2010–2019
Tala Liboso mpe Ndima
Sánzá ya Zómi 2013


Tala Liboso mpe Ndima

Na bomoni ya Nkolo, likambo ya motuya ezali mingi te oyo tosalaka to esika tozalaka kasi mingi mpenza esika tolingi kokende.

Ntango nazalaka muana moke na kosalaka bilanga na mama na ngai, atangisaki ngai liteya moko ya motuya koleka na bomoi nangai. Ezalaki ngonga epusani na ntongo, moyi ezalaki likolo, mpe totimolaki mabele mpona yango nakanisaki kozala na ngonga molayi mpenza. Natikaki kotala na sima oyo nyoso tokokisaki mpe nalobaki na mama na ngai, “Tala nyonso oyo tosali!” Mama eyanolaki te. Kokanisa ete ayokaki ngai te, nabandelaki oyo nalobaki na mongongo ya mua makasi. Azongisaki kaka te. Natombolaki mongongo mua moke likolo, nabandelaki lisusu. Na suka, abalukaki epai na ngai mpe alobaki, “Edward, kotala na sima te. Tala liboso na oyo tosengeli lisusu kosala.”

Bandeko na ngai mibali mpe basi, liyokani tosalaki elongo na Nkolo ntango babatisaki biso, “kotelema lokola ba batatoli ya Nzambe na ntango nionso mpe na makambo nionso, mpe na bisika nyonso [biso]tokoki kozala na kati” (Moziya 18:9), lokola bomoyi molayi ya komipesa. Mokambi Dieter F. Uchtdorf apesaki toli: “Ba oyo nyonso bakotaki na mayi ya libatisi mpe bayambaki likabo ya Molimo Monsantu batiaki makolo na bango na nzela moke ya bayekoli mpe bamemaki mokumba ya kolanda na ntango nyonso mpe mobimba bilembo ya mobikisi na biso” (Basantu mpona bileko nyonso,” Liteya to Liahona, sanza ya libwa. 2013, 5). Nkolo na nzela ya basali na ye abengi biso kosala na mabiangi ebele, oyo tondimi elongo na bopesi na biso mobimba. Ntango tosali na botosi mpe libiangi na mitindo mosusu elobamaka, tondimaka yango na esengo, koyebaka lokola bakoko bayebaki, ete “na mosala na Nkolo, ezali te esika nini ozali kosala kasi ndenge nini” (J. Reuben Clark Jr., na rapport ya likita, Sanza ya minei. 1951, 154).

Bongo ntango mokambi ya likonzi to episikopo alongolami, andimaka na esengo bolongoli na ye, mpe ntango kobiangama na ye ebandaki na kosala na mitindo moko te Nkolo, na nzela ya basali na Ye, “amoni yango malamu,” (Moziya 3:19), amilimuisaki te na mayele na ye ya liboso atalaki na sima te mpe akanisi ete asalaki mingi te. Azali “bolemba te na kosala malamu” mpo ete ayebi ete azali « kotia maboko na mosala monene » elongo na bomoni ya mpole oyo lokola bokasi epamboli bomoyi mpona libela. Na bongo makambo minene ewutaka na ya mike ( D&A 64:33).

Tosengeli banso “komipesa na bobangi na ntina elamu, mpe kosala biloko mingi na bolingi [nabiso] lokola motema elingi, mpe komema bosembo ebele” (D&A 58:27).

Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale ateyaki: “Oyo eleka ezali ya kotangisama uta kasi kobika na kati te. Tozali kotala na sima makala epeli motane ya boyebi, kasi putulu te. Mpe ntango totangaka oyo tozali na bosenga ya kotanga mpe tomemaka elongo na biso ya malamu koleka oyo toyebaka, na bongo totali liboso mpe tokanisi etebondimi ezali ntango inso etalisi mambi makoya sima” (“The Best Is Yet to Be,” Ensign, Sanza ya yambo 2010, 24; to Liahona, Sanza ya yambo 2010, 18).

Uta liteya ya mama ngai ya kotalaka liboso ekendaki mbala moko na matiti mabe oyo ezalaki na elenga, etumba ezalaki moke kotala oyo ba santu ya liboso babikaki. Mpaka Joseph  B Wirthlin alimbolaki likambo wana malamu koleka: “Na 1846, mingi lokola 10,000[bato] batikaki mboka na bango efuluka [ya Nauvoo] batongaka na mabele pembeni ya Ebale ya Mississipi. Elongo na bondimi na batambuisi na bango basakoli, bandimi oyo ya liboso ya Eklezia batikaki ya bango ‘Mboka kitoko’ mpe babandaki etumba na zamba na ndelo ya America. Bayebaki te mpenza mpenza epai wapi bazali kokende, ata moke kilometele boni bakosala liboso, molayi boni mobembo na bango ekozua, to nini lobi esimbaki na bilei mpona bango. Kasi bango bayebaki bakotambuisama na Nkolo mpe basali na Ye”(“Bondimi na Batata na Biso,” Ensign, Sanza ya mitano 1996, 33).

Bayebaki ndenge nini esengelaki kotala liboso mpe kondima. Bazomi na ndambu ya mibu liboso, ebele ya bandimi oyo bazalaki wana ntango bobimisi eyambamaki:

“Na makasi nalobi na bino, apambolama oyo akobatela mibeko na ngai, soki na bomoyi to na nkufa; mpe oyo azali ayiki mpiko na ntango ya minioko, libonza ndenge moko ekozala monene na bokonzi ya likolo.

“Bosengeli te komona na miso na bino ya bomoto, mpona ngonga oyo, libongisi ya Nzambe na bino etali bikolo nyonso esengeli koya awa na sima, mpe nkembo esengeli kolanda minioko mingi” (D&A 58:2–3).

Biso mpe tokoki kotala liboso mpe kondima. Tokoki mpe koyamba bobiangi ya Nkolo na biso, oyo maboko na ye yakofunguama mpe kotanda abiangi biso:

“Boya epai na ngai, banso bozali na mpasi mpe bokumbami na mikumba, mpe nakopesa bino kimia

“Bomema nkanga na ngai likolo na bino, mpe bolanda ngai, mpo été nazali na boboto mpe komikitisa na motema: mpe bosengeli kozua kimia na milimo na bino.

Mpona nkanga na ngai ezali mpete, mpe mokumba na nga ezali pepele” (Matai 11:28–30).

Molingami na biso Profeta, Mokambi Thomas S. Monson, bapesi toli naye, mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo batindaki bobiangi mpona biso nionso kosangana na mosala ya bokangoli. Bandimi ya sika, bilenge, bilenge bakoli, banso baoyo batiki misala na bango, mpe ba misionele ya ntango nyonso basengeli kozala ndenge moko na nkanga ya bosali na lombango mosala ya kobikisa.

Mokambi Boyd K. Parcker, Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, ozalaki mbala moko na momekano ya kokamola ngombe, epai wapi abendaki makanisi. Alobaki na ntina ya boyebi ya mosala ete: “motuka ya mabaya etondi na mabanga ya sima: milio zomi ya bakilo [4,535 kg]—toni mitano. … ntina ezalaki ete bangombe balongola motuka ya monene [91 cm]. … Namonaki banyama mibale ya minene, makasi, moyindo mpe bule … [ba] ngombe minene ya bule ya bileko bileki.”

Kolobaka mpo na ntina ya mbano ya momekano yango, alobaki: “liboke elongolamaki moko na moko. … Ngombe monene ya bule etiamaki kutu te! Mua liboke moke ya banyama, ekotaki te mpona bonene na yango, balongolaki motuka mbala misato.”

Ndimbola epesamaki na bokamui oyo ekomaki: “Ya minene ya bule bazalaki milai mpe makasi mpe longobana na bolai koleka maboke mosusu. Kasi bangombe ya mike bazalaki liboke kitoko ya mosala mpe na etamboli. Babetaki nkanga elongo. Banyama bibale babendaki liboso na ngonga mpe makasi moko kolongola mokumba” (“Equally Yoked Together,” lisukulu epesamaki na ntango ya seminele ya balakisi ya bituka, sanza ya minei 3, 1975; in Teaching Seminary: Preservice Readings [2004], 30).

Soki totali liboso mpe tondimi, tozali na bosenga ya mosala elongo moko na bokendisi na mbango mosala ya bosikoli lokola tobengi basusu koya na Klisto. Na motindo na biso moko, tosengeli kolanda toli ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf ete “totelema elongo mpe totombwama esika totelemi” (“Lift Where You Stand,”Ensign to Liahona, sansa ya libwa 2008, 56). Tokoki kosalela lolenge na biso nionso, ndenge emonamaki na Mpaka L. Tom Perry ya Lisanga Likoki ya ba Ntuku mibale: “lokola na kendaki mobembo epai nyonso na kati ya Eklezia, nasepelaki na biloko nyonso ya malamu oyo ezali kosalama, ata bongo nazali koyoka ata moke ete biso lokola, tozali kobika likolo ya bozui na biso ya solo. Mposa na ngai ezali te ete tosala ntango nyonso elongo, ete tozali nanu komipesa makasi na ba mposa ya lokumu mpe elonga na biso moko mpenza, mpe kolakisa mpenza moke na ntina litomba moko ya kotonga bokonzi na Nzambe’’ (“United in Building the Kingdom of God,” Ensign, Sanza ya mitano 1987, 35).

Tika tosangana na ntina se moko “ya kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Mose 1:39).

Nkolo na Biso, Yesu Klisto oyo amoni ebandeli ti na suka, ayebaki nzela malamu mingi Ye akokaki kotambola na Getesemane mpe Gologotha ntango asakolaki, “Moko te akoki kotia maboko naye na likalo, mpe atala na sima, ezali mpona bokonzi na Nzambe”(Luka 9:62). Na bomoni ya Nkolo, ezali mingi oyo tosili kosala to epai wapi tozalaka kasi mingi esika tobongisi kokende.

Mibeko na biso ya botamboli etangisamaki biso na Profeta Joseph Smith: “Mibeko minene ya lingomba na biso ezali litatoli ya Bapostolo mpe ba Profeta, na maye etali Yesu Klisto, oyo Ye akufaki, akundamaki, mpe asekuaki mokolo ya misato, mpe amataki na lola, mpe nyoso oyo etali eyamba na biso ezali kaka ndambo na yango ya mike. (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith[2007], 49).

Natatoli ete lokola tozali kolanda ndakisa ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe totomboli maboko na biso na esika elongo na mosala ya kosunga Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Thomas S. Monson, tokokuta kimia, lisungi, mpe esengo, mpe biso “tokolia bolamu ya mabele… na mikolo oyo ya suka”(D&A 64:34). Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.