Makomi
Malongi mpe Mayokani 83


Eteni 83

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Independence, Missouri, na mokolo ya 30, sanza ya minei ya mobu 1832. Emoniseli oyo ezwamaki ntango Profeta azalaki kati na lisanga elongo na bandeko na ye bandimi.

1–4, Basi mpe bana bazali na litomba ya kosenga ete mibali mpe batata na bango basunga bango; 5–6, Bakufeli mibali mpe bana bitike bazali na litomba ya kosenga ete Eklezia esunga bango.

1 Solo, boye elobi Nkolo, mpo na kobakisa na mibeko ya eklezia mpo na oyo etali basi mpe bana, baoyo wana bazali ya eklezia, baoyo babungisaki mibali mpe batata na bango:

2 Basi bazali na litomba ya kosenga mpo na oyo etali mibali na bango ete basunga bango, kino ntango mibali na bango bakokamatama; mpe soki bazwami lokola babuki mobeko te esengeli bazala kati na bondeko na eklezia.

3 Mpe soki bazali sembo te bakosangana elongo na bondeko kati na eklezia te; nzokande bakoki kotikala kosangola libula na bango engebene na mibeko ya mboka.

4 Bana nyonso bazali na litomba likolo ya baboti na bango ya kosenga basunga bango kino bakokisi mibu ya bokolo.

5 Mpe nsima wana, bazali na litomba likolo ya eklezia ya kosenga ete basunga bango, to na maloba mosusu likolo ya ebombelo ya Nkolo, soki baboti na bango bazalaki na oyo ya kopesa bango lokola libula ya kosangola te.

6 Mpe ebombelo yango ekobatelama na ntina ya biloko bibulisami ya eklezia; mpe ntomo epesama na basi bakufeli mibali mpe bana bitike, soki mpe lisusu na babola. Amene.

Bimisa na lokasa