Makomi
Malongi mpe Mayokani 98


Eteni 98

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 6, sanza ya mwambe ya mobu 1833. Emoniseli oyo eyaki mpo na monyokoli oyo ezalaki kokweya likolo ya Basantu na Missouri. Motanga ya bandimi ya Eklezia oyo bayaki kofanda na Missouri ebakisamaki mpe ememaki mobulu na bafandi mosusu, oyo bamonaki ete motango ya Basantu, nguya na bango ya politiki mpe ya mumbongo, mpe bokeseni ya makombo ya bonkoko mpe ya biyamba ezalaki kobundisa bango. Na sanza ya sambo ya mobu 1833, ngulupa ya bato ya mobulu babebisaki nyonso ezalaki ya Eklezia, bapakolaki bandimi mibale ya Eklezia ndoko mpe balatisaki bango nsala, mpe basengaki ete Basantu balongwa na Etuka ya Jackson. Ata ndambo ya bansango ya makambo oyo ezalaki koleka na Missouri ekomelaki na ntembe te Profeta na Kirtland (mosika ya bakilometele nkoto na nkama minei), akokaki koyeba monene ya likambo yango na elaka oyo bobele na nzela ya emoniseli.

1–3, Mitungisi ya Basantu ekozala mpo na bolamu na bango; 4–8, Basantu basengeli kosunga mobeko mokonzi ya mboka; 9–10, Bato ya sembo, bwania, mpe malamu basengeli kosungama mpo na misala ya mbulamatari; 11–15, Baoyo batikaka bomoi na bango na ntina ya Nkolo bakozwa bomoi ya seko; 16–18, Boboya bitumba mpe bosakola kimia; 19–22, Basantu na Kirtland bapamelami mpe batindami koyambola; 23–32, Nkolo abimisi mitindo na ye na ntina ya minyoko mpe mitungisi oyo etiami na makasi likolo ya bato na Ye; 33–38, Etumba ekoki kozala malamu bobele ntango Nkolo atindi yango; 39–48, Basantu basengeli kolimbisa banguna na bango, baoyo, soki bayamboli, bakobika na bobekoli ya Nkolo.

1 Solo nalobi epayi na bino baninga na ngai, bobanga te, tika ete mitema na bino elendisama; iyo, bosepela ntango nyonso, mpe na likambo nyonso bopesa matondi;

2 Kozelaka Nkolo na bompikiliki, mpo sambo na bino eyingelaki kati na matoyi ya Nkolo ya Saba, mpe ekomami na masolo ya makomi na elembo mpe litatoli oyo—Nkolo alapi ndai mpe asakoli ete ekopesama.

3 Boye, apesi elaka oyo epayi na bino, elongo na liyokani ekobongwana te ete ekokokisama; mpe makambo nyonso oyo bonyokwameli ekosala elongo mpo na bolamu na bino, mpe mpo na nkembo ya nkombo na ngai, elobi Nkolo.

4 Mpe sikawa, solo nalobeli bino mpo na oyo etali mibeko ya mboka, ezali bolingi na ngai ete bato na ngai batosa kosala makambo nyonso natindi bango.

5 Mpe mobeko wana ya mboka oyo ezali mobeko likonzi, oyo ezali kosunga libongisi wana ya bonsomi na kobatelaka makoki mpe lotomo, ezali ya bato nyonso, mpe ezali malamu liboso na ngai.

6 Boye, ngai Nkolo, nalongisi bino, mpe bandeko na bino bandimi ya eklezia na ngai, na kosungaka mobeko wana oyo ezali mobeko likonzi ya mboka;

7 Mpe mpo na oyo etali mobeko ya bato, nyonso oyo ezali mingi koleka to moke koleka oyo, ewuti na mabe.

8 Ngai, Nkolo Nzambe, nakomisi bino bansomi, boye bozali bansomi mpenza; mpe lisusu mobeko mokomisi bino bansomi.

9 Nzokande, ntango moto ya nkuna azali kokonza bato bazalaka na kolela.

10 Yango wana, esengeli baluka na molende bato ya sembo mpe bato ya bwania, mpe bosengeli zambi kotosa kosunga bato malamu mpe bato ya bwania; soki bongo te nyonso oyo ezali mingi koleka to moke koleka oyo ewuti na mabe.

11 Mpe napesi epayi na bino motindo moko, ete bosengeli kotika libela mabe nyonso mpe kokangama makasi na bolamu nyonso, ete bokoka kozala na bomoi engebene na liloba nyonso oyo ebimi uta na monoko ya Nzambe.

12 Mpo akopesa na basembo monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise; mpe nakomeka bino mpe koluka koyeba bino na nzela oyo.

13 Mpe moto nyonso oyo akotika bomoi na ye na ntina na ngai, mpo na ntina ya nkombo na ngai, akozwa yango lisusu, kutu bomoi ya seko.

14 Boye, bobanga banguna na bino te, mpo nasili kokamata mokano na motema na ngai, elobi Nkolo, ete nakomeka bino na makambo nyonso, mpo na koyeba soki bokotikala na liyokani na ngai, kutu kino na liwa, ete bokoka komonana ete bolongobani.

15 Mpo soki bokotikala na liyokani na ngai te bolongobani mpo na ngai te.

16 Boye, botika bitumba mpe bosakola kimia, mpe boluka na molende kobongola mitema ya bana epayi ya batata, mpe mitema ya batata epayi ya bana na bango;

17 Mpe lisusu, mitema ya Bayuda epayi ya baprofeta, mpe baprofeta epayi ya Bayuda; mbele naya mpe nabeta mabele mobimba na bolakeli mabe, mpe mosuni nyonso mozikisama mpenza liboso na ngai.

18 Botika mitema na bino ezala likolo te; mpo na ndako ya Tata na ngai bifandelo ezali mingi, mpe nasili kolengela esika mpo na bino; mpe epayi wapi ezali Tata mpe epayi nazali, kuna nde bokozala lisusu.

19 Tala, ngai Nkolo, nazali te kosepela malamu na mingi oyo bazali na eklezia na Kirtland;

20 Mpo bazali kotika masumu na bango te, mpe banzela na bango ya nkuna, lolendo ya mitema na bango, mpe bilula-lula na bango, mpe makambo na bango nyonso ya koyina, mpe kotosa maloba ya bwania mpe bomoi ya seko boye napesaki epayi na bango.

21 Solo nalobi epayi na bino, ete ngai Nkolo, nakopesa bango etumbu mpe nakosala nyonso oyo nalingi, soki bayamboli mpe batosi te makambo nyonso oyo nalobaki na bango te.

22 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, soki botosi kosala nyonso oyo natindi bino, ngai Nkolo, nakopendola nkele na ngai mpe bosiliki na ngai nyonso uta na bino, mpe bikuke ya lifelo bikolonga bino te.

23 Sikawa, nazali koloba na bino mpo na oyo etali mabota na bino—soki bato babeti bino, to mabota na bino, mbala moko, mpe na motema molai bondimi yango mpe bofingi banguna na bino te, soki mpe boluki bobekoli te, bokopesama lifuta;

24 Kasi soki bondimi yango na bompikiliki te, ekotangamela bino lokola bozongisami ya bobetami oyo ekokani lokola emekoleli bosalaki bato.

25 Mpe lisusu, soki monguna na bino abeti bino mbala ya mibale, mpe bofingi monguna na bino te, mpe bondimi yango na bompikiliki, lifuta na bino ekozala mbala monkama.

26 Mpe lisusu, soki abeti bino mbala ya misato, mpe bondimi yango na bompikiliki, mbano na bino ekoyikana mbala minei;

27 Mpe matatoli misato oyo makotelemela monguna na bino soki ayamboli te, mpe moko te asengeli kobosanama yango.

28 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, soki monguna wana akobika uta na bobekoli na ngai, ete bamema ye na bosambisi liboso na ngai te, bongo bokomona kati na yango ete bosengeli kokebisa ye na nkombo na ngai, ete akweya likolo na bino lisusu soki moke te, likolo ya mabota na bino mpe te, kutu bana ya bana na bino kino nkola ya misato mpe ya minei.

29 Mpe bongo, soki akwei likolo na bino to likolo ya bana na bino, soki mpe bana ya bana na bino kino nkola ya misato mpe ya minei, nakopesa monguna na bino na maboko na bino;

30 Mpe bongo soki bokotika ye, bokopesama lifuta mpo na bosembo na bino; mpe lisusu bana na bino mpe bana ya bana na bino kino na nkola ya misato mpe ya minei.

31 Nzokande, monguna na bino azali na maboko na bino; mpe soki bopesi ye lifuta engebene na misala na ye bolongisami; kasi soki alukaki bomoi na bino, mpe bomoi na bino ezali kati na likama mpo na ye, monguna na bino azali na maboko na bino mpe bolongisami.

32 Tala, oyo ezali mobeko napesaki epayi ya mosali na ngai Nefi, mpe epayi ya batata na bino Yosefe, mpe Yakobo, mpe Yisaka, mpe Abalayama, mpe baprofeta mpe bapostolo na ngai nyonso ya kala.

33 Mpe lisusu, oyo ezali mobeko napesaki epayi ya bato na ngai ya kala, ete bakoki te kokende na etumba na ekolo, libota, monoko, to na bato songolo te, longola se ngai, Nkolo, natindi bango.

34 Mpe soki ekolo, monoko, to bato songolo basakoli etumba na bango, basengeli yambo kotombola bendele ya kimia epayi ya bato wana, ekolo wana, soki te monoko wana;

35 Mpe soki bato wana bandimaki te kimia bopesi bango, ezala mbala ya mibale soki mpe mbala ya misato mpe te, bosengeli komema matatoli oyo liboso ya Nkolo;

36 Bongo ngai, Nkolo, nakopesa epayi na bango motindo, mpe kolongisa bango na kokendaka kobunda etumba na ekolo wana, monoko wana, soki te bato wana.

37 Mpe ngai, Nkolo, nakobunda etumba na bango, mpe etumba ya bana na bango, mpe ya bana ya bana na bango, kino bakobekolama bango moko likolo ya banguna na bango, na nkola ya misato mpe ya minei.

38 Tala, oyo ezali momekoli mpo na bato nyonso, elobi Nkolo Nzambe na bino, mpo ete bolongisama liboso na ngai.

39 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, soki esilaki monguna na bino kokweya likolo na bino mbala ya yambo, ayamboli mpe ayei epayi na bino kobondelaka mpo na bolimbisi na bino, bosengeli kolimbisa ye, mpe bosengeli kokamata yango lokola litatoli mpo azali monguna na bino lisusu te.

40 Mpe se bongo mpo na mbala ya mibale mpe ya misato; mpe mbala mingi lokola monguna na bino akoyambola uta na mabe oyo asalaki bino, bosengeli kolimbisa ye, kino mbala ntuku sambo na nsambo.

41 Mpe soki asali bino mabe mpe ayamboli te mbala ya liboso, bosengeli nzokande kolimbisa ye.

42 Mpe soki asali bino mabe mbala ya mibale, mpe ayamboli te, bosengeli nzokande kolimbisa ye.

43 Mpe soki asali bino lisusu mabe mbala ya misato, mpe ayamboli te, bosengeli lisusu kolimbisa ye.

44 Kasi soki asali bino mabe mbala ya minei bosengeli kolimbisa ye te, kasi bosengeli komema matatoli oyo liboso ya Nkolo; mpe esengeli te kobosanama kino ayamboli mpe afuti bino mbala minei mpo na oyo etali makambo nyonso oyo asalaki bino mabe.

45 Mpe soki asali eye, bosengeli kolimbisa ye na motema na bino nyonso; mpe soki asali oyo te, ngai Nkolo, nakobekola bino na monguna na bino mbala monkama moko;

46 Mpe likolo ya bana na ye, mpe likolo ya bana ya bana ya nyonso oyo bayinaka ngai, kino na nkola ya misato mpe ya minei.

47 Kasi soki bana bakoyambola, soki mpe bana ya bana, mpe babaluki epayi ya Nkolo Nzambe na bango, na mitema, bokasi, mayele, mpe makasi na bango nyonso mobimba, mpe bazongisi mbala minei mabe na bango nyonso oyo basalaki bino, to oyo batata na bango basalaki, soki te batata ya batata na bango, bongo bosiliki na bino esengeli kosuka;

48 Mpe bobekoli ekoya lisusu likolo na bango te, elobi Nkolo Nzambe na bino, mpe mabe na bango makomema lisusu soki moke te lokola litatoli liboso ya Nkolo mpo na kofunda bango. Amene.

Bimisa na lokasa