Makomi
Malongi mpe Mayokani 26


Eteni 26

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, Oliver Cowdery, mpe John Whitmer, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya sambo ya mobu 1830 (tala moto ya eteni 24).

1, Balakisi bango lolenge boni koyekola makomi mpe koteya; 2, Mobeko ya kozwa bondimami ya bato nyonso mondimami.

1 Tala, nalobi epayi na bino ete bokotika ntango na bino epesama mobimba na koyekolaka makomi, mpe na koteyaka, mpe na kosalaka kofandisa ya eklezia ya Colesville, mpe na kosalaka misala na bino ya bilanga, na lolenge oyo esengeli, kino ntango bokokende nsima na westi kokamba likita ekoya; mpe nsima, oyo bokosala ekoyebana.

2 Mpe makambo nyonso ekosalema na bondimami ya bato nyonso kati na eklezia, na nsambo mpe bondimi mingi, mpo bokozwa makambo nyonso na bondimi. Amene.

Bimisa na lokasa