Makomi
Malongi mpe Mayokani 60


Eteni 60

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Independence, Etuka ya Jackson, Missouri, na mokolo ya 8, sanza ya mwambe ya mobu 1831. Na libaku oyo bampaka oyo basalaki mobembo na Etuka ya Jackson mpe bazalaki na bobulisi ya mboka mpe ya esika ya kotonga tempelo balingaki koyeba nini basengelaki kosala.

1–9, Bampaka basengeli koteya nsango malamu kati na mangomba ya bato ya nkuna; 10–14, Basengeli kolekisa ntango na bango mpamba te, soki mpe kokunda talanta na bango te; 15–17, Bakoki kosokola makolo na bango lokola litatoli na baoyo wana baboyaka nsango malamu.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi ya bampaka ya eklezia na ye, baoyo basengeli na lombangu nyonso kozonga na mboka epayi wapi bawutaki: Tala, esepelisi ngai, ete bokoma na esika oyo;

2 Kasi na boko basusu nasepeli malamu te, mpo bakofungola minoko na bango te, kasi bazali kokunda talanta na bango oyo napesaki epayi na bango, na ntina ya bobangi ya moto. Lisuma na baoyo ya lolenge wana, mpo nkanda na ngai ezali kopela na bango.

3 Mpe ekosalema ete, soki bazali sembo mingi epayi na ngai te, ekolongolama, kutu ata oyo bazali na yango.

4 Mpo ngai, Nkolo, nakonzaka na likolo na lola, mpe na kati ya mapinga ya mabele; mpe na mokolo yango ntango nakosangisa pawuni na ngai, bato nyonso bakoyeba nini wana oyo elakisi nguya ya Nzambe.

5 Kasi, solo, nakolobela bino mpo na oyo etali mobembo na bino na mboka epayi wapi bouti. Tika ete masuwa mazala kuna, soki te masombama, lokola ebongeli bino malamu, ezali likambo epayi na ngai te, mpe bokende mobembo na bino na lombangu epayi na esika oyo ebiangami St. Louis.

6 Mpe uta esika wana tika basali na ngai Sidney Rigdon, Joseph Smith Mwana, mpe Oliver Cowdery, bakende mobembo na bango mpo na Cincinnati;

7 Mpe na esika oyo tika ete batombola mongongo na bango mpe basakola liloba na ngai na mingongo makasi, wana ekotombola bango maboko likolo, na kozanga nkele to ntembe. Mpo nazali na makoki ya kokomisa bino basantu, mpe masumu na bino elimbisami bino.

8 Mpe tika montika ya bampaka bakende mobembo uta na St. Louis, mibale na mibale, mpe bateya liloba, na lombangu te, na kati ya mangomba ya bato ya nkuna, kino bakozonga na Baeklezia epayi wapi bawutaki.

9 Mpe nyonso oyo mpo na bolamu ya Baeklezia; mpo natindaki bango mpo na ntina wana.

10 Mpe tika mosali na ngai Edward Partridge akabola ndambo ya mosolo oyo napesaki ye, ndambo epayi na bampaka na ngai oyo batindami kozonga;

11 Mpe ye oyo akoki, botika ye azongisa yango na nzela ya ntoma; mpe ye oyo akoki te, na ye esengisami te.

12 Mpe sikawa nazali koloba mpo na montika oyo basengeli koya na mboka oyo.

13 Tala, batindama koteya nsango malamu na ngai kati na mangomba ya bato ya nkuna; yango wana, napesi epayi na bango motindo moko, boye: Osengeli kolekisa ntango na yo mpamba te, mpe okokunda talanta na yo mpe te mpo ete ekoka koyebana te.

14 Mpe nsima ya bozongi na mboka ya Siona, mpe ekosila yo koteya liloba ya ngai, okozonga na lombangu, koteyaka liloba na ngai na kati ya mangomba ya bato ya nkuna, na lombangu te, na nkele to kowelana mpe te.

15 Mpe bopopula mputulu ya makolo na bino na baye bayambi bino te, liboso na bango te, mbele botumbola bango, kasi na bonkutu; mpe bosukola makolo na bino, lokola litatoli mpo na bango na mokolo ya bosambisi.

16 Tala, oyo ekoki mpo na bino, mpe bolingi na ye oyo atindaki bino.

17 Mpe na monoko ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, ekoyebisama mpo na oyo etali Sidney Rigdon mpe Oliver Cowdery. Oyo etikali ekoyebisama na nsima. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa