Makomi
Malongi mpe Mayokani 23


Eteni 23

Mulongo moko ya bimoniseli mitano epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Manchester, New York, na sanza ya minei ya mobu 1830, epayi ya Oliver Cowdery, Hyrum Smith, Samuel H. Smith, Joseph Smith Tata, mpe Joseph Knight Tata. Lokola mbano ya mposa makasi ya bato mitano batangami awa likolo mpo na koyeba misala na bango ya moto moko moko, Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo mpe azwaki emoniseli moko mpo na moto na moto.

1–7, Bayekoli oyo ya yambo babiangami mpo na koteya, kolendisa, mpe kopesa Eklezia bokasi.

1 Tala, nazali koloba mwa maloba moke epayi na yo, Oliver. Tala, opambolami, mpe ozali na nse ya bokweisami moko te. Kasi sala angele na lolendo, mbele okokota kati na masenginia.

2 Sakola libiangi na yo epayi ya eklezia, mpe lisusu liboso ya mokili, mpe motema na yo mokofungwama mpo na koteya bosolo uta sikawa kokende liboso mpe libela. Amene.

3 Tala, nalobi mwa maloba moke epayi na yo, Hyrum; mpo ozali na nse ya bokweisami moko te, mpe motema na yo mofungwami, mpe lolemo na yo ekangolami; mpe libiangi na yo ezali mpo na kolendisa, mpe mpo na kopesa eklezia bokasi ntango nyonso. Yango wana mosala na yo ezali libela mpo na eklezia, mpe oyo na ntina ya libota na yo. Amene.

4 Tala, nalobi mwa maloba moke epayi na yo, Samuel; mpo yo mpe lisusu ozali na nse ya bokweisami moko te, mpe libiangi na yo ezali mpo na kolendisa, mpe mpo na kopesa eklezia bokasi; mpe obiangami naino te mpo na koteya liboso ya mokili. Amene.

5 Tala, nalobi mwa maloba moke epayi na yo, Joseph; mpo yo mpe lisusu ozali na nse ya bokweisami moko te, mpe libiangi na yo ezali lisusu mpo na kolendisa, mpe mpo na kopesa eklezia bokasi; mpe oyo ezali mosala na yo uta sikawa kokende liboso mpe libela. Amene.

6 Tala, namonisi epayi na yo, Joseph Knight, na maloba oyo, ete osengeli kokamata ekulusu na yo, na oyo osengeli kosambela na mongongo makasi liboso ya mokili na nkuku mpe lokola, mpe na libota na yo, mpe na kati ya baninga na yo, mpe na bisika nyonso.

7 Mpe, tala, ezali mosala na yo ya kosangana elongo na eklezia ya solo, mpe kopesa maloba na yo ntango nyonso mpo na kolendisa, ete okoka kozwa lifuta ya mosali. Amene.

Bimisa na lokasa