Makomi
Mose 1


Maponi uta na
Buku ya Mose

Oyo elandi ezali litangi uta na bobongoli ya Biblia lokola ebimisami na Profeta Joseph Smith, sanza ya motoba ya mobu 1830–sanza ya mibale ya mobu 1831.

Mokapo 1

(Sanza ya motoba 1830)

Nzambe Amimonisi Ye moko epayi ya Mose—Mose abongolami—Atelemelami na Satana—Mose amoni mikili mingi oyo ezali na bafandi—Mikili oyo ekoki kotangama te mpe oyo ekelamaki na Mwana—Mosala mpe nkembo ya Nzambe ezali nde kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.

1 Maloba ya Nzambe, oyo alobaki epayi ya Mose na ntango yoko wapi Mose amemamaki likolo ya ngomba moko ya molai mingi koleka,

2 Mpe amonaki Nzambe miso na miso, mpe asololaki na ye, mpe nkembo ya Nzambe ezalaki likolo ya Mose; boye Mose akokaki kokanga motema ya komonana na miso na ye.

3 Mpe Nzambe alobaki epayi ya Mose, kolobaka: Tala, nazali Nkolo Nzambe ya Bokasi bonso, mpe Azanga nsuka ezali nkombo na ngai; mpo nazali na ebandeli ya mikolo te to nsuka ya mibu te; mpe ezali oyo kozanga nsuka te?

4 Mpe, tala, ozali mwana mobali na ngai; yango wana tala, mpe nakolakisa yo mosala kitoko mosalemi na maboko na ngai; kasi nyonso te, mpo misala na ngai ezali na nsuka te, mpe lisusu maloba na ngai, mpo masukaka soki moke te.

5 Yango wana, moto moko te akoki kotala misala na ngai nyonso, longola se soki atali nkembo na ngai nyonso; mpe moto moko te akoki kotala nkembo na ngai nyonso, mpe na nsima atikala na mosuni likolo ya mabele.

6 Mpe nazali na mosala moko mpo na yo, Mose, mwana mobali na ngai; mpe ozali na bokokani ya Mobotami se Moko na ngai; mpe Mobotami se Moko na ngai azali mpe akozala Mobikisi, mpo atonda na ngolu mpe bosolo; kasi Nzambe mosusu azali te longola se ngai, mpe biloko nyonso ezali awa na ngai, mpo nayebi yango nyonso.

7 Mpe sikawa, tala, eloko oyo moko nazali kolakisa epayi na yo, Mose, mwana mobali na ngai, mpo ozali kati na mokili, mpe sikawa nazali kolakisa yango epayi na yo.

8 Mpe esalemaki ete Mose atalaki, mpe amonaki mokili likolo ya oyo wapi akelamaki; mpe Mose amonaki mokili mpe nsuka na yango, mpe bana nyonso ya bato oyo bakelami, mpe baoyo bakelamaki; mpe se na yango asepelaki mpe akamwaki mingi mpenza.

9 Mpe Nzambe amibendaki uta na miso ya Mose, na lolenge ete nkembo na ye ezalaki lisusu likolo ya Mose te; mpe Mose atikalaki se ye moko. Mpe lokola atikalaki se ye moko, akweyaki na mabele.

10 Mpe esalemaki ete elekaki ntaka ya bangonga mingi liboso ete Mose azwa lisusu bokasi na ye ya momeseno lokola ya moto nyonso; mpe alobaki na ye moko: Sikawa, mpo na ntina oyo nayebi ete moto azali mpamba, oyo ezali eloko nakanisaki soki moke te.

11 Kasi sikawa miso na ngai moko masili komona Nzambe; kasi ma bomoto te, kasi miso na ngai ya molimo, mpo miso na ngai ya bomoto makokaki kotala te; mpo mbele nakawukaki mpe nakufaki na miso na ye; kasi nkembo na ye ezalaki likolo na ngai; mpe namonaki elongi na ye, mpo nabongwanaki liboso na ye.

12 Mpe esalemaki ete ntango Mose asilaki koloba maloba oyo, tala, Satana ayaki kosenginia ye, kolobaka: Mose, mwana mobali ya moto, kumbamela ngai.

13 Mpe esalemaki ete Mose atalaki Satana mpe alobaki: Ozali nani? Mpo tala, nazali mwana mobali ya Nzambe, na bokokani ya Mobotami se Moko ya ye; mpe wapi nkembo na yo, ete nasengeli kokumbamela yo?

14 Mpo tala, nakokaki te kotala Nzambe, longola se ntango nkembo na ye eyaki likolo na ngai, mpe nabongwamaki liboso na ye. Kasi nakoki kotala yo na lolenge ya moto ya mokili. Ezali bongo te, solo mpenza?

15 Nkombo ya Nzambe na ngai epambolama, mpo Molimo na ye molongolami uta na ngai na mobimba te, to soki bongo te wapi nkembo na yo, mpo epayi na ngai ezali molili? Mpe nakoki kososola kati na yo mpe Nzambe; mpo Nzambe alobaki epayi na ngai: Kumbamela Nzambe, mpo bobele ye nde osengeli kosalela.

16 Longwa awa, Satana; kokosa ngai te; mpo Nzambe alobaki epayi na ngai: Ozali na bokokani ya Mobotami se Moko na ngai.

17 Mpe apesaki ngai lisusu mitindo ntango abimelaki ngai na esobe kopelaka moto, kolobaka: Belela Nzambe na nkombo ya Mobotami se Moko na ngai, mpe kumbamela ngai.

18 Mpe lisusu Mose alobaki: Nakotika kobelela Nzambe te, nazali na makambo mosusu ya kotuna ye: mpo nkembo na ye ezalaki likolo na ngai, yango wana nakoki kososola kati na ye mpe yo. Longwa, Satana.

19 Mpe sikawa, ntango Mose asilaki koloba maloba oyo, Satana agangaki na mongongo makasi, mpe akilelaki likolo ya mabele, mpe apesaki motindo, kolobaka: Nazali Mobotami se Moko, kumbamela ngai.

20 Mpe esalemaki ete Mose abandaki kobanga mingi koleka; mpe lokola abandaki kobanga, amonaki mpasi ya lifelo. Nzokande, na kobelelaka Nzambe, azwaki bokasi, mpe apesaki motindo, kolobaka: Longwa penepene na ngai, Satana, mpo nakokumbamela bobele Nzambe ye moko, oyo azali Nzambe ya nkembo.

21 Mpe sikawa Satana abandaki kolenga, mpe mabele maninganaki; mpe Mose azwaki bokasi, mpe abelelaki Nzambe, kolobaka: Na nkombo ya Mobotami se Moko, longwa awa, Satana.

22 Mpe esalemaki ete Satana agangaki na mongongo makasi, na boleli, mpe biyelela, mpe boliani ya mino; mpe alongwaki wana, kutu na miso ya Mose, ete amonaki ye te.

23 Mpe sikawa Mose apesaki litatoli ya likambo oyo; kasi mpo na ntina ya nkuna epesamaki te na kati ya bana ya bato.

24 Mpe esalemaki ete ntango Satana alongwaki na miso ya Mose, ete Mose atombolaki miso na ye epayi na lola, wana etondaki ye na Molimo Mosantu, oyo epesaka litatoli ya Tata mpe ya Mwana;

25 Mpe kobelelaka na nkombo ya Nzambe, atalaki lisusu nkembo na ye, mpo ezalaki likolo na ye; mpe ayokaki mongongo moko, kolobaka: Opambolami, Mose, mpo ngai, ya Bokasi bonso, nasili kopona yo, mpe okoyeisama makasi koleka bamai mingi; mpo bakotosa motindo na yo lokola soki ozalaki Nzambe.

26 Mpe mona, nazali elongo na yo, kutu kino na nsuka ya mikolo na yo; mpo okokangola bato na ngai uta na boumbu, kutu Yisalaele moponami na ngai.

27 Mpe esalemaki, lokola mongongo yango ezalaki se koloba, Mose abwakaki miso na ye mpe atalaki mabele, iyo, kutu nyonso na yango; mpe ezalaki te na putulu moke na yango oyo atalaki te, kososolaka yango na nzela ya Molimo ya Nzambe.

28 Mpe amonaki lisusu bafandi na yango, mpe ezalaki na molimo moko oyo atalaki te; mpe asosolaki bango na nzela ya Molimo ya Nzambe; mpe motango na bango ezalaki monene, kutu ya kotanga te lokola zelo likolo ya libongo ya mbu.

29 Mpe amonaki bamboka mingi; mpe mboka moko moko ebiangamaki mabele, mpe ezalaki na bafandi likolo na yango.

30 Mpe esalemaki ete Mose abelelaki Nzambe, kolobaka: Yebisa ngai, nabondeli yo, mpo na nini biloko oyo ezali bongo, mpe osalaki yango na nini?

31 Mpe tala, nkembo ya Nkolo ezalaki likolo ya Mose, ete Mose atelemaki liboso ya Nzambe, mpe asololaki na ye miso na miso. Mpe Nkolo Nzambe alobaki na Mose: Nasalaki biloko oyo mpo na ntina ya ngai moko. Awa ezali bwania mpe etikali se na ngai.

32 Mpe na nzela ya liloba ya nguya na ngai, nde nakelaki yango, oyo azali Mwana Mobotami se Moko na ngai, oyo atonda na ngolu mpe bosolo.

33 Mpe nakelaki mikili oyo ya kotanga te; mpe nakelaki yango lisusu mpo na ntina ya ngai moko; mpe na nzela ya Mwana, oyo azali Mobotami se Moko na ngai, nde nakelaki yango.

34 Mpe moto ya yambo kati na bato nyonso nabiangaki ye Adama, oyo elimboli mingi.

35 Kasi bobele lisolo ya mabele oyo, mpe bafandi na yango, nde nazali kopesa epayi na yo. Mpo tala, ezali na mikili mingi oyo elekaki na liloba ya nguya na ngai. Mpe ezali na mingi oyo ewumeli, mpe ezali na motango te na mayele ya moto; kasi biloko nyonso etangami epayi na ngai, mpo ezali ya ngai mpe nayebi yango.

36 Mpe esalemaki ete Mose alobaki na Nkolo, kolobaka: Zala na boboto mpo na mosali na yo, O Nzambe, mpe yebisa ngai oyo etali mabele oyo, mpe bafandi na yango, mpe lisusu lola, mpe nsima mosali na yo akozala na esengo.

37 Mpe Nkolo Nzambe alobaki epayi ya Mose, kolobaka: Lola, ezali mingi, mpe ekoki te kotangama na mayele ya moto, kasi etangami na mayele na ngai, mpo ezali na ngai.

38 Mpe lokola mabele moko makoleka, mpe lola na yango na lolenge se moko ekoya mosusu; mpe nsuka ezali te na misala na ngai, na maloba na ngai mpe te.

39 Mpo tala, oyo ezali mosala na ngai mpe nkembo na ngai—kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.

40 Mpe sikawa, Mose, mwana mobali na ngai, nakoloba na yo mpo na oyo etali mabele likolo ya oyo wapi otelemi; mpe okokoma makambo oyo nakoloba.

41 Mpe na mokolo moko ntango bana ya bato bakomona maloba na ngai mpamba mpe kolongola mingi kati na yango uta na buku oyo osengeli kokoma, tala, nakobimisa mosusu lokola yo; mpe makozwama lisusu na kati ya bana ya bato—na kati ya mingi lokola bakondima.

42 (Maloba oyo elobamaki epayi ya Mose likolo ya ngomba, oyo wapi nkombo ekoyebana na kati ya bana ya bato te. Mpe sikawa malobami epayi na yo. Kolakisa yango na moto nyonso te longola se na bango oyo bandimi. Kutu bongo. Amene.)

Bimisa na lokasa