Makomi
Malongi mpe Mayokani 8


Eteni 8

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Oliver Cowdery, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya minei ya mobu 1829. O bolandi ya ntango ya bobongoli ya Buku ya Mormon, Oliver oyo akobaki kosala lokola mokomeli, kokomaka na nse ya etangeli ya Profeta, alingaki kolatisama na nguya ya likabo ya bobongoli. Nkolo apesaki eyano na libondeli na ye na kopesaka emoniseli oyo.

1–5, Emoniseli eyaka na nguya ya Molimo Mosantu; 6–12, Boyebi ya mibombamo ya Nzambe mpe nguya ya kobongola masolo ya makomi ya kala eyaka na bondimi.

1 Oliver Cowdery, solo, solo, nalobi epayi na yo, ete solo mpenza lokola Nkolo azali na bomoi, oyo azali Nzambe na yo mpe Mosikoli na yo, kutu solo mpenza okozwa boyebi ya biloko nyonso okosenga na bondimi, na motema moko ya sembo, kondimaka ete okozwa boyebi mpo na oyo etali minkoma ya masolo ya makomi ya kala, oyo mawumela, oyo ezali na biteni ya makomi na ngai, oyo elobamaki na mamonisi ya Molimo na ngai.

2 Iyo, tala, nakoyebisa yo na mayele na yo mpe na motema na yo, na nzela ya Molimo Mosantu, oyo ekoya likolo na yo mpe oyo mokofanda na motema na yo.

3 Sikawa, tala, oyo ezali molimo ya emoniseli; tala, oyo ezali molimo na nzela ya oyo wapi Mose amemaki bana ya Yisalaele kokatisa Mbu Etane lokola soki ezalaki mabele ekawuka.

4 Boye oyo ezali likabo na yo; salela yango, mpe opambolami, mpo ekokangola yo uta na maboko ya banguna na yo, nzokande, soki ezalaki bongo te, balingaki koboma yo mpe komema molimo na yo na bobebisami.

5 O, omikundola maloba oyo, mpe bomba mitindo na ngai. Mikundola, oyo ezali likabo na yo.

6 Sikawa oyo ezali likabo na yo nyonso te; mpo ete ozali na likabo mosusu, oyo ezali likabo ya Alona; tala, eyebisi yo makambo mingi;

7 Tala, nguya mosusu ezali te, longola se nguya ya Nzambe, oyo ekoki kosala ete likabo oyo ya Alona ezala na yo.

8 Boye, kotia tembe te, mpo ezali likabo ya Nzambe; mpe osengeli kosimba yango na maboko na yo, mpe sala misala ya kokamwa; mpe nguya moko te ekokoka kobotola yango uta na maboko na yo, mpo ezali mosala ya Nzambe.

9 Mpe, boye, eloko nyonso oyo okosenga ngai mpo na koyebisa yo na nzela oyo wana, nakopesa yango epayi na yo, mpe okozwa boyebi mpo na ntina na yango.

10 Mikundola ete soki bondimi ezangi okoki kosala eloko moko te; boye sengaka na bondimi. Kosakana na biloko oyo te; kosenga te oyo osengeli te kosenga.

11 Senga ete okoka koyeba mibombamo ya Nzambe, mpe ete okoka kobongola mpe kozwa boyebi uta na masolo ya makomi nyonso oyo ya kala oyo ebombamaki, oyo ezali bule; mpe engebene na bondimi na yo ekosalema mpo na yo.

12 Tala, ezali ngai oyo nalobaki yango; mpe nazali se moko oyo alobaki na yo uta na ebandeli. Amene.

Bimisa na lokasa