Makomi
Malongi mpe Mayokani 92


Eteni 92

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 15, sanza ya misato ya mobu 1833. Emoniseli yango elakisi Frederick G. Williams, oyo kala mingi te aponamaki lokola mopesi toli na Joseph Smith mpo na oyo etali misala na ye kati na Kompani ya Bomoko (tala mitu ya biteni 78 mpe 82).

1–2, Nkolo apesi motindo oyo motali bondimami na molongo ya bomoko.

1 Solo, boye elobi Nkolo, napesi epayi ya molongo ya bomoko, oyo mobongisami engebene na motindo epesamaki liboso, emoniseli moko mpe motindo mpo na oyo etali mosali na ngai Frederick G. Williams, ete bosengeli koyamba ye kati na molongo. Oyo nalobi epayi ya moko nalobi yango epayi ya nyonso.

2 Mpe lisusu, nalobi epayi ya mosali na ngai Frederick G. Williams, okozala moto ya misala kati na molongo oyo; mpe mbala mingi lokola okozala sembo na kobombaka mitindo nyonso ya liboso okopambolama libela. Amene.

Bimisa na lokasa