“Tambola elongo na Ngai”
Bokuli na biso na bonganganzambe ezali libiangi kowuta na Nkolo mpo na kotambola elongo na Ye, kosala oyo Ye asali, kosunga na lolenge Ye asungi.
Bandeko na ngai mibali ya bolingo na bonganganzambe, ntina na ngai lelo ezali kopesa bino elikia mpe kolendisa bino na mosala na bino, na bonganganzambe. Na lolenge moko, ezali kokokana na ntina ya ndenge nazali kobanza Mobikisi ntango akutanaki na elenge mobali ya bozwi oyo atunaki, “Bolamu kani nasengeli kosala, mpo ete nakoka kozwa bomoi ya seko?” (Matai 19:16). Ntango mosusu oye na likita oyo, lokola elenge mobali akendaki epai ya Mobikisi, kotunaka soki maye ozali kosala ezali malamu. Mpe lolenge moko, okoki koyoka ete ezali na ebele osengeli kosala, ntango mosusu ebele koleka! Nasambeli ete nakoka kopesa bondimami ya bolingo ya Nkolo mpo na oyo osi osali, mpe lisusu nakobonzaka bomoi ya bolendisi oyo bokoki, na lisungi na Ye, na kokisaka lokola basimbi bonganganzambe na Ye ya bule.
Basengaki na elenge mobali mozwi ateka nionso oyo azalaki na yango mpe apesa na babola sima alanda Mobikisi; bokoli na bino ya ekoya ekoki te kosenga bino yango, kasi ekoki kosenga yo ndelo moko ya libonza. Na yango, nalikii nsango na ngai nalingi te epesa “[bino] mawa lokola elenge mobali”, oyo lokola elenge mobali ayokaki. (Tala Matai 19:16–22.) Mpe bongo, nandimisami ete bokozonga “na esengo koleka” (D&A 84:105) mpo bosengeli kobongisa mpe obanzi okoki.
Atako bongo, esengeli koyoka mwa bozangi ntango tozali kosalela oyo Nkolo abiangaki biso kosala. Na yango, soki boyebisi ngai ete bozali na makoki ya bobongi nie ya kokokisa mikumba na bino ya bonganganzambe, nakoyoka motema pasi, mpo ete bino bososoli yango te. Na ndenge mosusu, oyo Nkolo abiangi biso kosala. Soki boyebisi ngai ete bolingi kotika mpo ete mokumba ezali mpasi mpo ya kokokisa, bongo nakosalisa bino bokoka kososola lolenge nini Nkolo asalaka mpe alendisaka banganganzambe basala makambu oyo bakoki kosala bangomei te.
Yango ezali mpe solo mpo na ngai na libiangi na ngai lokola ezali mpo ya bino. Moto moko te kati na biso akoki kosala mosala ya bonganganzambe, mpe asala yango malamu, nakoyekamaka bobele na bwanya na biso mpe batalanta. Ezali mpo ete ezali mosala na biso te—ezali ya Nkolo. Na yango lolenge moko ya kolonga ezali kotiya elikia epai na Ye, atako ozali diakona ya sika opesami mosala ya komema ndelo ya nguya ya molimo na bokuli ya elambo; to elenge moteyi na libota opesameli mokumba kowuta na Nkolo ya kolinga mpe kosala na libota oyo oyebi te mpe oyo emonisami kozala na mposa ya bolingo na bino te to mosala na yo; to tata oyo ayebi ete bosengeli koyangela libota na yo na boyengebene, kasi ntango mosusu boyebi koyangela yango te, mpe ntango emonisami koleka, mpo ete bana na ye bazali kokola na lombango mpe mokili emonisami kozala mpasi mpe mabe.
Na yango, soki bomiyoki mwa bolembu ndambu, bozwa yango lokola elembo malamu. Elakisi ete bokoki koyoka nguya ya elikia Nzambe atiaki kati na bino. Elakisi ete bozali na mwa ndambo ya bososoli ya oyo bonganganzambe ezali mpenza.
Ezali na ndambo ya bato na mokili oyo bazali na bososoli yango. Atako baoyo bazali kotanga ndimbola malamu bakoki ntango mosusu kososola yango te. Ezali na makomi oyo, na nzela ya nguya ya Molimo ezali kolakisa, ekoki kokolisa lolenge na biso ya kosala na oyo etali bonganganzambe ya bule. Oyo ezali mwa ndambo ya makomi yango:
“Nguya mpe likoki ya … Bonganganzambe ya Melchizedek, ezali ya komema bafungola ya mapamboli ya molimo ya Eklezia—
“Kozala na mokumba ya kozwa misala ya bokonzi ya lola, komona balola efungwama, kozala elongo na lisanga linene mobimba mpe Eklezia ebotama ya yambo, mpe kosepela na bozalani mpe Nzambe Tata, mpe Yesu moyokanisi ya liyokani ya sika.
“Nguya mpe likoki ya … Bonganganzambe ya Alona, ezali kosimba bafungola ya misala ya baanzelu” (D&A 107:18–20).
“Na makuli [ya bonganganzambe], nguya ya bonzambe emonisami. …
“Mpo na bozangi yango moto moko te akoki komona Nzambe, atako Tata, mpe bomoi” (D&C 84:20, 22).
“Bonganganzambe ya likolo oyo [ezali] sima ya mabongisi ya Mwana ya [Nzambe], mabongisi oyo ezalaki uta na bokeli mokili oyo; to na maloba mosusu, kozanga ebandeli ya mikolo to nsuka mvula, kozala ya kolengelama uta seko na seko nionso, engebene na mayele ya yambo ya makambo nionso” (Alma 13:7).
“Moto nionso oyo akulisami kolandisama na mpe kobiangemaka asengeli kozala na nguya, na bondimi, ya kobuka bangomba, ya kokabola bamboo, ya kokawusa bamai, kozongisa botioli na yango;
“Kolakisa na bibundeli ya bamboka, kokabola mabele, kobuka eteni nionso, kotelema liboso ya Nzambe; kosala makambo nionso engebene na bolingi na Ye,engebene na motindo na Ye kotosa mibeko mpe bakonzi; oyo nionso mpo na bolingi na Ye ya Mwana Nzambe oyo azalaki uta ebandeli ya bokeli mokili” (Joseph Smith Translation, Genese 14:30–31 [mabakisi na Biblia]).
Lolenge moko ya koyanola na makambo oyo ya bule koleka ya nguya ya bonganganzambe ezali ya koloba ete esalema mpo na biso te. Lolenge mosusu ezali ya koyanola ezali ya kolukaka kotuna mituna na molimo, kotunaka na mitema na bisomei, lokola oyo boye: Nasi nayoka lola kofungwama mpo na ngai? Moto moko asalela liloba “kosalelaka baanzelu” mpo na komona mosala ya bonganganzambe na ngai? Namemeka nguya “nguya ya bonzambe ” kati ya babomoi ya baoyo nazali kosalisa? Nasi nabuka ngomba, nameka bibundeli, esi nabuka bandelo ya moto moko, nakitisa banguya ya mokili—atako na maloba—na ntina ya kokokisa bolingi ya Nzambe?
Lolenge ya bomoni oyo ntango nionso ememaka liyoki ete tokoki kosala mpo na mosala ya Nkolo. Nakanisi yango mpe ekomemela bino liyoki ete bino bolingi kosala koleka—mposa ya kozala mobimba na mosala ya bikamwa ya Nkolo. Mayoki ya boye matambe ya yambo mpo na kokoma lolenge ya bato oyo mosala ya bonganganzambe esengeli kosala.
Eteni elandi etalisami kati ya Jehova mpe Enoke. Toyebi Enoke lokola profeta ya nguya oyo atiaki Siona na kati kati ya nkanda makasi. Kasi yambo azalaki profeta ya nguya, Enoke amimonaki lokola “mwa elenge mobali, … kimia na maloba,” mpe ayinama na bato nionso (Moise 6:31). Boyoka maloba Nkolo alobaki mpo na kolendisa Enoke. Ezali mpe maloba na Ye na bino oyo babiangemi na mosala ya basusu lokola banganganzambe:
“Mpe Nkolo alobelaki Enoke: Kende sala oyo nayebisi yo, mpe moto moko te akotobola yo. Fungola munoko na yo, mpe ekotondisama , mpe nakopesa yo maloba ya koloba, mpo ete misuni nionso ezali kati ya maboko na ngai mpe nakosala oyo nionso ezali malamu mpo na ngai. …
“Tala, molimo na ngai ekozala likolo na yo, na yango nakokamba maloba na yo nionso. Bangomba ekokima liboso na yo mpe bibale ekozonga; mpe okozala elongo na ngai mpe ngai elongo na yo; na yango, tambola elongo na ngai” (Moses 6:32, 34).
Bandeko mibali, bokuli na biso na bonganganzambe ezali libiangi kowuta na Nkolo mpo na kotambola elongo na Ye. Mpe yango elakisi nini kotambola elongo na Nkolo? Elakisi kosala oyo Ye asali, kosunga na lolenge Ye asungi. Abonzaki babokasi na Ye mpo na kopambola baoyo bazali na mposa ya lisungi, yango ezali oyo tomekaka kosala. Azwaka mingi mingi bato oyo bamonisami kozala mpamba na misu ya basusu mpe baoyo lingomba ya bato ebwakisa, na yango tosengeli komeka kosala yango mpe. Atatolaki na bokasi kasi na bolingo ya malongi ya solo Azwaki uta na Tata na Ye, atako eyebanaki te na bato, mpe tosengeli na yango. Alobaki na banso, “Boya epai na ngai” (Matai 11:28), mpe tolobi na banso, “Boya epai na Ye.” Lokola banganganzambe, tozali batindami na Ye. Tosalaka mpo na bisomei te kasi mpo na Ye. Tolobaka maloba na biso te kasi maloba na Ye. Bato tosalisaka bayaka koyeba Ye malamu mpo na mosala na biso.
Ntango tondimaka libiangi ya Nkolo “Tambola elongo na ngai,” lolenge ya mosala na biso ya bonganganzambe ebongwamaka. Ekomaka makasi mpe lokumu kasi lisusu malamu koleka, mpo toyebi ete tozali biso moko te. Nayokaka yango nguya koleka ntango Mokambi Thomas S. Monson atiaki maboko na ye likolo ya motu na ngai mibu libwa eleki mpe apambolaki ngai ntango nabandaki mosala na ngai na libiangi na ngai ya sikawa. Na lipamboli wana, alobaki maloba oyo ya Mobikisi: “Mpe oyo ayambi yo, nakozala mpe wana, mpo ete nakozala liboso na yo. Nakozala na loboko na yo ya mobali, mpe Molimo na ngai ekozala kati ya mitema na bino, mpe baanzelu na ngai nzinga nzinga na bino, mpo na komema bino” (D&A 84:88).
Nayekamelaka na elaka oyo ntango nionso, mpe namonaka yango kokokisama na mibu na ngai 72 mobimba ya mosala ya bonganganzambe. Esalemaka ntango nazalaki Nganganzambe ya Alona ya sika na mosala ya kokabola elambo. Kobanga ete nakoka kosala mbeba te, nazalaki kobima libanda ya ndakonzambe yambo liyangani ebanda kosambelaka ete Nzambe akoka kosunga ngai. Eyano eyaki. Nayokaki ete Nkolo azali elongo na ngai. Nayokaki bondimi na Ye, mpe boye nayokaki bondimi na mosala na Ye.
Esalemaki lisusu ntango nazalaki kosunga lokola episikopo. Babengaki ngai na telephone uta na mama moko oyo asalaki mbeba monene mpe azangaki eyano na likama wana, bomoi ebongwani. Ntango nakendaki kotala elongo na ye, nayokaki koyeba eyano ya likambo na ye, kasi mpe nayokaki lisusu lokola I nasengelaki te kopesa ye eyano wana—azalaki na mposa azwa eyango kowuta na yemei. Maloba na ngai epai na ye ezalaki “Nandimi ete Nzambe akoyebisa yo oyo osengeli kosala soki otuni Ye.” Sima ayebisaki ngai atunaki Ye mpe Ayebisaki ye.
Na libaku mosusu, babengi ngai lisusu, ntango nazalaki episikopo—mbala oyo ezalaki polisi. Ayebisaki ngai ete mokumbi motuka moko alangwaki atutaki motuka na ye na kitalatala ya efelo ya banke moko. Ntango mokumbi motuka wana amonaki bapolisi na munduki etalisami epai na ye, agangaki, “Bobeta ngai masasi te:! Nazali Mormon!”
Mokumbi motuka oyo alangwa amonisamaki sima kozala mondimi ya palwasi na ngai oyo azwaki libatisi kala te. Ntango nazalaki kozela nalobela ye na bilo ya episikopo, nalengelaki oyo nasengelaki kolobela ye ayeba mabe ya lolenge nini abukaki mayokani na ye mpe atosaki mikano ya Eklezia te. Kasi ntango nafandaki nazotala ye, nayokaki mongongo na makanisi na ngai koloba, lokola kaka mutu moko azalaki kolobela ngai, “Nakolakisa yo eloko moko mona ye lolenge nazomona.” Mpe sima, mpo na mwa ntango moke, bomoto na ye nionso bobongwanaki epai na ngai. Namonaki elenge mobali na likambo kasi kongenga, kongenga, mwana ya lokumu ya Nzambe. Na mbalakaka nayokaki bolingo ya Nkolo mpo na ye. Bomoni wana ebongolaki lisolo na biso. Mpe yango ebongolaki ngai.
Nayekolaki mateya ya ntina koleka uta na misala oyo ya kotambolaka elongo na Nkolo na kosalaka mosala na Ye. Nakokabola na bino misato na yango, ya yambo ezali ete Nzambe amonaka mpe akosunga atako baoyo bazali badiakona ya sika mpe bilenge. Bosengeli kotoka te ete bozali mike to bozanga ntina mpo ete Ye amoni bino mpe mosala bozali kosala na nkombo na Ye.
Liteya ya mibale ezali ete mosala ya Nkolo ezali bobele ya kosilisa makambo te; ezali ya kotonga bato. Ntango bozali kotambola elongo na Ye na mosala ya bonganganzambe, bokoki komona ete ntango mosusu eyano na likambo ya ntina ezali eyano esengeli ya Nkolo te mpo ete yango epesaka ndingisa te na bato bakola. Soki boyoki, Akoteya bino banzela na Ye. Mikundola mosala mpe nguya ya Nzambe ezali kaka te ya kokamba lingomba; ezali ya “kokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko ya bato” (Moise 1:39). Yango ezali, sima ya nionso, mpo na nini Ye apesaka nguya ya bonganganzambe na Ye na bazangi kobonga nie ya nkufa lokola bino na ngai mpe abengisi biso tosala mosala na Ye. Bokobi na biso ezali mosala na Ye!
Sikawa liteya ya misato: Botambola elongo na Mobikisi na mosala ya bonganganzambe ekobongola lolenge bozali komona basusu. Akolakisa bino lolenge ya komona bango na nzela ya misu na Ye, oyo elakisi kotala na lolenge ya bomoto mpe na kati ya motema (tala 1 Samuel 16:7). Oyo ezali lolenge Mobikisi amonaki na Simoni kaka te lokola molobi mbisi ya mpamba kasi lokola Petelo, Mokonzi akoya libanga ya Eklezia na Ye (tala Luka 5:1–11). Yango ezali lolenge amonaki Zache kaka te lokola mokongoli mpaku ya lokuta lokola basusu bamonaki kasi mutu malamu , mwana malamu ya Abraham (tala Luka 19:1–9). Soki ozali kotambola elongo na Mobikisi ntango nionso, okoyekola komona mutu nionso lokola Mwana ya Nzambe na bandelo te ya bomoto, kotala te oyo asala kala. Mpe soki okobi kotambola elongo Mobikisi, okokolisa likabo mosusu oyo Ye azali na yango—likoki ya kosunga basusu tala bokasi yango kati na bangomei mpe koyambola mpenza.
Bandeko mibali ya boganganzambe, na lolenge ebele, tozali lokola bayekoli mibale oyo batambolaki na nzela ya Emmaus na Eyenga wana ya yambo ya Pasika. Ezalaki ntongo ya Bosekwi, kasi bayebaki naino te soki lisekwa esalemaki to lisekwa yango elakisaki nini. Bango “babanzaki ete [Yesu ya Nazareth] asengelaki kosikola Yisalaele,” kasi bazalaki “mitema makasi mpo na kondimela” makambo nionso makomi eteyi na ntina ya lisekwa. Ntango bazalaki kotambola mpe bamekaki kokanisa elongo, “Yesu yemei azalaki pembeni, mpe atambolaki elongo na bango. Kasi misu na bango ekangamaki na ntina ete bayeba ye te.” (Tala Luka 24:13–32.)
Natatoli ete ntango totamboli na nzela ya mosala ya bonganganzambe, Mobikisi Yesu Klisto akotambola elongo na biso, mpo ete yango ezali nzela na Ye, lolenge na Ye. Mwinda na Ye ekozala liboso na biso, mpe baanzelu na Ye bazali nzinga nzinga na biso. Tokoki kozanga bososoli ya kokoka na oyo bonganganzambe ezali to lolenge ya kosalela yango lolenge Ye asalaki. Soki totie bokebi na ntango oyo mitema na biso “eyoki mposa” (Luka 24:32), misu na biso ekoki kofungwama mpe loboko na Ye na bomoi na biso mpe na misala na biso. Natatoli ete tokoyeba Ye sima malamu na kosala elongo na Ye mpe kosungaka Ye na mosala monene ya komemaka lobiko na bana ya Nzambe. “Mpo boniboni eyebi moto moko nkolo oyo asaleli te, mpe oyo azali mopaya epai ya ye, mpe azali mosika uta o makanisi mpe mikano mya motema mwa ye?” (Moziya 5:13). Yesu Klisto Molakisi na biso. Oyo ezali Eklezia na Ye. Ezali bonganganzambe na Ye oyo tomemi. Tokoka moko na moko kopona kotambola elongo na Ye mpe koyeba lolenge nini atambolaka elongo na biso.
Natatoli epai na bino ete Yesu azali Klisto, Nkolo na biso mosekwi. Natatoli ete bonganganzambe oyo Ye andimisi biso ezali na nguya ya koloba mpe kosala na nkombo na Ye. Tozali bana ya Tata ya Lola ya bolingo oyo ayanolaka na nsambo na biso mpe atindaka Molimo Mosantu elendisa biso na mokumba nionso ya bonganganzambe topambolami mpo na kozwa. Joseph Smith amonaki Tata mpe Mwana. Azwaki bafungola ya bonganganzambe oyo epesamaki na Mokambi Thomas S. Monson, oyo azali kosalela yango. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.