Makomi
Malongi mpe Mayokani 37


Eteni 37

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith mpe na Sidney Rigdon, penepene na Fayette, New York, na sanza ya zomi na mibale ya mobu 1830. Awa na kati motindo ya yambo na ntina ya bosangani na eleko oyo mopesami.

1–4, Basantu babiangami kosangana na Ohio.

1 Tala, nalobi epayi na bino ete elongobani te epayi na ngai ete bobongola lisusu kino bokokende na Ohio, mpe oyo ezali na ntina ya monguna mpe mpo na matomba na bino.

2 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino ete bokokende te kino esili bino koteya nsango malamu na ngai na biteni bina, mpe ekosila bino kolendisa nie eklezia na esika nyonso wapi ezwami, mpe mingi koleka malamu na Colesville; mpo, tala, basalaka sambo epayi na ngai na bondimi mingi.

3 Mpe lisusu, napesi epayi ya eklezia motindo moko, ete elongobani na ngai ete basangana esika moko na Ohio, na bolengeli ya ntango oyo mosali na ngai Oliver Cowdery akozonga epayi na bango.

4 Tala, bwania ezali awa, mpe tika moto moko moko apona mpo na ye moko kino nakoya. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa