Makomi
Malongi mpe Mayokani 89


Eteni 89

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 27, sanza ya mibale ya mobu 1833. Lokola bandeko bandimi na ebandeli bazalaki kosalela likaya kati na makita na bango, Profeta atindamaki komanyola likambo yango na mozindo; na engebene, alukaki koyeba uta na Nkolo na ntina na yango. Emoniseli, oyo eyebani lokola Liloba ya Bwania, ezalaki litomba ya likambo yango alingaki koyeba.

1–9, Kosalela vinyo, masanga ya makasi, likaya, mpe emeli ya moto- moto epekisami; 10–17, Matiti, mbuma, mosuni, mpe masangu epesami mpo na bilei ya moto mpe ya banyama; 18–21, Botosi na mobeko ya nsango malamu, kobakisaka mpe Liloba ya Bwania, ememaka mapamboli ya ntango mpe ya molimo.

1 Liloba ya Bwania, mpo na litomba ya lisanga ya banganganzambe minene, oyo bayanganaki na Kirtland, mpe litomba ya eklezia, mpe lisusu ya basantu na Siona—

2 Esengeli etindama lokola mbote; lokola motindo to lokola likambo ya botindiki na makasi te, kasi lokola etinda ya emoniseli mpe liloba ya bwania, na komonisa molongo mpe mposa ya Nzambe mpo na oyo etali lobiko ya nzoto ya basantu nyonso na mikolo ya nsuka—

3 Epesami lokola liteya elongo na elaka, ekokani na makoki ya bato na bolembu mpe na bato ya bolembu koleka nyonso ya basantu nyonso, baye bazali to bakoki kobengama basantu.

4 Tala, solo, Nkolo alobi epayi na bino boye: Na ntina ya mabe mpe mabongisi mabe oyo ezali mpe ekozala na mitema ya bato ya mabongisi mabe na mikolo ya nsuka, nakebisaki bino, mpe nazali kokebisa bino na kopesaka epayi na bino liloba ya bwania oyo na nzela ya emoniseli—

5 Ete mbala mingi lokola moto soki nani ameli vinyo to masanga ya makasi na kati na bino, tala ezali malamu te, elongobani mpe te na miso ya Tata na bino, longola se na kowanganaka esika moko mpo na kosala milulu na bino ya elambo liboso na ye.

6 Mpe, tala, oyo esengeli kozala vinyo, iyo, vinyo ya peto uta na ekango ya nzete ya vinyo, oyo masalemi na bino moko.

7 Mpe, lisusu, masanga ya makasi ezali malamu te mpo na libumu, kasi mpo na bosukoli ya nzoto na bino.

8 Mpe lisusu, likaya ezali malamu te mpo na nzoto, mpo libumu mpe te, mpe ezali malamu te mpo na moto, kasi ezali lititi mpo na mpota mpe mpo na etonga oyo ezali na bokono, esengeli kosalela yango na bwania mpe na ntoki.

9 Mpe lisusu, masanga ya moto ezali malamu te mpo na nzoto soki mpo na libumu mpe te.

10 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, matiti nyonso Nzambe apesaki yango mpo na botongi ya nzoto, mpo na kokokisa lolenge ya nzoto ya moto, mpe mpo ete moto asalela—

11 Matiti moko moko na eleko na yango, mpe mbuma moko moko na eleko na yango; nyonso oyo mpo ete basalela na bokebi mpe bozongisi matondi.

12 Iyo, lisusu mosuni ya banyama mpe ya ndeke ya likolo, ngai, Nkolo, napesi mpo ete moto asalela na kozongisaka matondi; nzokande esengeli basalela na kolekisaka ndelo te;

13 Mpe esepelisi ngai ete basalela misuni yango te, longola se na eleko ya mvula mpe mpio makasi, to na eleko ya malili, to na eleko ya nzala.

14 Mbuma nyonso epesami mpo ete moto mpe banyama basalela, mpo na kozala likonzi ya bilei mpo na bomoi, kaka mpo na moto te kasi mpe mpo na banyama ya zamba, mpe ya ndeke ya likolo, mpe banyama nyonso ya zamba oyo ekimaka mbangu to engulumaka na mabele;

15 Mpe oyo Nzambe akelaki yango mpo ete moto asalela yango bobele na ntango ya nzala mpe molaka ya koleka.

16 Mbuma nyonso ya masangu ezali malamu mpo na bilei ya moto; kutu lokola mbuma ya nzete ya vinyo; oyo kani ekobota mbuma, ezala kati na mabele soki te likolo ya mabele—

17 Nzokande, loso ezali malamu koleka mpo na moto, mpe masangu mpo na ngombe, mpe sebeloni mpo na bampunda, mpe bambuma ya ndenge na ndenge mpo na bandeke mpe ngulu, mpe mpo na banyama nyonso ya zamba, mpe loso mpo na banyama nyonso ya ntina, mpe mpo na kosala emeli ya pete, mpe mbuma mosusu mpe lokola.

18 Mpe basantu nyonso oyo bakokundola kobomba mpe kosalela maloba oyo, kotambolaka na botosi ya mitindo, bakozwa bokolongonu ya nzoto na motolu na bango mpe mafuta mpo na mikuwa na bango;

19 Mpe bakozwa bwania mpe biloko ya motuya monene ya boyebi, kutu biloko ya motuya oyo ebombama;

20 Mpe bakokima mbangu mpe bakolemba te, mpe bakotambola mpe bakosenzwa te.

21 Mpe ngai, Nkolo, napesi epayi bango elaka moko, ete anjelu mobebisi akoleka bango, lokola bana ya Yisalaele, mpe akoboma bango te. Amene.

Bimisa na lokasa