yo na polele mpe na nguya, mpo loboko na ngai ezali likolo ya mabele nyonso.

3 Mpe nakoyebisa yo oyo moto moko te ayebi longola se ngai na yo moko—

4 Mpo mbala mingi ozalaki na mposa ya koyeba uta na ngai oyo ekokaki kozala ya motuya koleka nyonso mpo na yo.

5 Tala, opambolami na likambo oyo, mpe mpo na kosakolaka maloba na ngai oyo nasilaki kopesa epayi na yo engebene na mitindo na ngai.

6 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na yo, ete eloko oyo ekozala ya motuya koleka mpo na yo ekozala kosakola boyamboli epayi ya bato oyo, ete okoka komema milimo epayi na ngai, ete okoka kopema elongo na bango kati na bokonzi ya Tata na ngai. Amene.

      • Tala Mal&May 15 mpo ya matangi ekokani oyo ezwami epai na epai.

Bimisa na lokasa