Makomi
Abalayama 1


Buku ya Abalayama

Ebongolami uta na Nkasa ya Papilusi, na Joseph Smith

Bobongoli ya Masolo ya makomi moko ya kala oyo ekweyaki na maboko na biso uta na nkunda moko ya Ejipito. Makomi ya Abalayama ntango azalaki na Ejipito, ebiangami Buku ya Abalayama, ekomami na maboko na ye moko, likolo ya nkasa ya papilusi.

Mokapo 1

Abalayama aluki kozwa mapamboli ya molongo ya bonkoko—Anyokwami na banganganzambe ya lokuta na Kaladi—Yehova abikisi ye—Batali malamu mpe balimboli na bokuse ebandeli mpe mbulamatari ya Ejipito.

1 Na mboka ya Bakaladi, na efandeli ya batata na ngai, ngai, Abalayama, namonaki ete esengelaki mpo na ngai ete nazwa esika mosusu ya kofanda;

2 Mpe, na komona ete ezalaki na esengo monene mpe kimia mpe bopemi mpo na ngai, nalukaki mapamboli ya batata, mpe makoki na oyo wapi nasengelaki kokulisama mpo na koyangela yango; na lolenge nazalaki ngai moko molandi ya bosembo, na mposa ya kozala moko oyo azalaki na boyebi monene, mpe ya kozala molandi monene ya bosembo, mpe ya kozala na boyebi monene koleka, mpe ya kozala tata ya bikolo mingi, mwana ya mokonzi ya kimia, mpe na mposa ya kozwa malakisi, mpe ya kobomba mibeko mitindo ya Nzambe, nakomaki mosangoli libula engebene na mibeko, Nganganzambe Monene, oyo azali na makoki oyo ezalaki ya batata.

3 Makoki yango epesamaki likolo na ngai uta na batata; ekitisamaki uta na batata, uta ebandeli ya ntango, iyo, kutu uta ebandeli, to liboso ya ebandeli ya mabele, kokitaka kino na ntango oyo ya lelo, kutu makoki ya mobotami ya yambo, to ya moto ya yambo, oyo azali Adama, to mpe tata ya yambo, na nzela ya batata kino epayi na ngai.

4 Nalukaki mosala na ngai na Bonganganzambe engebene na mokano ya Nzambe epayi ya batata mpo na oyo etali nkona.

5 Batata na ngai, nsima ya kobaluka uta na bosembo, mpe uta na mitindo esantu oyo Nkolo Nzambe na bango apesaki epayi na bango, na kogumbamelaka banzambe ya bapaganu, baboyaki mpenza koyoka mongongo na ngai;

6 Mpo mitema na bango ebendanaki na kosala mabe, mpe mibalukaki mobimba na nzambe ya Elekena, mpe na nzambe ya Libina, mpe na nzambe ya Mamakira, mpe na nzambe ya Kolasi, mpe na nzambe ya Falo, mokonzi ya Ejipito;

7 Yango wana babalolaki mitema na bango na mbeka ya bapaganu na kotumbaka bana na bango epayi na bikeko ya baba, mpe bayokelaki mongongo na ngai te, kasi basalaki makasi mpo na kokamata bomoi na ngai na nzela ya loboko ya nganganzambe ya Elekena. Nganganzambe ya Elekena azalaki lisusu nganganzambe ya Falo.

8 Sikawa, na ntango oyo ezalaki momeseno ya nganganzambe ya Falo, mokonzi ya Ejipito, kobonza likolo ya etumbelo oyo etongamaki na mboka ya Kaladi, mpo na kopesaka epayi ya banzambe baye ya bapaya, mibali, basi, mpe bana.

9 Mpe esalemaki ete nganganzambe apesaki libonza moko epayi ya Nzambe ya Falo, mpe lisusu epayi ya Nzambe ya Sagili, kutu na lolenge ya Baejipito. Sikawa nzambe ya Sagili azalaki moi.

10 Kutu nganganzambe ya Falo abonzaki likabo moko ya bozongisi matondi ya mwana likolo ya etumbelo oyo ezwami na ngomba ebiangami Ngomba ya Potifala, na moto ya esobe ya Olisemi.

11 Sikawa, nganganzambe oyo abonzaki likolo ya etumbelo oyo baseka basato na mbala moko, oyo bazalaki bana basi ya Onita, moko ya bana ya mokonzi uta na nketo ya Hama. Baseka baoyo babonzamaki mpo na bolamu na bango; balingaki te kongumba mitu mpo na kokumbamela banzambe ya nzete to ya mabanga, boye babomaki bango likolo ya etumbelo oyo, mpe esalemaki na lolenge ya Baejipito.

12 Mpe esalemaki ete banganganzambe bakangaki ngai na makasi, ete bakoka koboma ngai lisusu, lokola basalaki baseka oyo likolo ya etumbelo; mpe mpo ete okoka kozala na boyebi ya etumbelo oyo, nakotinda yo otanga elilingi na ebandeli ya lisolo ya makomi oyo.

13 Esalemaki na lolenge ya mbeto ya kolalela, lokola ezwamaki na kati ya Bakaladi, mpe etiamaki liboso ya banzambe ya Elekena, Libena, Mamakira, Kolasi, mpe lisusu nzambe moko lokola oyo ya Falo, mokonzi ya Ejipito.

14 Mpo ete okoka kozwa bososoli ya banzambe oyo, napesi yo elilingi na bango kati na liyemi na ebandeli ya lisolo ya makomi, lolenge ya mayemi ebiangami Ralinosi na Bakaladi, oyo elingi koloba yeloglifi.

15 Mpe lokola batombolaki maboko na bango likolo na ngai, ete bakoka kobonza ngai mpe kolongola bomoi na ngai, tala, natombolaki mongongo na ngai epayi ya Nkolo Nzambe na ngai, mpe Nkolo atiaki bokebi mpe ayokaki, mpe atondisaki ngai na limoni ya Oyo ya Bokasi bonso, mpe anjelu ya liboso na ye atelemaki penepene na ngai, mpe noki akangolaki maboko na ngai;

16 Mpe mongongo na ye elobelaki ngai: Abalayama, Abalayama, tala, nkombo na ngai ezali Yehova, mpe nayoki yo, mpe nakiti na nse mpo na kokangola yo, mpe kokimisa yo uta na ndako ya tata na yo, mpe uta na bato ya libota na yo, mpo na kokende na mboka ya mopaya oyo oyebi te;

17 Mpe oyo mpo basili kobalusa mitema na bango uta na ngai, mpo na kokumbamela nzambe ya Elekena, mpe nzambe ya Libina, mpe nzambe ya Mamakira, mpe nzambe ya Kolasi, mpe nzambe ya Falo, mokonzi ya Ejipito; boye nasili kokita mpo na kotala bango, mpe kobebisa ye oyo atombolaki loboko na ye na yo, Abalayama, mwana mobali na ngai, mpo ete alongola bomoi na yo.

18 Tala, nakokamba yo na loboko na ngai, mpe nakokamata yo, mpo na kotia nkombo na ngai likolo na yo, kutu Bonganganzambe ya tata na yo, mpe nguya na ngai ekozala likolo na yo.

19 Lokola ezalaki na Noa bongo nde ekozala na yo; kasi na nzela ya mosala na yo nkombo na ngai ekoyebana na mabele libela, mpo nazali Nzambe na yo.

20 Tala, Ngomba ya Potifala ezalaki na mboka ya Ulu, ya Bakaladi. Mpe Nkolo abukaki etumbelo ya Elekena, mpe ya banzambe ya mboka, mpe abebisaki bango nie, mpe abetaki nganganzambe ete akufaki; mpe mawa monene ezalaki na Kaladi, mpe lisusu na ndako ya Falo; oyo nkombo Falo elingi koloba mokonzi na nzela ya makila ya mokonzi.

21 Sikawa mokonzi oyo ya Ejipito azalaki eboto uta na nketo ya Hama, mpe azalaki moto ya makila ya Bakanana uta na mbotama.

22 Uta na eboto oyo Baejipito nyonso bapalanganaki, mpe boye makila ya Bakanana ebatelamaki kati na mboka.

23 Mboka ya Ejipito ebombolamaki yambo na mwasi, oyo azalaki mwana mwasi ya Hama, mpe mwana mwasi ya Ejipitus, oyo na lokota ya Bakaladi elingi koloba Ejipito, oyo elingi koloba oyo wana epekisami;

24 Ntango mwasi oyo abombolaki mboka oyo, yango ezalaki na nse ya mai, oyo mwasi nsima atiaki bana mibali na ye kati na yango; mpe boye, uta na Hama, ekolo wana bapanzamaki ete ebatelaki bolakeli mabe kati na mboka.

25 Sikawa mbulamatari ya yambo ya Ejipito etiamaki na Falo, mwana mobali ya mpaka ya Ejipitus, mwana mwasi ya Hama, mpe ezalaki na lolenge ya mbulamatari ya Hama, oyo ekitanisamaki uta na tata kolanda na mwana mobali.

26 Falo, lokola azalaki moto ya sembo, atiaki bokonzi na ye mpe asambisaki bato na ye na bwania mpe na alima mikolo na ye nyonso, kolukaka na bokebi bonso kolanda molongo etiamaki na batata na ntango ya bankola ya yambo, na mikolo ya boyangeli ya yambo ya bonkoko, kutu na boyangeli ya Adama, mpe lisusu ya Noa, tata na ye, oyo apambolaki ye na mapamboli ya mabele, mpe na mapamboli ya bwania, kasi alakelaki ye mabe mpo na oyo etali Bonganganzambe.

27 Sikawa, Falo lokola azalaki na eboto wana wapi akokaki te kozwa makoki ya Bonganganzambe, ata kutu soki Bafalo balingaki na esengo kosenga ekoki yango uta Noa, na nzela ya Hama, boye tata na ngai akambamaki mosika na kosambela banzambe na bango ya bikeko;

28 Kasi nakosala makasi, nsima awa, ya kobenda monkoloto ya bolandani ya makambo kozongaka nsima uta na ngai moko kino na ebandeli ya bokeli, mpo masolo ya makomi makwei na maboko na ngai, oyo nazali kosimba kino na ntango oyo.

29 Sikawa, esilaki nganganzambe ya Elekena kobetama na lolenge ete akufaki, bokokisami ya makambo oyo elobamaki epayi na ngai mpo na oyo etali mboka ya Kaladi, ete nzala ekozala na mboka eyaki kokokisama.

30 Na engebene nzala moko eyingelaki na mboka nyonso ya Kaladi, mpe tata na ngai anyokwamaki makasi na nzala, mpe ayambolaki uta na mabe akanelaki ngai, ya kolongola bomoi na ngai.

31 Kasi masolo ya makomi ya batata, kutu bankoko, mpo na oyo etali makoki ya Bonganganzambe, Nkolo Nzambe na ngai abatelaki na maboko na ngai moko; boye boyebi ya ebandeli ya bokeli, mpe lisusu ya minzoto minene, mpe ya minzoto, lokola eyebisamaki epayi ya batata, soki nabombaki kino na mokolo oyo, mpe nakosala makasi ya kokoma boko makambo oyo likolo ya lisolo ya makomi oyo, mpo na litomba ya bana na ngai oyo bakoya nsima na ngai.

Bimisa na lokasa