Makomi
Malongi mpe Mayokani 47


Eteni 47

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 8, sanza ya misato ya mobu 1831. John Whitmer, oyo asilaki kosalela lokola kalaki ya Profeta, atatabanaki na ebandeli ntango basengaki ye kosala lokola kalaki mpe mokomi ya mambi ya kala ya Eklezia, na esika ya Oliver Cowdery. Ye oyo akomaki ete; “Ebongi malamu nasala yango te, kasi namoni malamu ete bolingi ya Nkolo esalema, mpe soki alingi yango, nalingi ete amonisa yango na nzela ya Joseph Momoni.” Nsima ya Joseph Smith kozwa emoniseli oyo, John Whitmer andimaki mpe asalelaki na bapesaki na ye.

1–4, John Whitmer atindami kobatela mambi ya kala ya Eklezia mpe kokoma mpo na Profeta.

1 Tala, elongobani epayi na ngai ete mosali na ngai John asengeli kokoma mpe kobatela mambi ya kala na lolenge ya kokoka, mpe kosunga yo, mosali na ngai Joseph, na kokoma makambo nyonso oyo makopesama na yo, kino abiangami na misala misusu.

2 Lisusu, solo nalobi epayi na yo ete akoki lisusu kotombola mongongo na ye kati na makita, na ngonga nyonso ekolongobana.

3 Mpe lisusu, nalobi epayi na yo ete ekopesama epayi na ye kobatela lisolo ya makomi mpe mambi ya kala ya eklezia ntango nyonso; mpo nasili kopona Oliver Cowdery na mosala mosusu.

4 Yango wana, ekopesama na ye, mbala mingi lokola azali sembo, kokoma makambo oyo na lisalisi ya Molendisi. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa