Makomi
Malongi mpe Mayokani 71


Eteni 71

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith mpe Sidney Rigdon, na Hiram, Ohio, mokolo ya 1 ya sanza ya zomi na mibale ya mobu 1831. Profeta akobaki se kobongola Biblia elongo na Sidney Rigdon lokola mokomeli na ye kino emoniseli oyo bozwamaki, wapi ntango bobongoli yango botiamaki mpembeni ete epesa bango makoki ya kokokisa malako epesami kati awa. Bandeko bandimi basengelaki kokende koteya mpo ete bakitisa mitema na mayoki ya kozanga bondeko mpe boyokani na Eklezia lokola eyano ya bobimi ya mikanda ekomama na Ezra Booth, oyo asilaki kopengwa.

1–4, Joseph Smith mpe Sidney Rigdon batindami kosakola nsango malamu; 5–11, Banguna ya Basantu bakoyokisama nsoni.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi ya basali baye Joseph Smith Mwana mpe Sidney Rigdon, ete ntango esili solo kokoka ete esengeli mpe ebongeli ngai malamu ete bofungola minoko na bino na kosakolaka nsango malamu na ngai, biloko ya bokonzi, kolimbolaka mibombamo yango uta na makomi, engebene na ndambo wana ya Molimo mpe nguya oyo ekopesama epayi na bino, kutu lokola nalingi.

2 Solo nalobi epayi na bino, sakola epayi ya mokili kati na bikolo ya nzinganzinga mpembeni, mpe lisusu kati na eklezia, mpo na ntaka ya eleko yoko, kutu kino ekoyebisama na bino.

3 Solo oyo ezali etinda mpo na eleko yoko, oyo napesi epayi na bino.

4 Yango wana, bosala kati na elanga na ngai ya vinyo. Bobenga bafandi nyonso ya mabele, mpe botatola, mpe bolengela nzela mpo na mitindo mpe bimoniseli yango esengeli koya.

5 Sikawa, tala oyo ezali bwania; oyo nyonso akotanga, tika ye asosola mpe azwa lisusu;

6 Mpo ete epayi na ye oyo azwi ekopesama beboo mingi koleka, kutu nguya.

7 Yango wana, boyokisa banguna na bino nsoni; bobenga bango kokutana na bino ezala na polele mpe na nkuku; mpe mbala mingi lokola bozali sembo nsoni na bango ekomonisama polele.

8 Yango wana, botika bango babimisa ntina makasi ya likambo ya bosambisi na bango na Nkolo.

9 Solo, boye elobi Nkolo epayi na bino—ezali na ebundeli moko te esalemi mpo na kobundisa bino oyo ekolonga;

10 Mpe soki moto moko atomboli mongongo na ye na bino akoyokisama nsoni na ntango oyo esengeli ya ngai moko.

11 Yango wana, bobomba mitindo na ngai; ezali solo mpe sembo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa