Makomi
Malongi mpe Mayokani 30


Eteni 30

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya David Whitmer, Peter Whitmer Mwana, mpe John Whitmer, na Fayette, New York, na sanza ya libwa ya mobu 1830, na kolandaka likita moko ya mikolo misato na Fayette, kasi liboso ete bampaka ya Eklezia bakabwana. Na ebandeli liloba ya ntina oyo ebimisamaki lokola bimoniseli misato; esangisamaki kati na eteni yoko na Profeta mpo na kobimisa buku ya mobu 1835 ya Malongi mpe Mayokani.

1–4, David Whitmer apesami etumbu mpo na kozanga kokokisa mosala na molende; 5–8, Peter Whitmer Mwana asengeli kokende elongo na Oliver Cowdery na misio epayi ya Balamani; 9–11, John Whitmer abiangami koteya nsango malamu.

1 Tala, nalobi epayi na yo, David, ete obangaki moto mpe otalelaki ngai te mpo na kozwa bokasi lokola osengelaki.

2 Kasi mayele na yo ezalaki mingi na biloko ya mokili koleka biloko na ngai, Mokeli na yo, mpe mosala oyo wapi obiangamaki; mpe otiaki te bokebi na Molimo na ngai, mpe na baoyo batiamaki na likolo na yo, kasi omitikaki kondimisama epayi ya baoyo wana natindaki yo te.

3 Yango wana, otikali koluka koyeba mpo na yo moko uta na loboko na ngai, mpe komanyola likolo ya biloko oyo ozwaki.

4 Mpe epayi na yo ekozala na ndako ya tata na yo, kino nakopesa yo mitindo mosusu. Mpe osengeli komipesa na kosala mosala na eklezia, mpe liboso ya mokili, mpe na bikolo nzinganzinga mpembeni. Amene.

5 Tala, nalobi epayi na yo, Peter, ete okokende mobembo na yo elongo na ndeko na yo ya mobali mondimi Oliver; mpo ntango ekoki ete elongobani epayi na ngai ete ofungola monoko na yo mpo na kosakola nsango malamu na ngai; mpe boye, kobanga te, kasi tiaka bokebi na maloba mpe na toli ya ndeko na yo ya mobali mondimi, oyo akopesa yo.

6 Mpe soki omitungisi kati na mitungisi na ye nyonso, ntango nyonso kotombolaka se mitema epayi na ngai na losambo mpe na bondimi, mpo na bokangolami na ye mpe na yo; mpo napesaki na ye nguya ya kotonga eklezia na ngai na kati ya Balamani;

7 Mpe naponaki moto moko te kozala mopesi toli likolo na ye kati na eklezia, mpo na oyo etali makambo ya eklezia, longola se soki ezali ndeko na ye ya mobali mondimi, Joseph Smith Mwana.

8 Yango wana, tiaka bokebi na makambo oyo mpe zala na molende mpo na kobombaka mitindo na ngai, mpe okopambolama na bomoi ya seko. Amene.

9 Tala, nalobi epayi na yo, mosali na ngai John, ete osengeli kobanda uta sikawa kokende liboso kosakola nsango malamu na ngai, lokola na mongongo ya kelelo.

10 Mpe mosala na yo ekozala epayi ya ndeko na yo ya mobali mondimi Philip Burroughs, mpe na etuka wana nzinganzinga mpembeni, iyo, epayi nyonso kani bakoki koyoka yo, kino nakotinda yo kolongwa na esika oyo.

11 Mpe mosala na yo nyonso ekozala na Siona, na molimo na yo mobimba, uta sikawa kokende liboso; iyo, okofungolaka ntango nyonso se monoko mpo na ntina na ngai, kobangaka te nini moto akoki kosala, mpo nazali elongo na yo. Amene.

Bimisa na lokasa