Makomi
Malongi mpe Mayokani 79


Eteni 79

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Hiram, Ohio, na mokolo ya 12, sanza ya misato ya mobu 1832.

1–4, Jared Carter abiangami koteya nsango malamu na Molendisi.

1 Solo nalobi epayi na yo, ete ezali bolingi na ngai ete mosali na ngai Jared Carter asengeli kokende lisusu na bikolo ya esti, uta esika na esika, mpe uta engumba na engumba, na nguya ya bokulisi oyo wapi akulisamaki na yango, kosakolaka nsango ya nsai ya bosepeli monene, kutu nsango malamu ya libela.

2 Mpe nakotinda Molendisi likolo na ye, oyo akoteya ye bosolo mpe nzela epayi wapi asengeli kokende;

3 Mpe mbala mingi lokola akozala sembo, nakolatisa ye lisusu motole elongo na maboke.

4 Yango wana, mosali na ngai Jared Carter, tika motema na yo ezala na nsai, mpe kobanga te, elobi Nkolo na yo, kutu Yesu Klisto. Amene.

Bimisa na lokasa