Fungola mpo na Bobateli ya Molimo
Kimia ekoki kotiama na motema ya oyo nionso abaluki na makomi mpe akangoli bilaka ya bobateli mpe bosikoli.
Ntango moke eleki, nakangisaki bilenge babalani na tempelo. Babalani babatelaki bangomei bolongobani mpo na kokoma na mokolo wana ya malamu ntango mwana mobali moko mpe mwana mwasi moko balongwi ndako na bango ya bolenge mpe bakomi mwasi mpe mobali. Na libaku wana ya bule, bazalaki peto mpe ya kosukolama. Na ntango elongobani, bakoki kobanda kokolisa bana na bangomei, engebene na ndakisa ya kovanda na Tata na Lola. Esengo na bango, mpe esengo ya bankola ikoya, eyekami likolo ya botosi ya oyo etiami na Mosikoli mpe kovanda na makomi na ye minei.
Baboti malamu lelo soki ezali na esika ya bokebi mpo na bokolisi bana. Tala ezaliesika ya bokengi. Ezali na nsango malamu- na kati ya ndako. Totala libota kati na Eklezia, mpe topesi toli na baboti bipai binso kokolisa bana na bango na bosolo.
Apostolo Polo asakolaki mpe akebisaki ete “na mikolo ya nsima ntango ya mpasi ekoya.
“Mpo bato bakolinga komisalela bongomei, bilulalula, kotuta ntolo, lolendo, bakotuka, bakozanga botosi na baboti, bakozanga botondi, bakozanga bosantu,
“Na kozanga bolingo ya bomoto, bakobuka mibeko, kofunda ya lokuta, bakowana, kanza, bakoboya oyo wan ezali malamu,
“Bakoteka baninga, bakosilika noki, bakoltonda na lofundo, bakolinga bisengo koleka Nzambe;
“Kozala na lolenge ya bato ya Nzanbe, kasi bakowangana nguya na yango: kima bato ya lolenge wana.”1
Polo asakolaki lisusu, “Moto ya mabe mpe mokweisi akoki kokolisa mabe mpe mabe,koyokisa nsoni, mpe kozwa bayokisami nsoni.”2
Milongo wana ekozala lokola mokebisi, lolakisa oyo na ntina ya kokima. Tosengeli kozala libela na bokengi mpe na etingia. Tosengeli kotala moko ya masakoli wana mpe kotia elembo na yango lokola kozala sika mpe na ntina ya mokili ya lelo:
Ntango ya mpasi—sika. Tozali na ntango mpasi mpenza.
Bilulalula, batuti ntolo, lolendo—nionso ezali sika mpe kati na biso.
Batuki, bazangi botosi na baboti, bozangi botondi, bozangi bosantu, na bozangi bolingo ya bomoto—nionso oyo wana ezali malamu mpo na kotanga.
Babuki mibeko, bafundi ya lokuta, mpe solo na—nionso ekoki kotalama na biloko oyo ezali na komonana oyo ezali nzinga nzinga na biso.
Moloni mpe alobaki mpo na nko ya mikolo na biso ntango akebisaki:
“Ntango bokomona biloko wana koya kati na bino … bokoki kokeba na ntina na bino ya nsomo. …
“Wana, Ngai Moloni, natindamaki kokoma biloko wana monguna akoki kokima, mpe na ntango wana ekoya ete Satana akoki kozwa nguya te likolo ya mitema ya bana ya bato, kasi bakoki kotinda kokoba kosala bolamu, ete bakoka koya na moboko ya bosolo bonso mpe babikisama.”3
Bolakisi ya Polo mpe Moloni epesi na mikolo na biso ezali solo mpenza oyo ekoki te kolongola. Mpo na mingi ekoki kaka kotungisa, ezala bolembu. Ata, ntango nakanisi mpo na lobi, nazali kaka elongo na boyoki ya bomoni malamu.
Na limonisi ya Polo, na likolo ya molongo ya bitumba mpe makambo, alobi alobeli biso lisusu nini tokoki kosala mpo na bobateli na bisomei:
“Kokoba kati na biloko oyo bakoyekola na lombangu mpe bazwi na lombangu elikia, ya boyebi ya oyo bayekolaki na na yango;
“Mpe oyo uta na mwana noki koyeba makomi masantu, oyo ezali na makoki ya kosala yango na bwania kati na lobiko na bondimi oyo ezali na Klisto Yesu.”4
Makomi ezali na bafungola ya bobateli ya molimo. Fungola ezali na mlongi mpe mibeko mpe makuli oyo ekoki kopesa mwana nionso ya Nzambe na litatoli ya Yesu Klisto mosikoli mpe Mobikisi.
Elongo na mikolo ya bomibongisi, wana ezalaki makasi monene kobimisa makomi na nkota nionso,elongo na makomi ya nse mpe makomi-ekokani. Tokoki koluka kosala yango ezala mpo na baoyo banso balingi koyekola. Bateyi biso wapi tokokende mpe nini tokosala. Bapesi elikia mpe boyebi.
Mibu mileki, Mpaka S. Dilworth Young ya Bantuku sambo ateyaki ngai liteya na ntina ya botangi makomi. Likonzi ezalaki kobunda elongo na bobendani mpe mikakatano kati na bandimi, mpe toil esengelaki kopesama.
Natunaki Mokambi Young, “nini nakoki koloba?”
Ayanolaki na pete, “Yebisa bango kotanga makomi.”
Natunaki, “makomi nini?”
Alobaki, “Ezali solo na ntina te. Yebisa bango bafungola na Buku ya Mormon, mpo na kolendisa, mpe kobanda kotanga. Kala te koyoka ya kimia mpe bofulami ekoya, mpe eyano ekozala yango moko.”
Kosala botangi ya makomi eteni ya elaleli ya ntango inso, mpe mapamboli ekolanda. Wana ezali kati na makomi mongongo ya bokebisi, kasi wana ezali lisusu bilei ya monene.
Soki na ebandeli lokota ya makomi ezali lokola na kpokoso mpo na yo, koba na kotanga. Na ntango moke okososola bonzenga mpe nguya ezwami na nkasa iye.
Polo alobaki, “Makomi nionso epesami na bofulami ya Nzambe, mpe ezali na litomba mpo na lilongi, mpo na kolakisa, mpo na kosemola, mpo na koteya kati na bosembo.”5
Okoki komeka elaka oyo mpo na yo moko.
Tozali na ntango ya nkaka; ata, tokoki kozwa elikia mpe kimia mpo na bisomei mpe mpo na mabota na biso. Bovandi wana kati na mawa, bozangi elikia na makoki ya kozala bana babikisama uta wapi mokili ezwaki bango, bakoka te kotika. “Kobanga te, ndima kaka.”6 Bosembo ezali na nguya mingi koleka nkanza.
Bana bayekolaki lisosoli ya makomi na ebandeli ya bomoyi ekoya mpo na koyeba nzela basengeli kotambola mpe bakozala na mposa mingi ya kotikala na nzela wana. Baoyo bakobunga nzela bakozala na makoki ya kozonga, mpe na lisalisi, bakoki kzwa nzela ya kozonga.
Bana mibali ya Moziya babundisaki Eklezia mwa ntango moko kasi nsima bayambolaki mpe bayebaki kozwa mbongwana makasi. Na Alma totangi ete, “Bana mibali oyo ya Moziya … bokomaki makasi na boyebi ya bosolo; mpo bazalaki mibali na bososoli ya solo mpe balukaki bosolo na etingya, ete bakoka koyeba liloba ya Nzambe.”7
Mokambi Joseph F. Smith azalaki na mibu mitano ntango tata na ye, Hyrum, abomamaki na Boloko ya Carthage. Nsima, Joseph akatisaki bisobe ya mobembo elongo na mama na ye mokufeli mobali.
Na mibu 15 abengamaki na misio mpo na Hawai. Ayokaki bobungi mpe azalaki ye moko mpe alobaki: “Nayokisamaki mpasi mingi. … Nayokaki lokola soki nazalaki ya kotungisama mpenza na ndenge ya bobola, bozangi ya mayele mpe boyebi, kaka mwana moke, ete namekaki soki moke kotala [moto] na elongi.”
Ntango ya kokanisaka ndenge ya mawa na ye butu moko, elenge Joseph alotaki azalaki na mobembo, kotambolaka na lombango lokola akokaki kosala. Akumbaki elongo na ye ebolo ya moke. Na nsuka, Ayaki mpo na ndako kitoko, oyo ezalaki bokomi na ye. Lokola akomaki pene, amonaki elembo oyo kotanga“Sukola.” Mbangu akendaki na kati mpe amisokolaki. Afungolaki ebolo na ye ya moke mpe azwaki peto, elamba mpembe—“eloko,” alobaki, “Namonaki te kobanda ntango molai.” Atiaki yango likolo mpe akendaki mbangu na ekuke ya ndako.
“Nabetaki, ” alobaki, “mpe ekuke efungwamaki, mpe mobali oyo atelemaki wana azalaki Profeta Joseph Smith. Atalaki ngai moke kobakisa, mpe maloba ya yambo alobaki [ezalaki]: ‘Joseph, olekisi ntango.’ Te Nazwaki bonkutu mpe alobaki:
“‘Iyo, kasi nazali peto—nazali peto!’”8
Mpe ekoki kozala mpenza mpo na banso kati na biso.
Sokiovandi na kulusi ya bondimi mpe kosala na Eklezia, zala na kulusi mpe batela mayokami. Koba liboso kino ngonga ntango mapamboli ya Nkolo ekoya epai na yo mpe Molimo Mosantu ekotalisa lokola kobaluka na makasi na bomoyi na yo.
Soki ozali sika awa na kulusi wana libanda esika uta na mondelo kati na makomi, tika napesa yo elikia ozali wana nzela ya bozongi.
Yesu Klisto alimbolaki polele mpenza lolenge mpo na biso koyambola mpe kozwa libiki na bomoyi na biso. Kobikisa mpo na mabunga mingi ekoki kozwama na kolukaka bolimbisi na libondeli ya moto na moto. Ata, wana ezali solo libiki ya molimo, ndakisa oyo ezali elongo na bobuki mibeko ya bonsoni, oyo esengeli kaka na lisalisi mpe kosalisama na monganga ya molimo.
Mibu mileki wana eyaki ngai na bilo elenge mwasi moko mpe tata na ye na mawa. Apesaki ye nkama mingi mpo na kozwa lisalisi na mbeba ayokaki. Lokola elenge mobali asalaki libunga monene, mpe na kimobange na ye makanisi ezongelaki ye. Akokaki te kobeta boyoki ya mbeba. Akokaki te kozonga nsima mpe kolongwa na likambo ya bolenge na ye moko, kasi akokaki kobanda wana azalaki mpe, elongo na lisungi, kolongola mbeba oyo elandaki ye mibu miye minso.
Natondaki ete na koteyaka ye mabongisi uta na Buku ya Mormon, ezalaki lokola ata ko kilo monene ezalaki likolo uta na mapeka na ye. Ntango ye mpe mwana mwasi na ye bazongaki ndako oyo mingi, mobange mobali ayokaki nsima mbeba ya mabe eleka.
Soki “bolamuki na koyoka na ntina na bino ya nsomo”9 mpe olingi kobongwana na kotonda na molimo kolongono, mona Episkopo na yo. Azali na bafungola mpe akoki kosalisa yon a molai ya nzela nay a boyamboli.
Boyamboli ezali ya moto na moto, mpe bolimbisi lisusu. Nkolo akondima se oyo abondgwani uta na masumu na ye, mpe “[Akolimbisa] mabe na bango, mpe …kokundola masumu na bango te lisusu.”10
Lokola nzela ya boyamboli ezali ya kokoka, bokoki kososola ndimbola ya elaka ya Isaya na ntina ya Bomikabi : “ yaka sika awa, mpe tika biso tososola elongo, elobaki Nkolo:ata ko masumu na bino ezali moyindo, ekoki kokoma mpembe lokola libanga ya mayi; ata ko motane ezali lokola ngola, ekoki kokoma mpembe.”11
Lokola mpembe ekoki kobongwana uta na etando ya moyindo, elongo na boyamboli ya solo nguya ya mabunga na biso ekoki kolongolama na Bomikabi ya Yesu Klisto. Elaka oyo etali mabunga nionso.
Nsango malamu eteyi biso kozala na esengo, kozala na bondimi koleka bobangi, kozwa elikia mpe kotombwama na bozangi elikia, kotika molili mpe kobaluka liboso na mwinda ya libela ya nsango malamu.
Polo mpe basusu bakebisamaki na ntina ya kosambisama na ntango na biso mpe mikolo naino ekomi te. Kasi kimia ekoki kofanda na mitema ya moko oyo abaluki epai ya makomi mpe akangi bilaka ya bobateli mpe bosikoli oyo bango bateyamaki kuna na kati. Tobengi banso kobaluka epai ya Mosikoli Yesu Klisto, na mateya na Ye lokola ezwami na Bondeko ya Kala, na Bondeko ya Sika, na Buku ya Mormon, na Malongi mpe Mayokani, na mpe Liyaka ya Ntalo Mingi.
Natatoli banzeneke nzike ya makomi lokola fungola mpo na bobateli na biso ya molimo. Natatoli lisusu nzeneneke ya kozala na nguya ya bomikabi ya Yesu Klisto, “ ete na nzela na Ye banso bakoka kobikisama”12 oyo akobikisama. Eklezia ya Nkolo etiami na mabele mbala mokolisusu. Ya bosolo ya nsango malamu natatoli. Ya Ye nazali nzeneneke. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.