Makomi
Malongi mpe Mayokani 55


Eteni 55

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya William W. Phelps, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 14, sanza ya motoba ya mobu 1831. William W. Phelps, monyati ya buku, mpe libota na ye bawutaki se koya na Kirtland, mpe Profeta alukaki Nkolo mpo na kozwa nsango etali ye.

1–3, William W. Phelps abiangami mpe aponami mpo na kobatisama, mpo na kokulisama mpaka, mpe koteya nsango malamu; 4, Asengeli lisusu kokoma buku mpo na bana mike kati na biteyelo ya Eklezia; 5–6, Asengeli kokende mobembo na Missouri, wapi ekozala esika ya misala na ye.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi na yo, mosali na ngai William, iyo, kutu Nkolo ya mabele mobimba, obiangami mpe oponami; mpe nsima ya kobatisama na mai, oyo soki osali liso bobele na nkembo na ngai, okozwa bolimbisi ya masumu na yo mpe Molimo Mosantu na nzela ya kotiama maboko;

2 Mpe nsima okokulisama na maboko ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpo na kozala mpaka epayi ya eklezia oyo, mpo na koteya boyamboli mpe bolimbisi ya masumu na nzela ya libatisi na nkombo ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi.

3 Mpe likolo ya moto nyonso oyo okotia maboko na yo, soki bazali bato ya mawa liboso na ngai, okozwa nguya ya kopesa Molimo Mosantu.

4 Mpe lisusu, okokulisama mpo na kosunga mosali na ngai Oliver Cowdery mpo na kosala mosala ya konyataka buku, mpe ya koponaka mpe kokomaka buku mpo na biteyelo kati na eklezia oyo, ete bana mike lisusu bakoka kozwa malako liboso na ngai lokola esepelisi ngai.

5 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo, mpo na ntina oyo osengeli kokende mobembo na yo elongo na mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Sidney Rigdon, ete okoka kofanda kati na mboka ya bosangoli libula na yo mpo na kosala mosala oyo.

6 Mpe lisusu, tika ete mosali na ngai Joseph Coe lisusu akende mobembo na ye elongo na bango. Ndambo ya malako matikali makoyebana nsima awa, kutu lokola ekolinga ngai. Amene.

Bimisa na lokasa