Makomi
Malongi mpe Mayokani 4


Eteni 4

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya tata na ye, Joseph Smith Tata, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya mibale ya mobu 1829.

1–4, Kosalela Nkolo mosala na mpiko ebikisaka basali na Ye; 5–6, Bizaleli ya bonzambe epesaka bango makoki mpo na mosala; 7, Makambo ya Nzambe esengeli koluka yango.

1 Sikawa tala, mosala moko ya kokamwa ezali penepene na kosalema na kati ya bana ya bato.

2 Boye, O bino baoyo bobandi kati na mosala ya Nzambe, mitala ete bosalela ye na motema na bino, na nguya na bino, na mayele na bino, mpe bokasi na bino mobimba, ete bokoka kotelema kozangaka mpamela liboso ya Nzambe na mokolo ya nsuka.

3 Mpe boye, soki bozali na mposa ya kosalela Nzambe bobiangami na mosala;

4 Mpo tala elanga esili kokomela mpo na kobuka mbuma; mpe tala, ye oyo akokata na likwangola na bokasi na ye, ye moko wana kaka akobomba mbuma mingi kati na ebombelo ete akufa te, kasi amema lobiko na molimo na ye;

5 Mpe bondimi, elikya, bolingani mpe bolingo, elongo na liso kotalaka se nkembo ya Nzambe, ekopesa ye makoki mpo na mosala.

6 Bomikundola kozala na bondimi, bolamu, boyebi, komipekisa, bompikiliki, bolamu epayi ya bandeko, bonzambe, bolingani, bomikitisi, mpe etingia.

7 Senga, mpe bokozwa; beta ekofungolela bino. Amene.

Bimisa na lokasa