Makomi
Malongi mpe Mayokani 62


Eteni 62

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na libongo ya Ebale ya Missouri na Chariton, Missouri, na mokolo ya 13, sanza ya mwambe ya mobu 1831. Na mokolo oyo Profeta mpe liboke ya bato na ye, baoyo bazalaki na nzela na bango uta na Independence kokende na Kirtland, bakutanaki na bampaka ebele oyo bazalaki na nzela na bango kokende na mboka ya Siona, mpe, nsima ya kopesama mbote ya esengo, azwaki emoniseli boye.

1–3, Matatoli ezali kokomama na lola; 4–9, Bampaka basengeli kokende mobembo mpe koteya engebene na bwania na bango mpe lokola batindami na Molimo.

1 Tala, mpe boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino, kutu Yesu Klisto, molobeli na bino, oyo ayebi bolembu ya moto mpe lolenge nini kosunga bango oyo basenginiami.

2 Mpe solo miso na ngai ezali likolo na bango oyo bamati naino na mboka ya Siona te; yango wana etinda na bino ekokisami naino te.

3 Nzokande, bozali ya kopambolama, mpo litatoli oyo bosili kopesa ekomami na lola mpo ete banjelu batanga yango malamu; mpe bazali kosepela likolo na bino, mpe masumu na bino malimbisami bino.

4 Mpe sikawa bokoba mobembo na bino. Bosangana bino moko na mboka ya Siona; mpe bosala likita mpe bosepela esika moko, mpe bobonzela elambo epayi na ye oyo Aleki Likolo.

5 Mpe nsima nde bokoki kozonga kopesa litatoli, iyo, kutu elongo, soki te mibale mibale, lokola ebongeli bino malamu, ezali likambo epayi na ngai te; bobele bozala sembo, mpe bosakola nsango ya nsai epayi ya bafandi ya mabele, soki te na kati ya mangomba ya bato ya nkuna.

6 Tala, ngai Nkolo, nasili komema bino esika moko ete bilaka yango ekokisama, ete basembo kati na bino babikisama mpe basepela esika moko na mboka ya Missouri. Ngai, Nkolo, nalaki basembo mpe nakoki kokosa te.

7 Ngai, Nkolo, nazali na bolingi, soki moko na kati na bino azali na mposa ya komata likolo ya bampunda, soki te likolo ya bana bampunda, to likolo ya makalo, akozwa lipamboli oyo, soki azwi yango uta na loboko ya Nkolo, na motema moko ya botondi na makambo nyonso.

8 Makambo oyo matikali na bino mpo na kosala engebene na bwania mpe malako ya Molimo.

9 Tala, bokonzi ezali ya bino. Mpe tala, mpe mona, nazali ntango nyonso elongo na basembo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa