Likita Linene
Ozana mpe Aleluya—Yesu Klisto na Bomoi: Motema ya Bozongisi mpe Pasika
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Ozana mpe Aleluya—Yesu Klisto na Bomoi: Motema ya Bozongisi mpe Pasika

Na eleko ya ozana mpe aleluya, yemba aleluya—mpo Ye akoyangela libela na libela!

Bandeko ba bolingo mibali mpe basi: na ozana mpe aleluya, tozali kosepela Yesu Klisto ya bomoi na eleko oyo ya Bozongi oyo ezali kokoba mpe Pasika. Na bolingo ya bobongi nie, Mobikisi na biso ayebisi biso solo: “Na ngai nde bokozwa kimia. Kati na mokili bokozala na mitungisi: kasi bozala na esengo malamu; ngai nasili kolonga mokili.” 1

Mwa mibu mileki, ntango Ndeko mwasi Gong mpe ngai tokutanaki na libota malamu moko, elenge mwana na bango ya mwasi, Ivy, na mwa nsoni abimisaki sanduku ya violon na ye. Atombolaki ezipeli ya violin, atombolaki lingenda ya violon, akangaki yango mpe atiaki nkisi na yango. Nsima azongisaki lingenda na sanduku, apesaki biso lokumu, mpe afandaki. Mobandi moko ya sika, ye, akabolaki kaka nyonso oyo ayebaki na ntina ya violon yango. Sikawa mibu mingi nsima, Ivy azali kobeta violon na lolenge ya kitoko.

Elilingi
Ivy mpe nzenze na ye

Na eleko ya kufa oyo, tozali banso mwa lokola Ivy mpe violon na ye. Tobandaka na ebandeli. Na mosala mpe molende, tokolaka mpe tobongaka. Wana ezalaki ntango koleka, bonsomi ya kopona mibeko mpe makambo tokutanaka na yango na bomoi ya kufa esungaka biso tokoma mingi lokola Mobikisi na biso ntango tozali kosala elongo na Ye na elanga na Ye ya vinyo 2 mpe tozali kolada nzela ya mayokani na Ye.

Kosepelamobu ya ebandeli, mpe lisusu mibu nkama mibale oyo, ezali kotia mokoloto na bandakisa ya Bozongisi. 3 Na kosepelaka Bozongisi oyo ezali kosalama ya nsango malamu ya Yesu Klisto, tozali lisusu komilengela mpo na Pasika. Na nyonso mibale, tozali kosepela na bozongi ya Yesu Klisto. Azali na bomoi, kaka na ntango wana te, kasi sikawa, kaka mpo na basusu te, kasi mpo na banso. Ayaki mpe ayei mpo na kobikisa babukana mitema, kokangola bakangami, ekozongisa mamoni na bato bakufa miso ; mpe kopesa bonsomi na o na kokangola bato oyo bazokisami. 4 Wana nde moko moko kati na biso. Elaka na Ye ya kosikola ezali mpo na biso, kotala te mikoloi mileki na biso, lelo na biso, to nini tokoki kokanisa mpo na lobi ekoya na biso.

Elilingi
Bokoti ya elonga kati na Yelusaleme

Lobi Ezali Eyenga ya Mandalala. Na momesano, mandalala ezali elembo ya bule mpo na kotalisa esengo kati na Nkolo na biso, lokola kati na bokoti ya elonga ya Yesu na Yelusaleme, wapi “bato mingi … babukaki bandalala ya mbila, mpe bakendeki liboso kokutana na ye.” 5 (Bokoki kosepela koyeba liyemi ya langi ya liboso ya Harry Anderson oyo ezali na bilo ya Mokambi Russell M. Nelson, kaka nsima ya kiti na ye.) Na buku ya Emoniseli, baoyo basanjoli Nzambe mpe mwana na mpate mpo na kosala bongo “Balati bilamba mpembe, mpe basimbi bitape na mbila na maboko na bango.” 6 Elongo na yango “mokoto ya boyengebene” mpe “motole na kitoko,” mandalala ezali mpe na losambo ya bobulisi. 7

Ya solo, ntina ya Eyenga ya Mandala ekei mosika koleka maboke ya bato kopesaka Yesu mbote na mandalala. Na Eyenga ya Mandalala, Yesu akotaki na Yelusaleme na ndenge oyo bato ya sembo bayebaki lokola bokokisi ya esakola. Lokola Jekelia 8 mpe Mokomi Njembo basakolaki liboso, Nkolo na biso akotaki na Yelusaleme kotambolaka likolo na mpunda wana ezalaki ebele ya bato koganga na motema moko “Ozana na bisika bileki likolo.” 9 Ozana elingi koloba “bikisa sikawa.” 10 Nsima, lokola sikawa, tozali kosepela, “Oyo azali koya na nkombo ya Nkolo apambolami.” 11

Poso moko nsima ya Eyenga ya Mandalala ezali Eyenga ya Pasika. Mokambi Russell M. Nelson ateyi ete Yesu Klisto “ayaki kofuta niongo moko oyo asengelaki te mpo tozalaki na niongo moko oyo tokokaki kofuta te.” 12 Ya solo, na nzela ya Bomikabi ya Klisto, bana banso ya Nzambe “bakoki kobikisama, na kotosaka mibeko mpe makuli ma Nsango malamu.” 13 Na Pasika, toyembaka aleluya. Aleluya elingi koloba “sanzola Nkolo Yehowa.” 14 The Hallelujah Chorus na Messiah ya Handel ezali esakola mokoko elingama ete ye azali “Mokonzi na Bakonzi, mpe Nkolo na Bankolo.” 15

Makambo ya bule katikati ya Eyenga ya Mandalala mpe Eyenga ya Pasika ezali lisolo ya ozana mpe aleluya. Ozana ezali libondeli na biso mpo Nzambe abikisa. Aleluya elimbolaka masanzoli mpe ngolu epai ya Nkolo mpo na elikya ya lobiko mpe bonetoli. Na ozana mpe aleluya tozali koyeba lisusu Yesu Klisto na bomoi lokola motema ya Pasika mpe bozongisi ya basantu ba mikolo mya nsuka.

Bozongisi ya mikolo ya nsuka ebandi na theofani—bobimeli na nzoto ya Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, epai ya elenge profeta Joseph Smith. Profeta Joseph alobaki, “Soki okokaki kotala likolo miniti mitano, okomona mingi koleka oyo olingaki komona na kotangaka manso oyo ekomama naino te likolo ya makambo yango.” 16 Lokola balola efungwami lisusu, biso toyebi mpe “tondimeli Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana wa Ye, mpe Molimo Mosantu.” 17 Bonzambe ya bonzambe.

Na Eyenga ya Pasika, Sanza ya minei 3, 1836, na mikolo ya ebandeli ya Bozongisi, Yesu Klisto ya bomoi amibimisaki ntango Tempelo ya Kirtland ebulisamaki. Baoyo bamonaki Ye kuna batatolaki na ntina na Ye na bokeseni moko ya bokokanisi ya moto mpe mai: “Miso na Ye ezalaki lokola lolemo ya moto; nsuki na ye ya moto ezalaki mpembe lokola mvula ya mpembe ya peto; elongi na ye ezalaki kongenga likolo bongengi ya moyi; mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya bosopani bamai minene, kutu mongongo ya Yehova.” 18

Na libaku wana Mobikisi na biso asakolaki, “Nazali wa yambo mpe wa nsuka, Nazali Ye oyo azali na bomoi, Nazali Ye oyo babomaki. nazali molobeli na yo epai ya Tata.” 19 Lisusu, bokeseni ya kobakisama—yambo mpe nsuka, na bomoi mpe ya koboma. Ye azali Alpha mpe Omega, Ebandeli mpe nsuka, 20 mosali mpe mosukisi ya bondimi na biso. 21

Nsima ya bobimeli ya Yesu Klisto, Mose, Eliasi, mpe Eliya lisusu bayaki. Na bokambi ya bonzambe, basakoli minene oyo ya ntango ya kala bazongisaki bafungola mpe likoki ya bonganganzambe . Na boye, “bafungola ya eleko oyo ezali kosalelama” 22 kati na Eklezia na Ye ezongisama mpo na kopambola bana ya Nzambe banso.

Boye ya Eliya na Temple Kirtland lisusu ekokisaki lisakola lya Boyambi ya Kala ya Malaki ete Elya akoya “liboso na koya na mokolo monene mpe na nsomo na Nkolo.” 23 Na kosalaka bongo, bobimeli ya Eliya ekutanaki, kasi na mbalaka te, na eleko ya Pasika ya Bayuda momesano oyo eyaka liboso na limemia ya bozongi ya Eliya.

Mabota ya Bayuda bato ya losambo babongisaki esika mpo na Eliya na mesa ya Pasika na bango. Mingi batondisaki kopo tii na moto mpo na kobengisa mpe koyamba ye. Mpe basusu, na Feti ya Pasika ya momesano yango, batindaka mwana moko na ekuke, oyo ntango mosusu batikaki ya kofungwama, mpo na komona soki Eliya azali libanda kozelaka babenga ye akota. 24

Mpo na kokokisa lisakola mpe lokola eteni ya bozongisi elakama ya makambo manso, 25 Eliya ayaki mpenza lokola elakamaki, na Pasika mpe na ebandeli ya Pasika. Amemaki likoki ya kokangisa mpo na kokangisa mabota na mabele mpe na lola. Lokola Moloni ateyaki Profeta Joseph, Eliya “bakotiya na kati ya mitema ya bana bilaka oyo bipesamaki na batata, mpe mitema ya bana ekobaluka na batata na bango. Soki ezalaki bongo te,” Moloni akobaki, “mabele mobimba elingaki kobebisama na boyei ya [Nkolo].” 26 Molimo ya Eliya, bolakisi ya Molimo Mosantu, ebendi biso epai ya bankola na biso—ya kala, ya lelo, mpe oyo ekoya—na mambi ma kala ya libota, masolo, mpe mosala ya tempelo.

Tika lisusu tomikundola na mokuse oyo Pasika ya Bayuda elingi koloba. Pasika ya Bayuda ekundolisaka bokangolami ya bana ya Yisalaele uta na mibu 400 ya boombo. Buku ya Esode ezali kobeta lisolo lolenge nini bokangoli oyo eyaki nsima ya bolozi ya magorodo, basili, banzinzi, liwa ya bibwele, mpota ya bato, mpota ya nyama, mvula ya mabanga mpe moto, mabanki, mpe butu makasi. Bolozi ya nsuka ebundisaki na liwa ya mwana ya yambo na mboka kasi na bandako ya Yisalaele te soki—soki bato ya ndako wana batiaki makila ya mwana ya mpate ya yambo azanga litona likolo ya makonzi ya minoko ya ndako na bango. 27

Anzelu ya liwa alekaki mpembeni ya bandako oyo etiamaki elembo ya makila ya mwana mpate. 28 Koleka ya mpembeni wana, to koleka likolo, elakisi ete, nsuka nsuka Yesu Kliso akolongaka liwa. Solo, makila ya kosikola ya Mwana na mpate ya Nzambe epesi Mobateli Mpate Malamu nguya ya kosangisa bato na Ye na bisika mpe ntango nyonso kati na kimia ya etonga na Ye na ngambo mibale ya elamba.

Na polele, Buku ya Mormon elimboli “nguya mpe bosekwi ya Klisto” 29 —Ntina ya Pasika—na kotalaka babozongisi mibale.

Yambo, bosekwi ezali na bozongisi na nzoto ya “bomoto na biso moko na mosuni mpe ya kobonga nie”enama mpe ekangisele nionso,” “kutu nsuki yoko ya moto ekobunga te.” 30 Elaka oyo epesaka elikya na baoyo babungisaki binama, baoyo babungisaki makoki ya komona, koyoka, to kotambola, to baoyo bakanisaki baungisamaki na bokono ebikisaka te, maladi ya moto, to mosusu oyo elembisaka makoki. Ye akuti biso. Ye akomisi biso mobimba.

Elaka ya mibale ya Pasika mpe Bomikabi ya Nkolo ezali ete na molimo “biloko binso bizongisama na molongo na yango ya malamu.” 31 Bozongisi oyo na molimo ezali kolakisa misala mpe bamposa na biso. Lokola lipa likolo ya mai, 32 yango ezongisaka “oyo ezali malamu,” “sembo,” “boyengebene,” mpe “etonda na mawa.” 33 Kokamwa moko te ete profeta Alma asaleli liloba kozongisa mbala 22 34 lokola alingi biso “tosala na boyengebene, tosambisa na bosembo, mpe tosala bolamu ntango nyonso.” 35

Mpo ete “Nzambe yemei amikabaki mpo na masumu ya mokili,” 36 Bomikabi ya Nkolo ekoki kozongisa mobimba kaka maye mazalaki te kasi lisusu maye makokaki kozala. Mpo Ayebi bampasi na biso, mitungisi, maladi, masenginya na biso ya ndenge na ndenge, 37 ye akoki, na mawa, kosalisa biso engebene na maladi na biso. 38 Mpamba te Nzambe azali “Nzambe abonga nie, mpe lisusu Nzambe ya mawa,” moango ya mawa ekoki “kokokisa bosenga ya boyengebene.” 39 Toyambolaka mpe tosalaka manso tokoki. Azingi biso seko na seko “na maboo ya bolingo na ye.” 40

Lelo tozali kokembela bozongisi mpe bosekwi. Elongo na bino, nasepeli na ntina ya Bozongisi oyo ezali kokoba ya litondi nsango malamu ya Yesu Klisto. Lokola ebandaki mibu 200 eleki na eleko ya milona, pole mpe emoniseli ezali kokoba koya na nzela ya profeta na bomoi ya Nkolo mpe Eklezia na Ye ebengami na nkombo na Ye—Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka—mpe na nzela ya emoniseli mpe bofulami ya moto na moto mpe na nzela ya likabo ya bonzambe ya molimo Mosantu.

Elongo na bino, na eleko oyo ya Pasika, natatoli na ntina ya Nzambe Tata na biso ya Seko, mpe Mwana na Ye wa Bolingo, Yesu Klisto na bomoi. Bato ya kufa babakamaki na ekulusu na motema mabe mpe nsima basekwaki. Kasi bobele Yesu Klisto na bomoi na lolenge na Ye ya bosekwi ebongi nie kaka alati bilembo ya bobakami na maboko, makolo mpe mopanzi na Ye. Bobele Ye akoki koloba, “Nakati yo likolo lya biengindi bya maboko ma ngai.” 41 Bobele Ye akoki koloba: “Nazali Ye Oyo Atombolamaki.” Nazali Yesu oyo babakaki. Nazali Mwana ya Nzambe.” 42

Lokola Ivy moke mpe violon na ye, biso tozali na ndenge moko boye to mosusu naino kobanda. Solo mpenza, “liso emoni te, to litoi eyoki te, mpe lisusu yango ekoti kati ya motema ya moto, makambo Nzambe alengeli mpo na bango baoyo balingaka ye.” 43 Na bantango oyo tooki koyekola mingi na ntina ya bolamu ya Nzambe mpe makoki na biso ya bonzambe mpo ete bolingo ya Nzambe ekolaka kati na biso ntango tolukaka Ye mpe tosalisanaka. Na banzela ya sika mpe bisika ya sika, tokoki kosala mpe kokoma, molongo likolo ya molongo, boboto likolo ya boboto, moto na moto mpe elongo.

Bandeko mibali mpe basi ya bisika binso, ntango nakutanaka mpe toyekolaka na bino, natondisamaka na liyoki ya esengo ya nsango malamu mpe botondi. Litatoli mpe mobembo ya nsango malamu na bino ekomisaka litatoli na ngai mpe mobembo na ngai ya nsango malamu monene. Mitungisi mpe esengo na bino, bolingo na bino mpo na libota ya Nzambe mpe lingomba na biso ya Basantu, mpe bosaleli bososoli na bino ya bosolo ezongisama mpe pole ezali kobutisa litondi na ngai ya bozongisi nsango malamu yango, na Yesu Klisto na bomoi na katikati na yango. Banso totie motema, “na kati ya mapata mpe moi, Nkolo, azali elongo na Ngai.” 44 Toyebi soki tozali na bomoko, na kati ya mikumba mpe mitungisi na biso, tokoki kotanga mapamboli mingi maye ya biso. 45 Na makambo minene mpe ya mike-mike mpe ya pete, tokoki komona makambo minene kosalema na bomoi na biso. 46

“Mpe ekosalama ete bato ya sembo bakosangisama uta kati ya bikolo binso, mpe bakoya na Siona, koyembaka nzembo ya esengo ya seko.” 47 Na eleko ya ozana mpe aleluya, yemba aleluya—mpo Ye akoyangela libela na libela! Ganga ozana epai ya Nzambe mpe Mwana na Mpate! Na nkombo ya bule mpe esantu ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa