Makomi
Malongi mpe Mayokani 48


Eteni 48

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 10, sanza ya misato ya mobu 1831. Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo mpo na oyo etali lolenge ya kozwa biteni ya mabele mpo na botongi esika ya kofanda ya Basantu. Oyo ezalaki likambo ya motuya na kotalaka botamboli na mobembo ya bandimi ya Eklezia na mboka bapaya uta na esti ya Etazini, na kotosaka motindo ya Nkolo ete basengeli kosangana na Ohio (tala biteni 37:1–3; 45:64).

1–3, Basantu na Ohio basengeli kokabola biteni ya mabele na bango na bandeko na bango bandimi; 4–6, Basantu basengeli kosomba mabele, kotonga engumba, mpe kolanda toli ya basali bakambi na bango.

1 Esengeli ete botikala mpo na ntango oyo na bisika wapi bofandi, lokola ekobongela bino.

2 Mpe mbala mingi lokola bozali na biteni ya mabele, bosengeli kokaba yango na bandeko bandimi ya esti;

3 Mpe mbala mingi lokola bokozala na biteni ya mabele te, tika bango basomba mpo na ntango oyo na bituka bina nzinganzinga, lokola ebongeli bango malamu, mpo esengeli mingi mpenza ete bazala na bisika ya kofanda mpo na ntango oyo.

4 Esengeli mingi mpenza ete bobomba mosolo nyonso oyo bokoki, mpe ete bozwa mosolo nyonso bokoki kozwa kati na bosembo, ete na ntango ekoya bokopesama makoki ya kosomba eteni ya mabele mpo na bosangoli libula, kutu engumba.

5 Esika yango ekobimisama naino te; kasi ekosila bandeko na bino bandimi koya uta na esti esengeli boko bato baponama, mpe na bango ekopesama koyeba esika yango, to epayi na bango ekobimisama.

6 Mpe bakoponama mpo na kosomba biteni ya mabele, mpe kobanda kotia moboko ya engumba; mpe na ntango wana nde bokobanda kosangana na mabota na bino, moto moko moko engebene na libota na ye, engebene na makoki na ye, mpe lokola epesameli ye na bokambi mpe episikopo ya eklezia, engebene na mibeko mpe mitindo oyo bozwaki, mpe oyo bokozwa nsima awa. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa