Natikeli Bino Kimia na Ngai
Nkolo alakaki kimia epai ya bayekoli na Ye ntango akomaki pene ya kotika bango. Apesaki elikia moko oyo epai na biso.
Bandeko basi ba bolingo, topambolami na Molimo ya Nzambe na mpokwa ya lelo. Bansango efulama ewuti na bakambi ya basi ya nguya mpe miziki elendisi bondimi na biso mpe ebakisi mposa na biso mpo na kobatela mayokani ya bule tosali na Tata na biso ya Lola ya bolingo. Toyoki bobakisi na bolingi na biso mpo na Nkolo Yesu Klisto mpe boluli moko mpo na likabo ya bomikabi na Ye.
Nsango na ngai na mpokwa ya lelo ezali pete. Toyokaki banso molimo na mpokwa ya lelo. Moko na moko kati na biso asengeli koyoka kimia ya boye mbala mingi kati na bisomei, na mabota na biso, mpe na bato oyo bazalaka nzinga nzinga na biso. Nkolo alakaki kimia na bayekoli na Ye ntango akomaki pene ya kotika bango. Apesaki elaka yango mpe epai na biso. Kasi alobaki ete asengelaki kopesa kimia na lolenge na Ye, kasi na lolenge ya mokili te. Atalisaki lolenge na Ye ya kotinda kimia:
“Kasi Molendisi, oyo azali Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, akotangisa bino makambu nyonso, mpe akomema makambu nyonso epai na bino, lolenge na yebisi bino.
“Natikeli bino kimia na ngai, napesi bino kimia na ngai: napesi bino yango lolenge mokili epesaka te, napesi bino yango. Mitema na bino etungisama te, mpe boyoka bobangi te” (Yoane 14:26–27).
Bana ya Moziya bazalaki na mposa ya likabo wana ya kimia ntango bamikotisaki na misio na bango na Balamani. Na koleka mwa bobangibangi ntango bayokaki bonene ya mosala, basambelaki mpo bondimi lisusu. Mpe “Nkolo abimelaki bango na Molimo na Ye, mpe alobaki na bango: Bolendisama. Mpe balendisamaki.” (Alma 17:10; tala lisusu Alma 26:27).
Ngonga moko, okoki koluka kimia uta ntango molai ntango omoni solo te mpe na oyo emonisami kozala mimekano. Bana ya Moziya bayekolaki liteya oyo Nkolo ateyaki Moroni. Ezali bokambami mpo na biso nyonso. “Soki bato bayei epai na ngai nakolakisa bango botau bwa bango. Napesaka epai ya bato botau ete bakoka kozala basawa; mpe boboto bwa ngai bokoki mpo na bato banso [baye] bakomikitisaka liboso lya ngai; mpo soko bamikitisi liboso lya ngai, mpe bazali na bondimi, nde nakosala makambo matau makoma makasi epai na bango” (Etele 12:27).
Moroni alobaki ete ntango “ayokaki maloba maye,” ye “alendisamaki” (Etele 12:29). Bakoki kozala lilendisi na banso kati na biso. Baye bamonaka te botau na bango bakolaka te. Boyebi na bino ya botau ezali lipamboli, lokola ekosalisa bino botikala basawa mpe bobatela kobaluka epai ya Mobikisi. Molimo elendisaka bino kaka te, kasi Ye azali lisusu mosali oyo na nzela na ye Bosikoli esalaka mbongwana kati ya bomoto na bino. Mpo ete makambo ya bolembu ekoma makasi.
Ntango mosusu bakotuka bondimi na bino na Satana; ekomelaka bayekoli banso ya Yesu Klisto. Bobateli na bino na bitumba wana ezali kobatela Molimo Mosantu lokola moninga. Molimo akolobela kimia na molimo na bino. Akopusa bino liboso na bondimi. Mpe Ye akozongisa likundoli ya ntango oyo boyokaki pole mpe bolingo ya Yesu Klisto.
Komikundola ekoki kozala moko ya makabo ya motuya Molimo akoki kopesa na bino—. Ye “akomema makambo nyonso na bokundoli na bino, ezala nini [Nkolo alobaki] na bino” (Yoane 14:26). Bokundoli ekoki kozala ya losambo eyanolama, ya likuli eselema ya bonganganzambe, ya kokotisa litatoli, to ya ngonga moko ntango bomonaki loboko ya Nzambe kokambaka na bomoi na bino. Ntango mosusu na mokolo moko ya nsima ntango bokozala na mposa ya bokasi, Molimo akoki komema na bokundoli na bino mayoki oyo bozali kozwa na liyangani oyo. Nasambeli ete yango ezala bongo.
Likundoli moko oyo Molimo mbala mingi amemaka na mayele na ngai ezali ya liyangani moko ya elambo ya mpokwa esalamaki mibu mingi eleki na etonga moko ya bibende na Innsbruck, Autiche mibu. Etonga yango ezalaki na nse ya nzela ya engunduka. Ezalaki bobele penepene na bato zomi na mibale, bafandaki na bakiti ya mabaya. Mingi na bango bazalaki basi, boko bilenge koleka mpe boko bakolo koleka. Namonaki mpinzoli ya botondi ntango elambo elekaki o ntei ya lingomba yango ya moke. Nayokaki bolingo ya mobikisi mpo na Basantu wana, mpe bango lisusu. Kasi likamwisi namikundoli ya pole mpenza ezalaki mwinda emonisamaki kotonda na etonga wana ya bibende, komemeka elongo na yango liyoki moko ya kimia. Ezalaki butu mpe ezalaki na maninisa te, mpe nzokande ndako epelaki mwinda lokola soki na pole ya moi ya midi.
Pole ya Molimo Mosantu ezalaki ya kongenga mpe makasi na mpokwa wana. Mpe bikuke oyo etikaki kati ya pole esika bato ya mitema sembo ya basantu oyo, oyo bayaki liboso ya Nkolo kolukaka bolimbisi ya masumu na bango mpe bayokani ete ntango nyonso bakanisaka Ye. Ezalaki mpasi te komikundola Ye nsima, mpe makanisi na ngai ya mayebi ya bule wana esali yango mpasi te mpo na ngai nakanisa Ye mpe Bosikoli na Ye mibu oyo elandi. Mokolo wana elaka na losambo ya elambo ete Molimo ekozala elongo na biso ekokisamaki mpe boye ememaki mayoki ya pole mpe kimia.
Lokola bino, nazalaka na botondi mpo na ndenge mingi Nkolo abimelaki ngai na Bolendisi ntango nazalaki na mposa ya kimia. Na yango Tata na biso na Lola amitungisaka kaka te na maye etali bolendisi na biso kasi kutu etali bokoli na biso ya kobuta. “Molendisi” ezali bobele moko ya ndenge Molimo Mosantu alimbolami na makomi. Oyo ezali mosusu: “Mpe sikawa, ya solo, ya solo, nalobi na bino, botia elikia na bino na Molimo oyo ekokamba na malamu” (D&C 11:12). Mbala mingi mpenza, bolamu epai akokamba bino mpo na kosala ekozala kosalisa moto mosusu azwa lilendisi kowuta na Nzambe.
Na bwania na Ye, Nkolo amemi bino elongo na mangomba mpe bakelasi na Eklezia na Ye. Asalaki boye mpo na kobakisa nguya ya kosala malamu. Na kati ya mangomba oyo, ozali na mikumba songolo mpo na kosalisa basusu mpo na Ye. Ndakisa, soki ozali elenge mwasi, bakoki kotuna yo na episikopo to mokambi na bino ya Bilenge Basi kosalisa Loreole moko oyo akomi oyo tobengaka ntango mosusu “motau.” Okoki koyeba ye mingi koleka episikopo mpe mokambi ya Bilenge Basi. Okoki koyeba ete azali koyoka mobulu na ndako to na kelasi to ntango na bisika wana mibale. Bakambi na bino bakoki te koyeba ntina nini bazwaki liyoki ya kosenga yo mpo na kosalisa ye, kasi Nkolo ayebi, mpe Ye atindi mosala oyo na nzela ya bofuli ya Molimo.
Elonga na makasi na yo ekosenga likamwisi ya mbongwana na motema na yo mpe kati elenge basi oyo otindamaki kosunga—mpe yango ekosenga kimoninga ya Molimo Mosantu. Molimo akoki kopesa yo nzela ya komona Loreole motau lokola Nkolo azali komona ye. Nkolo ayebi motema na ye mpe ya bino, mpe Ye ayebi makoki ya mitema mpo bana kobongwana. Ye akoki kobimela yo na Molimo na Ye mpo na kofula bomikitisi, bolimbisi, mpe bolingo.
Molimo wana akoki kofula maloba, misala, mpe bompikiliki esengeli mpo na kobengisa mpate azonga na etonga. Mpe ye akoki kosimba mitema ya etonga na kelasi ya Laureole koloba mpe kopesa boyei bolamu na mpate abunga mpo ete ntango akozonga, ayoka azonga ndako.
Nguya na bino ya kosala malamu lokola liboke ya bana basi ya Nzambe ekowuta, na ndelo moko monene, na bomoko mpe bolingo oyo ezali kati na bino. Oyo ezali likabo mosusu ya kimia oyo eyaka na nzela ya Molimo Mosantu.
Alma asosolaki yango. Yango wana asambaki na bato ba ye “ezala boswani te bango na bango, kasi ete batalela o boso na miso moko, kozalaka na bondimi boko mpe libatisi lyoko, kozalaka na mitema mya bango misangana elongo o bomoko mpe o bolingo bango na bango” (Moziya 18:21).
Bomoko ezali ntina mingi mpo na biso mpo na kozwa Molimo na kelasi na biso mpe kati na libota na biso. Kasi boyebi uta na mayebi, lolenge nasalaka ete bomoko ya kolinga ezali mpasi mpo na kobatela. Esengaka kozala na Molimo Mosantu ntango niyonso lokola moninga mpo na kofungola misu na biso mpe kokitisa mayoki na biso.
Namikundoli, mbala moko mwana mobali na biso moko ya mibu nsambo to libwa oyo azalaki kosaana na mbeto na ye na makasi ekoki yango wana nabanzaki ekokaki kobukana. Nayokaki motema mpasi, mpe nalongwaki mbangumpo na kobongisa ndako na ngai. Nasimbaki mwana na ngai na mapeka na ye ya mike mpe natombolaki ye tii miso na biso ekutanaki.
Molimo epesaki ngai maloba. Ezalaki maloba na mongongo ya nse kasi ezalaki motuya na motema na ngai. “Ozali komona mutu monene.” Na boboto nazongisaki ye na mbeto mpe nasengaki bolimbisi.
Sikawa akomi mobali monene oyo Molimo Mosantu asalaki namona mibu 40 eleki. Nazali seko na botondi ete Nkolo abikisaki ngai na mayoki ya boboto te na kotindaka Molimo Mosantu mpo na kosala namona mwana moko ya Nzambe lokola Ye amonaki ye.
Bomoko tolukaka na mabota na biso mpe na Eklezia ekoya ntango topesi Nzela na Molimo Mosantu asimba oyo tomonaka ntango tozali kotalana mpe atako ntango tobanzi na ntina ya basusu. Molimo emonaka na bolingo ya peto ya Klisto. Boyokamela maloba ya Mormon asalelaki mpo na kolimbola bolingani—Banzaka ntango oyokaki yango:
“Bolingani ezali motema molai, mpe ezali boboto, aluli te, mpe avimbani te o lolendo, aluki ya yemei te, etumolami mpambampamba te, ekanisi bobe te, mpe esepeli o bobe te kasi asepeli o bosolo, ekangi motema na makambo manso, endimi makambo manso, elikii makambo manso, etii molende o makambo manso.
“Yango wana, bandeko balingami mibali mpe nabakisi bandeko basi] ba ngai, soki bozangi bolingani, bozali eloko te, mpo bolingani elembi mokolo moko te. Yango wana, kangamani bolingani, oyo ezali monene mingi koleka inso, mpo biloko binso bikolembe—
“Kasi bolingani ezali bolingo bwa peto bwa Klisto, mpe etii molende libela; mpe oyo amononi kozalaka na yango o mokolo mwa nsuka, ekozala bolamu na ye.
“Yango wana, bandeko balingami ba ngai mibali [mpe, sambelani epai ya Tata na makasi manso ma motema mwa bino, ete bokoka kotonda na bolingo boye, boye apesi epai ya baye banso bazali balandi ba solo ba Mwana Mobali wa ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana mibali [mpe bana basi] ba Nzambe, ete ekobima ye tozala bo ye, mpo tokomono ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikia eye; ete topetolama, kutu lokola azali peto.” (Moroni 7:4548).
Oyo ezali lotomo ya Tata na bino na Lola mpo na bino, bana na Ye ya motuya. Ekoki komonana na bino lokola lotomo moko ya mosika, kasi uta na bomoni na Ye, bozali mosika mingi mpenza te. Yango wana abimelaka bino na Molimo na Ye mpo na kolendisa bino, kokembisa bino, mpe kofula bino mpo na kokoba kotambola.
Natikeli bino litatoli na ngai ya sikisiki ete Tata ayebi bino—ayebi babonsenga na bino mpe nkombo na bino— mpe alingaka bino, mpe ayokaka nsambo na bino. Mwana na Ye ya Bolingo azali kobengisa bino boya epai na Ye. Mpe batindaki Molimo Mosantu mpo na kosunga yo na makasi na yo ya kosalisa basusu mpo na Bango.
Na ntina ya Bosikoli ya Yesu Klisto, Molimo Mosantu akosantisa mpe kopetola molimo na bino. Bokoyoka nsima kimia oyo Mobikisi alakaki ezala elongo na bayekoli na Ye. Elongo na kimia yango ekokoma pole ya elikia mpe liyoki ya mwinda mpe bolingo kowuta Tata mpe Mwana na Ye ya bolingo, oyo azali kokamba bokonzi na Ye likolo ya mabele na nzela ya limonisi na profeta na Ye. Natatoli bongo na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, amene.