Makomi
Malongi mpe Mayokani 32


Eteni 32

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Parley P. Pratt mpe Ziba Peterson, na Manchester, New York, na ebandeli ya sanza ya zomi ya mobu 1830. Bampaka bazalaki koyoka litomba mpe mposa monene na ntina ya Balamani, mpo na baoyo kani Eklezia eyekolaki uta na Buku ya Mormon mapamboli oyo masakolamaki kala. Na engebene, libondeli esalemaki ete Nkolo akoka kolakisa bolingo na Ye na kotalaka soki bampaka basengelaki kotindama na ntango wana na mabota ya Baindia na Westi. Emoniseli elandaki.

1–3, Parley P. Pratt mpe Ziba Peterson babiangami koteya epayi ya Balamani mpe kokende elongo na Oliver Cowdery mpe Peter Whitmer Mwana; 4–5, Basengeli kosambela mpo na bososoli ya makomi.

1 Mpe sikawa mpo na oyo etali mosali na ngai Parley P. Pratt, tala, nalobi epayi na ye ete lokola nazali na bomoi nalingi ete asakola nsango malamu na ngai mpe ayekola uta na ngai, mpe azala mosokemi mpe motema mokita.

2 Mpe oyo nasili kopesa epayi na ye ezali ete asengeli kokende elongo na basali na ngai, Oliver Cowdery mpe Peter Whitmer Mwana, kati na esobe na kati ya Balamani.

3 Mpe Ziba Peterson lisusu asengeli kokende elongo na bango; mpe ngai moko nakokende elongo na bango mpe nakozala katikati na bango; mpe nazali molobeli na bango epayi ya tata, mpe eloko moko te ekolonga bango.

4 Mpe basengeli kotia bokebi na oyo ekomami, mpe kozala na makanisi ya kozwa emoniseli mosusu te; mpe basengeli kosambela ntango nyonso ete nakoka kofungola se yango moko oyo na bososoli na bango.

5 Mpe basengeli kotia bokebi na maloba oyo mpe kosakana te, mpe nakopambola bango. Amene.

Bimisa na lokasa