Makomi
Malongi mpe Mayokani 75


Eteni 75

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Amherst, Ohio, na mokolo ya 25, sanza ya yambo ya mobu 1832. Eteni oyo ezali na bimoniseli ekabwani mibale (ya yambo ezwi milongo 1 kino 22 mpe ya mibale milongo 23 kino 36) oyo epesamaki na mokolo se moko. Ezalaki na libaku ya likita moko wapi Joseph Smith asungamaki mpe akulisamaki kozala Mokambi ya Bonganganzambe ya Monene. Boko bampaka bazalaki na mposa ya koyekola mpo na ntina ya mosala na bango ya sikawa. Bimoniseli oyo elandaki.

1–5, Bampaka ya sembo oyo bateyaka nsango malamu bakozwa bomoi ya seko; 6–12, Sambela mpo na kozwa Molendisi, oyo alakisaka makambo nyonso; 13–22, Bampaka bakosambisa baoyo babwakaka maloba na bango; 23–36, Mabota ya bamisionele esengeli kozwa lisalisi uta na Eklezia.

1 Solo, solo, nalobi epayi na bino, ngai oyo nazali koloba kutu na mongongo ya Molimo na ngai, kutu Alifa mpe Omega, Nkolo na bino mpe Nzambe na bino—

2 Boyoka, O bino baoyo bosili kopesa nkombo na bino mpo na kokende kosakola nsango malamu na ngai, mpe kopapa elanga na ngai ya vinyo.

3 Tala, nalobi epayi na bino ete ezali bolingi na ngai ete bosengeli kokende mpe bowumela te, bozala goigoi mpe te kasi bosala na makasi na bino—

4 Kotombolaka mingongo na bino lokola na lokito ya kelelo, kosakolaka bosolo engebene na bimoniseli mpe mitindo oyo napesaki bino.

5 Mpe boye, soki bozali sembo bokotondisama na maboke mingi likolo ya mikongo na bino, mpe bokolatisama mitole na lokumu, mpe nkembo, mpe bozangi kufa, mpe bomoi ya seko.

6 Boye, solo nalobi epayi ya mosali na ngai William E. McLellin, nalongoli etinda oyo napesaki ye ya kokende na bikolo ya esti;

7 Mpe napesi epayi na ye etinda ya sika mpe motindo mwa sika, kati na oyo, ngai Nkolo, napesi ye etumbu mpo na koyima-yima ya motema na ye;

8 Mpe asumukaki; nzokande, nalimbisi ye mpe nalobi epayi na ye lisusu, Kende na bikolo ya sudi.

9 Mpe tika mosali na ngai Luke Johnson akende elongo na ye, mpe basakola makambo oyo natindaki bango—

10 Mpe babelela na nkombo ya Nkolo mpo ete Molendisi, oyo akoteya bango makambo nyonso oyo malongobani mpo na bango—

11 Mpe basambela ntango nyonso ete balemba te; mpe mbala mingi lokola bakosala eye, nakozala elongo na bango kutu kino na nsuka.

12 Tala, oyo ezali bolingi ya Nkolo Nzambe na bino mpo na oyo etali bino. Kutu bongo. Amene.

13 Mpe lisusu, solo boye elobi Nkolo, tika mosali na ngai Orson Hyde mpe mosali na ngai Samuel H. Smith bakende mobembo na bango na bikolo ya esti, mpe basakola makambo oyo natindaki bango, mpe mbala mingi lokola bakozala sembo, mona, nakozala elongo na bango kino na nsuka.

14 Mpe lisusu, solo nazali koloba na mosali na ngai Lyman Johnson, mpe epayi ya mosali na ngai Orson Pratt, ete basengeli lisusu kokende mobembo na bango na bikolo ya esti; mpe tala, mpe mona mona, nakozala elongo na bango kino na nsuka.

15 Mpe lisusu, nazali koloba epayi ya mosali na ngai Asa Dodds, mpe epayi ya mosali na ngai Calves Wilson, ete basengeli lisusu kokende mobembo na bango epayi na bikolo ya westi, mpe kosakola nsango malamu na ngai, kutu lokola natindaki bango.

16 Mpe ye oyo azali sembo akolonga makambo nyonso, mpe akotombwama na mokolo ya nsuka.

17 Mpe lisusu, nalobi epayi ya mosali na ngai Major N. Ashley, mpe mosali na ngai Burr Riggs, tika bango bakende mobembo na bango lisusu kati na ekolo ya sudi.

18 Iyo, tika baye wana nyonso bakende mobembo na bango, lokola natindaki bango, kokendeka uta ndako na ndako, mboka na mboka, mpe engumba na engumba.

19 Mpe na ndako nyonso wapi bokokota, mpe bayambi bino, botika mapamboli na bino likolo ya ndako wana.

20 Mpe na ndako nyonso wapi bokokota, mpe bayambi bino te, bosengeli kobima na lombangu uta na ndako wana, mpe bopupola mputulu ya makolo na bino lokola litatoli na bango.

21 Mpe bokotonda na bosepeli mpe nsai; mpe bokoyeba eye, ete na mokolo wana ya bosambisi bokozala basambisi ya ndako wana, mpe bokokweisa bango;

22 Mpe ekozala malamu mingi mpo na bango na mokolo ya bosambisi koleka mpo na bapaganu na mokolo ya bosambisi, ete mpo na ndako wana; mpe boye, bokanga nketo na bino mpe bozala sembo, mpe bokolonga makambo nyonso, mpe bokotombwama na mokolo ya nsuka. Kutu bongo. Amene.

23 Mpe lisusu, boye elobi Nkolo epayi na bino, O bino bampaka ya eklezia na ngai, baye bopesaki nkombo na bino ete bokoka koyeba bolingi na ye mpo na ntina na bino—

24 Tala, nalobi epayi na bino, ete ezali mosala ya eklezia mpo na kosunga na koleisaka mabota ya baye wana, mpe lisusu koleisa mabota ya baye wana babiangami mpe basengeli mpenza kotindama na mokili mpo na kosakola nsango malamu epayi ya mokili.

25 Yango wana, ngai Nkolo, napesi bino motindo oyo, ete bozwa bisika mpo na mabota na bino, mbala mingi lokola bandeko na bino bandimi bazali na bolingi ya kofungola mitema na bango.

26 Mpe tika nyonso baoyo bakoki kozwa bisika mpo na mabota na bango, mpe kozwa bilei uta na eklezia mpo na bango, bazanga te kokende koteya na mokili, ezala na esti soki te na westi, na nordi, soki te na sudi.

27 Tika basenga mpe bakozwa, babeta mpe bakofungolela bango, mpe ekoyebisama bango uta na likolo, kutu na Molendisi, wapi bakokende.

28 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ete tika moto nyonso oyo asengisami kopesa mpo na libota na ye moko apesa, mpe akobungisa motole na ye soki moke te; mpe tika ye asala mosala kati na eklezia.

29 Tika moto nyonso azala na etingia kati na makambo nyonso. Mpe moto ya goigoi akozala na esika kati na eklezia te, longola se soki ayamboli mpe abongisi banzela na ye.

30 Yango wana, tika mosali na ngai Simeon Carter mpe mosali na ngai Emer Harris bazala bomoko kati na mosala;

31 Mpe lisusu mosali na ngai Ezra Thayre mpe mosali na ngai Thomas B. Marsh;

32 Lisusu mosali na ngai Hyrum Smith mpe mosali na ngai Reynolds Cahoon;

33 Mpe lisusu mosali na ngai Daniel Stanton mpe mosali na ngai Seymour Brunson;

34 Mpe lisusu mosali na ngai Sylvester Smith mpe mosali na ngai Gideon Carter;

35 Mpe lisusu mosali na ngai Ruggles Eames mpe mosali na ngai Stephen Burnett;

36 Mpe lisusu mosali na ngai Micah B. Welton mpe mosali na ngai Eden Smith. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa