Makomi
Malongi mpe Mayokani 24


Eteni 24

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith mpe na Oliver Cowdery, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya sambo ya mobu 1830. Ata mbele sanza minei elekaki naino te uta ntango Eklezia ebongisamaki, minioko ekomaki mingi, mpe bakambi basengelaki kozwa bokengi na komitiaka bango moko pembeni mpo na ntango moko. Bimoniseli misato oyo malandi epesamaki na ntango oyo mpo na kopesa bokasi, koyikana mpiko, mpe koteya bango.

1–9, Joseph Smith abiangami mpo na kobongola, koteya, mpe kolimbola makomi; 10–12, Oliver Cowdery abiangami mpo na koteya nsango malamu; 13–19, Mobeko ebimisami mpo na oyo etali makamwisi, bolakeli mabe, kopupola mputulu na makolo, mpe kokende na kozangaka eloko na libenga to mpe liboke.

1 Tala, obiangamaki mpe oponamaki mpo na kokoma Buku ya Mormon, mpe mpo na mosala na ngai; mpe nalongolaki yo uta na mitungisi na yo, mpe napesaki yo toli, ete obikisamaki uta na banguna na yo nyonso, mpe obikisamaki uta na nguya ya Satana mpe uta na molili!

2 Nzokande, okozala na mokalo te soki obuki mibeko; kasi, kende na yo mpe kosumuka lisusu te.

3 Kumisa mosala ya libiangi na yo; mpe nsima ya kolona bilanga na yo mpe kobatela yango, kende na lombangu epayi ya eklezia oyo ezali na Colesville, Fayette, mpe Manchester, mpe bakosunga yo; mpe nakopambola bango ezala na molimo mpe na mosuni;

4 Kasi soki bayambi yo te, nakotinda bolakeli mabe likolo na bango na esika ya lipamboli.

5 Mpe okokoba na kobelelaka Nzambe na nkombo na ngai, mpe kokomaka makambo oyo makopesama epayi na yo na Molendisi, mpe kolimbolaka makomi nyonso epayi ya eklezia.

6 Mpe ekopesama epayi na yo na ntango se moko wana oyo osengeli koloba mpe kokoma, mpe bakoyoka yango, soki te nakotindela bango bolakeli mabe na esika ya lipamboli.

7 Mpo osengeli komipesa na kolelaka Siona mosala na yo nyonso; mpe na oyo okozwa bokasi.

8 Zala na bompikiliki na ntango ya mitungisi, mpo okozwa yango mingi; kasi tiaka molende kati na yango, mpo, tala, nazali elongo na yo, kutu kino na nsuka ya mikolo na yo.

9 Mpe kati na misala na yo ya mosuni okozala na bokasi te, mpo oyo ezali libiangi na yo te. Sala mosala ya libiangi na yo na ndenge esengeli mpe okozwa oyo ozali na yango mposa mpo na kokumisa mosala na yo, mpe kolimbola makomi nyonso, mpe kokoba na kotiaka bango maboko mpe na kokotisaka bango kati na Baeklezia.

10 Mpe ndeko na yo ya mobali Oliver akokoba kotatolaka nkombo na ngai liboso ya mokili, mpe lisusu na eklezia. Mpe akanisa te ete asilisi koloba mingi mpo na ntina na ngai, mpe tala, nazali elongo na ye kino na nsuka.

11 Na ngai nde akozwa nkembo, mpe na ye moko te, ezala ata na bolembu to na makasi, ezala na miniololo to na bonsomi;

12 Mpe na bangonga nyonso, mpe na bisika nyonso, akofungola monoko na ye mpe kosakola nsango malamu na ngai lokola na mongongo ya kelelo, butu mpe moi. Mpe nakopesa epayi na ye bokasi lokola naino eyebana te na kati ya bato.

13 Bosenga makamwisi te, longola se soki natindi bino, longola se mpo na kobengana bazabulu, kobikisa bakoni, mpe na kobikisa uta na nioka ya ngenge, mpe lisusu na ngenge ya kufa;

14 Mpe biloko oyo bokosala te, longola se soki esengami uta na bino na baoyo bazali na yango mposa, mpo ete makomi makoka kokokisama; mpamba te bokosala engebene na oyo ekomami.

15 Mpe na esika nyonso bokokota, mpe soki bayambi bino te na nkombo na ngai, bokotika bolakeli mabe na esika ya lipamboli, na kopupolaka mputulu ya makolo na bino na bango lokola litatoli, mpe kopangwisaka makolo na bino mpembeni na nzela.

16 Mpe ekosalema ete moto soki nani oyo akotia maboko na ye likolo na bino na makasi, bokopesa motindo ete abetama na nkombo na ngai; mpe, tala, nakobeta ye engebene na maloba na bino, na ntango esengeli ya ngai moko.

17 Mpe moto soki nani oyo akosamba na bino, akolakelama mabe na mobeko.

18 Mpe bokamata libenga soki mpe liboke te, mangenda mpe te, kazaka mibale mpe te, mpo eklezia ekopesa bino na ngonga yango mpenza oyo bozali kokelela lokola bilei mpe lokola elamba, mpe lokola sapato mpe lokola mosolo, mpe lokola liboke.

19 Mpo obiangami mpo na kopapa elanga na ngai ya vinyo na kopapa moko ya makasi, iyo, kutu mpo na mbala ya nsuka; iyo, mpe lisusu baoyo wana nyonso okulisaki, mpe bakosala kutu engebene na emekoleli oyo. Amene.

Bimisa na lokasa