Makomi
Malongi mpe Mayokani 87


Eteni 87

Emoniseli mpe lisakoli mpo na oyo etali etumba, epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na to penepene na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 25, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1832. Na ntango oyo boweli ezalaki na Etazini likolo ya bowumbu mpe likambo ya koboya kofutela mbulamatari bampaku na ekolo ya Carolina ya Sudi ezalaki mingi. Mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete “kobima ya mobulu na kati ya bikolo” ezalaki kokoma “polele mingi” epayi ya Profeta “koleka ete ezalaki naino uta Eklezia ebandaki mobembo na yango uta na esobe.”

1–4, Etumba esakolami liboso esalema katikati na Bikolo ya Nordi mpe Bikolo ya Sudi; 5–8, Bolozi ekokweya likolo ya bafandi ya mabele.

1 Solo, boye elobi Nkolo mpo na oyo etali bitumba oyo ekosalema kala mingi te, kobandaka na botomboki ya Carolina ya Sudi, oyo na nsuka ekosukisama na liwa mpe mpasi ya milimo mingi;

2 Mpe ntango ekoya ete etumba ekopalangana likolo ya bikolo nyonso, kobandaka na esika oyo.

3 Mpo tala, Bikolo ya Sudi bikokabwana na Bikolo ya Nordi, mpe Bikolo ya Sudi bikobelela na bikolo misusu, kutu na ekolo ya Grande Bretagne, lokola ebiangami, mpe bango moko bakobelela lisusu bikolo misusu, mpo ete bamibatela na bikolo misusu; mpe nsima etumba ekosopana likolo ya bikolo nyonso.

4 Mpe ekosalema ete, nsima ya mikolo mingi, baumbu bakotelemela bankolo na bango, baoyo basengeli komilengela mpo na kobunda mpe kopesama malako mpo na bitumba.

5 Mpe ekosalema lisusu ete mintika ya ekolo oyo etikali mikolengela bango moko, mpe bakokoma na nkanda koleka mpenza, mpe bakoyokisa Bayuda-te mpasi moko ya nsomo.

6 Mpe boye, na nzela ya mompanga mpe bosopi makila bafandi ya mabele bakosala matanga; mpe na nzala, mpe bolozi, mpe boningani ya mabele, mpe kake ya lola, mpe bongali mpe boleli makasi ya monkalikali lisusu, bafandi ya mabele bakoyokisama nkele, mpe bosiliki, mpe loboko ya etumbu ya Nzambe moko ya Bokasi nyonso, kino bobebisami boye bokanamaki ekotia nsuka nie na bikolo nyonso;

7 Ete boleli ya basantu, mpe makila ya basantu, esila komata, uta na mabele, na matoyi ya Nkolo ya Sabato mpo ete babekolama na banguna na bango.

8 Yango wana, botelema na bisika bisantu, mpe bolongwa te, kino ekoya mokolo ya Nkolo; mpo tala ezali koya na lombangu, elobi Nkolo. Amene.

Bimisa na lokasa