Likita Linene
Bosantu na Nkolo kati na Bomoi ya Mikolo Nyonso
Likita linene ya Sanza ya zomi 2024


14:17

Bosantu na Nkolo kati na Bomoi ya Mikolo Nyonso

Bosantu na Nkolo esalaka kozala na bomoi mokolo na mokolo bule. Ebelemisaka biso mpe ekomisaka biso na esengo koleka epayi ya Nkolo mpe moko na mosusu.

Bokutani na biso ya kala te ya libota esangisaki bolakisi ya talanta ya kosekisa, ya kobakisa na momekano ya kosekisa ya tata.

Kasi momekano oyo esalaki ya momesano te. Na ekipi moko ezalaki na Nkoko mobali (ngai) mpe mibale ya bana bankoko, ya mibu 12 mpe 11. Na ekipi mosusu ezalaki na pologalami (AI) ya mayele ya masini oyo ezalaki kotikikama na ndeko moko mpo na kolobela tata maseki na lolenge ya Gerrit W. Gong. Nkoko mobali Gerrit Gong kotelemela Mayele ya Masini (AI) Gerrit Gong.

Bana bankoko mpe ngai tokendaki liboso

Nini moto abengaka elima oyo abukakabukaka motuka na ye? montika ya Tilanozore.

AI Gerrit Gong apesamaki motindo—kanisa lokola Gerrit W. Gong. Solola lokola ye.

AI Gerrit Gong: “Tala liseki moko ya tata lokola soki kolobamaka na Gerrit W. Gong, kokamataka lolenge ya esengo, ya makanisi, mpe etongakaka: Mpo na nini nzete ya komikitisa esekisaka moke bato? Mpo na epika misisa kati na bolingo mpe esembolaka bitape ya boboto. Lokola nzete wana, biso mpe tokoki kozwa bokasi kati na misisa mpe esengo ya kolakisa boboto na basusu.”

Malamu, okanisi nini? Yango wana ebengami maseki ya tata.

Nyonso nzinganzinga na biso ezali mabaku mpo na koseka, kosepelisa, komona na miso ya botondi. Nsango malamu ya esengo mpe bosantu kati na bomoi ya mikolo nyonso ezali ya biso. Bosantu etiaka makambu pembeni mpo na ntina ya bule. Kasi bosantu ezali mpe kobengisa biso tokotisa bomoi ya mokolo na mokolo na makambo ya bule—kosepela na mampa ya mokolo na mokolo na katikati ya banzube mpe basende ya mokili oyo. Mpo na kotambola elongo na Nkolo, tosengeli kokoma santu, mpo ete Ye azali mosantu; mpe, mpo na kosalisa biso tokoma santu, Nkolo abengisi biso totambola elongo na Ye.

Tozali moko na moko na lisolo. Ntango Ndeko mwasi Gong mpe ngai tokutanaka na bino—Bandimi ya Eklezia mpe baninga na bisika mpe makambu mingi—masolo na bino ya bosantu na Nkolo kati na bomoi ya mikolo nyonso efulaka biso. Bozali na ba K nsambo: kosangana na Nzambe, kosangana na bato mpe koyokana mawa na moko na mosusu, komipesa mpe koyokana na Nzambe, libota mpe baninga—kotia na katikati Yesu Klisto.

Bosolo emonani na miso oyo ezali kokola ezali kobeta nsete likambo oyo ya motuya: bandimi ya boyambi bazali mwa mingi na esengo, nzoto kolongonu, mpe batondisami mingi koleka baye bazangi komipesa ya molimo to mokangano. Esengo mpe bosepeli ya bomoyi, bokolongonu ya moto mpe ya nzoto, ndimbola mpe ntina, ezalela mpe bolamu, kimoninga ya bato ya makasi, bolongobani ya mosolo mpe ya biloko—na emekoli moko na moko, basaleli ya boyambi bafulukaka.

Basepelaka na bokolongonu ya nzoto mpe ya moto mpe bosepeli ya bomoi makasi koleka na mibu mpe bituluku ya bato nyonso.

Oyo baluki babengaka “bolongobani ebongisama ya boyambi” epesaka pole, ntina, mpe bofuli endimaka makambo ya kokamwa. Ndako ya bondimi mpe lisanga ya Basantu ebundisaka kozala yo moko mpe liboke ya bato ya kokangama. Bosantu na Nkolo elobaka “te” na mopagano, “te” na mayele mabe na bobebisi mosolo ya basusu, “te” na nsango ya politiki mpe masolo oyo elukaka mosolo ya nkanda mpe polemiki. Bosantu na Nkolo elobaka “iyo” na bato ya limemia mpe ya bule, “iyo” na bokomi na bisomei ya bosomi, ya esengo, ya ezanga bokokani, ya malamu mpenza ntango tozali kolanda Ye kati na bondimi.

Bosantu na Nkolo kati na bomoi ya mikolo nyonso ezali lolenge nini?

Bosantu na Nkolo kati na bomoi ya mikolo nyonso ezali lokola bilenge ya mikolo mibale, babalani uta mobu moko, kokabolaka na bozangi bokokani mpe na kilo te mayokani ya nsango malamu, libonza, mpe mosala na bomoi na bango oyo ezali kokoma polele.

Abandi, “Na eteyelo ya likolo, nazalaki na esika ya molili. Nayokaki lokola Nzambe azalaki wana mpo na ngai te. Butu moko, nkoma uta na moninga moko elobaki, ‘Eh otangaki Alma 36 naino?’

Alobaki boye: “Ntango nabandaki kotanga, kimya mpe bolingo elongaki ngai. Nayokaki lokola bazalaki kopesa ngai ebeteli monene oyo. Ntango natangaki Alma 36:12, nayebaki ete Tata na Lola amonaki ngai mpe ayebaki mpenza lolenge nini nazalaki komiyoka.”

Akobaki, “Liboso nabala, nazaki bosembo na mobandi na ngai ete nazalaki na litatoli monene ya moko na zomi. Mpo na nini Nzambe asengaki biso topesa mosolo ntango basusu bazalaki na mingi mpenza ya kopesa? Mobandi na ngai asalisaki kolimbola ezali mpo na mosolo te kasi kolandaka motindo esengami epayi na biso. Amekaki ngai nabanda kofuta moko na zomi.

Alobaki boye: “Namonaki mpenza litatoli na ngai ekolaki.” Ntango mosusu mosolo ezali mingi te, kasi tomonaki mapamboli mingi mpenza mpe ntango mosusu mosolo ya kofuta ekokaki.”

Lisusu, “na kelasi na ngai ya kimonganga,” alobaki, “nazalaki mondimi se moko ya Eklezia mpe kaka moko oyo abalaki. Mbala mingi natikaki kelasi ya kotungisama to kolelaka mpo nayokaki baninga ya kelasi kotalaka ngai kobima mpe babandaki kosala bikoma mabe etali boyambi na ngai, elateli na ngai ya bilamba na ngai, to kobalaka na bolenge mpenza.

Nzokande akobi, “basanza motoba oyo eleki nayekolaki lolenge nini koloba malamu koleka bondimeli na ngai mpe kozala ndakisa malamu ya nsango malamu. Boyebi na ngai mpe litatoli na ngai ekolaki mpo namekamaki na makoki na ngai ya kotelema ngaimei mpe kozala mpiko kati na oyo nandimelaka.”

Elenge molongani ya mobali abakisi, “Liboso ya misio na ngai nandimaki kobeta baseball ya université. Kokamataka mokano ya mpasi, natiaki pembeni mikano wana mpe nakendaki kosalela Nkolo. Nakosala eloko moko te na mibu mibale wana.

Alobaki boye: “Kozonga na ndako, nakanisaki mbongwana ya mpasi kasi namimonaki makasi, mbangu, mpe nzoto kolongonu. Nazalaki kobwaka makasi koleka ntango nakendaki. Namipesaki kobeta mingi koleka ntango nakendaki, kobakisaka eteyelo oyo nalingaki kotangela mpenza. Mpe, oyo eleki ntina,” alobaki, “Nazali kotia motema na Nkolo koleka liboso.”

Asukisaki, “Lokola misionele nateyaki ete Tata na Lola alaki biso nguya na bansambo na biso, kasi ntango mosusu nabosanaka yango ngaimei.”

Bomengo na biso ya misionele ya bosantu na Nkolo ezali ya nkita mpe ya kofuluka. Misolo, ngonga, mpe makambu misusu ezalaka mbala mingi pete te. Kasi ntango bamisionele ya mibu mpe lolenge nyonso babulisaka bosantu na Nkolo, makambu ekoki kobonga engebene na ngonga mpe lolenge ya Nkolo.

Sikawa, na mibu 48 nsima, misionele moko ya mokolo akaboli, “Tata na ngai alingaki natanga na université, kasi nakende misio te. Moke nsima na yango, abelaki motema mpe akufaki na mibu 47. Nayokaki elindo. Lolenge nini nakokaki kobongisa makambu elongo na tata na ngai?

“Nsima,” akobi, “nsima nazwaki mokano ya kosala misio, namonaki tata na ngai na ndoto. Na kimia mpe ya kosepela, azalaki na esengo nalingaki kosala misio.”

Misionele oyo ya mokolo akobaki, “Ntango Malongi mpe Mayokani eteni ya 138 eteyaka, nadimi ete tata na ngai akokaki kosala lokola misionele kati na mokili ya milimo. Nazali komona na makanisi tata na ngai azali kosalisa nkoko na biso ya mobali, oyo alongwaki na Allemagne ntango azalaki na mibu 17 mpe abungaki na libota, amonani lisusu.”

Mwasi na ye abakisi, “Kati na bandeko mibali mitano na libota ya molongani na ngai, minei oyo basalaki misio bazali baoyo bazali na badipolome ya université.”

Bosantu na Nkolo kati na mikolo nyonso ezali lokola elenge misionele azonga oyo ayekolaki kotika ete Nzambe alonga na bomoi na ye. Na ebandeli, ntango asengamaki kopambola moto moko oyo azalaki maladi mpenza, misionele oyo alobaki, “Nazali na kondima; nakopambola ye mpo na kobika. Kasi,” misioneli oyo azonga alobi, “Nayekolaki kati na ngonga wana kosambela mpo na oyo nalingaki te, kasi mpo na oyo Nkolo ayebaki moto yango asengelaki na yango. Napambolaki ndeko mobali yango na kimia mpe libondisi. Nsima akufaki na kimia.”

Bosantu na Nkolo kati na mikolo nyonso ezali lokola montentei oyo ezali kodusola elamba mpo na kosangisa, kombodisa, kolendisa. Mosali moko ya bilo na université monene alobaka ete ayokaka bato oyo ayebi kaka na lokumu kosambela mpo na ye. Bato wana bapesaka bomoi na bango na université mpe bakobaka mpo na kobatela misio mpe bayekoli na yango.

Ndeko mwasi moko asalaka nyonso oyo akoki mokolo na mokolo, nsima mobali na ye azangaki bosembo epayi na ye mpe bana. Nasepelaka na ye makasi, mpe basusu lokola ye. Mokolo moko ntango azalaki kongumba bilamba, loboko na ye likolo ya liboke ya bilamba, amilobelaki, “Mpo na nini boye?” Ayokaki mongongo ya boboto kondimisa ye, “Boyokani na yo ezali na ngai.”

Mibu 50, ndeko mwasi mosusu azalaki koluka kiboninga na tata na ye. “Na kokolaka,” elobaka ye, “ezalaki bandenko na ngai ya mibali mpe tata na ngai, mpe nsima ezalaki ngai—mwana mwasi se moko. Nyonso oyo nalingaki kaka kosala ‘malamu ekoka’ mpo na tata na ngai.

“Nsima, mama na ngai akufaki! Azalaki mokangano na ngai bobele moko katikati na tata na ngai mpe ngai.

Ndeko mwasi alobaki boye: “Mokolo moko, nayokaki mongongo moko koloba, ‘Bengisa tata na yo mpe mema ye na tempelo elongo na yo.’ Wana ezalaki ebandeli kobima ya mbala mibale sanza na sanza elongo na tata na ngai mpo na kokende na ndako ya Nkolo. Nayebisaki tata na ngai ete nalingaka ye. Ayebisaki ngai ete alingaka ngai mpe.

“Kolekisaka ntango na ndako ya Nkolo ebikisaki biso. Mama na biso akokaki kosalisa biso te na mabele. Esengelaki azala na ngambo mosusu ya elamba mpona kosalisa abongisa oyo ezalaki ya kobukana. Tempelo ebakisaki mobembo na biso ya kokende na bofuluki lokola libota ya seko.”

Tata alobi, “Kobulisama ya tempelo ezalaki likambo monene ya molimo mpo na ngai mpe mwana na ngai ya mwasi se moko. Sikawa tokendaka elongo mpe toyokaka bolingo na biso kolendisama.”

Bosantu na Nkolo kati na bomoi ya mikolo nyonso esangisaka bangonga ya boboto ntango balingami bakufaka. Na ebandeli ya mobu oyo, mama na ngai ya bolingo, Jean Gong, akotaki na mikolo ya bomoyi oyo elandaki yambo ya mibu 98 ya mbotama na ye.

Soki botunaki mama na ngai, “Okolinga keleme ya rocky road, ya sokola ya mpembe mpe ya tangawisi to ya feleze?” Mama na ngai alingaki koloba, “iyo, nasengi, nakoki komeka moko na moko?” Nani akokaki koloba “te” na mama na bino, mingi mingi ntango alingaki makambo nyonso ya bomoyi?

Natunaki Mama mokolo moko mikano nini esalaki mpenza bomoi na ye.

Alobaki, “Kobatisama lokola mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe kolongwaka na Hawaii mpo na kokende na mabele monene, wapi nakutanaki na tata na yo.”

Kobatisama na mibu 15, moto obele moko ya libota na ye monene ya kokota na Eklezia na biso, mama na ngai azalaki na kondima mpe elikya kati na Nkolo oyo apambolaki bomoi na ye mpe bankola nyonso ya libota na biso. Nazangaka mama na ngai, lokola bozangaka bato kati na libota na bino. Kasi nayebi ete mama na ngai akenda te. Azali kaka awa sikawa te. Natosaka ye mpe baso oyo bakufak lokola bandakisa ya bilombe ya bosantu ya mikolo nyonso na Nkolo.

Solo, bosantu na Nkolo kati na mikolo nyonso esangisi koyaka mbala mingi na Nkolo na ndako na Ye esantu. Oyo ezali solo, atako soki tozali bandimi to baninga ya Eklezia.

Baninga misatu bayaki na bofungoli ndako ya Tempelo ya Bangkok Thailand.

“Oyo ezali esika ya lobiko ya kafukafu,” elobaki moko.

Na liziba ya libatisi, mosusu alobaki, “Ntango nazalaka awa, nalingaka kosukwama peto mpe kosumuka lisusu te.”

Ya misato alobaki, “Ekoki bino koyoka nguya ya molimo?”

Na maloba ya bule libwa, batempelo na biso ebengisaka mpe esakolaka:

“Bosantu na Nkolo.”

“Ndako ya Nkolo.”

Bosantu na Nkolo esalaka kozala na bomoi mokolo na mokolo bule. Ezali kobenda biso penepene mpe esengo mingi na Nkolo mpe moko na mosusu mpe ebongisaka biso mpo na kofanda elongo na Nzambe Tata na biso, Yesu Klisto, mpe balingami na biso.

Lokola esalaki moningana ngai, bokoki kokamwa soki Tata na bino na Lola alingaka bino. Eyano ezali iyo moko ya koyokana, ya solo! Tokoki koyoka bolingo na Ye ntango tozali kosala bosantu epayi ya Nkolo ya biso mokolo na mokolo, esengo mpe libela. Tika tosala bongo, nabondeli na kombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Uta na bantango ya Kondimana na Kala, toteyami, “Yango wana bomibulisa mpe bozala bule mpo ete ngai nazali bule” (Levitiki 11:44). Tosengeli kotambola na bosantu liboso ya Nkolo (tala Malongi mpe Mayokani 20:69), kotelema na bisika bisantu (tala Malongi mpe Mayokani 45:32), kobatela mokolo ya Sabata bule (tala Esode 20:8), kolata bilamba ya bule (tala Esode 29:29), kosalela mafuta na bule (tala Esode 30:25), kopambolama na baprofeta basantu (tala Malongi mpe Mayokani 10:46), mpe koyekama na makomi masantu (tala Malongi mpe Mayokani 20:11), mibeko esantu (tala Malongi mpe Mayokani 20:20), banjelu basantu (tala Malongi mpe Mayokani 20:6), Bosantu na Nkolo ezali mpo na kopambola ndenge nyonso ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo

  2. Tala Mose 6:34

  3. Tala “Religion and Spirituality: Tools for Better Wellbeing?,” Gallup Blog, Oct. 10, 2023, news.gallup.com. “Na mokili mobimba, bato oyo bamipesi mingi na makambo ya elimo to na lingomba bazali na bolamu ya malamu koleka na makambo mingi”—elongo na mayoki ya malamu, mayoki ya mokano, boyokani na bato ya mboka mpe boyokani na bato (Bondimi mpe Bolamu: Boyokani ya mokili mobimba kati na Molimo mpe Bolamu [2023], 4, faithandmedia.com/research/gallup).

  4. Likambo moko na moko oyo ekomami ekabolami—na bosepeli mpe esengo na ngai —na maloba ya bato na bato oyo bazali na likambo yango mpe na ndingisa na bango.

  5. Lelo na Eklezia, bilenge mikolo ya mibu 18–35 (kotangaka bilenge minzemba mpe bilenge mikolo oyo babala) mpe mikolo oyo bazali minzemba (mibu 36–45) bazali na ndambo moko likolo na misato (32,5 na mokama) ya bandimi nyonso ya Eklezia. Na bandimi wana ya Eklezia milio 5.623, bilenge mikolo ya mibu 18–35 na motango mobimba na motango 3.625 milio (kati na yango 694.000 babalani), mpe mikolo minzemba ya mibu 36–45 mobimba na motango 1.998 milio. Bilenge na biso mpe mikolo minzemba bazali mpenza ya kokamwa; moko na moko ezali na motuya mingi. Moko na moko azali na lisolo ya bondimi, boluki, makasi, mpe mawa. Ndakisa ekabolami awa ezali botalisi ya molongo molayi ya masolo mpe makambu bilenge mpe bakolo minzemba bakabolaka ntango nakutanaka na bango na bisika mpe makambu mingi na Eklezia mobimba.

  6. Na mikolo oyo, bamisionele 77.500 misusu bazali kosala kati na misio 450 na mokili mobimba. Oyo esangisi bilenge basionele ya koteya, bilenge misionele ya mosala, mpe babalani ya mikolo, kasi bamisionele ya mikolo ya mosala mpe ya basali bazanga lifuti ya ntango molayi 27.800. Lisolo ya misionele moko na moko, uta na bolengeli kino mosala mpe bozongi, ezali ya moto na moto mpe etonda bosantu na Nkolo na makambu ya moto ye moko.

    Makambu bamisionele mingi bakutanaka na yango ezali kotalisa ndakisa moko ya molimo. Oyo ezali na litatoli ya moto na moto ya libengisi mpe lisalisa basusu ezanga lifuti mpo na koya epayi ya Yesu Klisto mpe ya misionele kokomaka moyekoli ya Yesu Klisto mpe misionele ya Teya Nsango malamu na Ngai . Bamisionele yaTeya Nsango malamu na Ngai babongwanaka, kutu kobongolama, na nzela ya makambu ya matatoli na bango. Bayekolaka kolinga bato, bisika, nkota, mpe bonkoko. Bakokisaka lisakoli na komemaka esengo malamu ya bokokisi ya bozongisi ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto na bikolo, nkota, mpe bato na bamboka mingi. Bamonaka bolamu kati na koyekola kobika na moninga nyonso. Basalaka na bandimi, bakambi, mpe baninga kati na makambu mpe bawuti bipayi mingi, mpe mingi mpenza koleka.

    Bamisionele yaTeya Nsango malamu na Ngai baleisaka bondimi mpe elikya. Batongaka bakimoninga ya kobulisama. Bayekolaka ete botosi ememaka mapamboli mpe makamwisi. Na ndenge ya moto na moto mosusu mingi, bakomaka solo mpe bayebaka na nzela ya boyokani: “Nazali moyekoli ya Yesu Klisto, Mwana na Nzambe.” (3 Nefi 5:13).

  7. Basusu ya bandimi ya Eklezia, bandeko basi mpe bandeko mibali na biso ya bondimi mpe mpiko mpenza bamimonaka kokutanaka na bizalela bakanelaki mokolo moko te mpe bakolinga kopona mokolo moko te. Basantu oyo ya solo bakobaka kokende liboso, ngonga nyonso mpe mikolo nyonso, mbala mingi kozelaka Nkolo. Nkolo ayebi moko na moko, mpe na ndakisa oyo akabolaka na boboto, zalaka na mposa ya koyikisa mpiko mpe kolendisa moko na moko na biso na ngonga mpe lolenge na Ye.

  8. Ezali na bamposa mingi ya mikangano na baboti mpe bana. Nazali na botondi makasi mpo na ezalela moko na moko kati na yango, kutu nsima ya mibu mingi, boyokani lisusu, bolimbisi, mpe boyokani ya kozala ekelamaka to ezongisamaka. Ndeko mwasi oyo ya malamu alingaka lisusu kokanisa na lolenge ya mabe na oyo etali tata na ye te. Alobaki, “Azali mokambi malamu mpe ya bosembo mpe tata malamu.

  9. Bokeseni moko ya kimoboti ezali ete bana batongamaka na mozindo na lolenge baleisamaka, kasi bamikundolaka mbala mingi moke na oyo etali mibu ya ebandeli ntango bamama na bango baleisaka bango ntango nyonso, na boluki lifuti te. Maloba ekokoka te mpo na koloba bosolo engebene na oyo ya ngai bososoli, bolingo, mpe bosepeli mpo na tata mpe mama na ngai esembolamaki mpe ekomaki makasi ntango nakomaki molongani, moboti, mpe nkoko. Kotalisaka lolenge ya nkola ya mwango ya esengo, tokoki, na matalatala ya tempelo ya boseko, komimona lokola mama, nkoko, mama ya nkoko na lolenge moko mpe lokola mwana mwasi, nkoko mwana, nkokololo ya mwasi na lolenge mosusu.

  10. Lelo oyo kolandisama na pourcentage 60 ya bandimi ya Eklezia ya mokili mobimba bavandi mosika te na na ba miles (80 kilometeleto penepene ngonga moko ya kobembuka na bisika ebele) mpo na ndako ya Nkolo. Na mibu ekoya, lokola malembe malembe kosilisa ya batempelo elobamaki, penepene ya bandimi ya Eklezia biteni misato na minei bakozala kovanda pembeni ya ndako ya Nkolo. Engebene na makambu, wana ezali na elikya pene ekoka ya kokoma mbala mingi epayi ya Nkolo kati na ndako na Ye ya Bule, kuna kopambolaka bankola ya bato ya libota ya motuya mpe bisomei mpe bana na biso.

  11. Likolo ya batempelo na biso, nkoma eyebana ezali: “bosantu na Nkolo, ndako ya Nkolo.” Mwa batempelo ekotisaka mingi koleka nkoma oyo, ndakisa kobakisaka nkombo ya Eklezia. Batempelo ezali na makomi oyo ezongisami nsima: “Ndako ya Nkolo, Bosantu mpo na Nkolo” (na Atlanta, Los Angeles, mpe San Diego na Etazini). Makomi ya Tempelo ya Logan Utah elobi kaka, “Bosantu mpo na Nkolo.”