Likita Linene
Esengo ya Bosikoli na Biso
Likita linene ya Sanza ya zomi 2024


12:9

Esengo ya Bosikoli na Biso

Bolingo mpe nguya ya Yesu Klisto ekoki kobikisa mokomoko na biso uta na mabunga, botau, mpe masumu na biso mpe kosunga biso tokoma eloko moko ya motuya.

Mibu 10 eleki nazwaki makanisi ya kopakola langi ya liyemi ya Mobikisi. Atako nazali mosali ntoki, yango emonanaki mwa kolekela ngai. Lolenge nini ngai nasengelaki kapakola langi na liyemi ya Yesu Klisto oyo ekangaki Molimo na Ye? Nasengelaki kobandela wapi? Mpe nalingaki kozwila ntango wapi?

Kutu na mituna na ngai, nazwaki mokano ya kokende liboso mpe kotia motema ete Nkolo akosalisa ngai. Kasi nasengelaki kokoba mpe kotika makoki epayi na Ye. Nasambelaki, namanyolaki, nalukaki, mpe nayemaki, mpe napambolamaki mpo na kozwa lisalisi mpe makoki. Mpe oyo ezalaki etando ya pembe ebandaki kokoma eloko ya motuya.

Mosala ya koyema Mobikisi ezali kosalema.

Lolenge ya kosalela ezalaki pete. Ntango mosusu ezalaki komonana lokola nalikyaki te. Ntango mosusu ezalaki bangonga efulama mpe ya makanisi. Mpe bangonga mingi, nasengelaki kaka komeka lisusu mpe lisusu mpe lisusu.

Ntango nakanisaki etando langi ya mafuta esilaki kotiama mpe ekawukaki, nabandaki kotia veleni oyo ekomonisa na kati mpo na kobatela yango uta na mbindo mpe putulu. Nakosalaka yango, namonaki ete nsuki kati na etando ebandaki kobongwama, kotandolama, mpe kolimwa. Nasosolaki na lobango ete natiati veleni noki mpenza, ete eteni ya etando ezalaki naino ya kowuka te!

Napangusaka eteni moko ya etando elongo na veleni. O, motema na ngai ebebaki. Namiyokaki lokola ete nabebisaki oyo Nzambe asalisaki ngai nasala. Nalelaki mpe namiyokaki maladi na kati. Na kozanga elikya, nasalaki maye moto kani alingaki mpenza kosala na ezalela moko lokola oyo: Nabengaki mama na ngai. Alobaki na bwania mpe kimia, “Okozongisa oyo ozalaki na yango te, kasi sala nyonso okoki na oyo ozali na yango.”

Mosala ya koyema Mobikisi esili.

Mpe Naliaki, na Kristin M. Yee

Yango wana nasambelaki mpe nabondelaki mpo na lisalisi mpe napakolaki langi butu mobimba mpo na kobongisa makambo. Mpe namikundoli kotalaka etando yango na ntongo—emonanaki malamu koleka oyo emonanaki liboso. Boniboni yango ekokaki kosalema? Oyo nakanisaki ezalaki libunga ezanga kisi nzokande, ezalaki libaku mpo na loboko na Ye ya boboto emonisama. Asilisaki te na bopakoli langi, mpe Asilisaki te na ngai. Esengo mpe libondi nini etondaki na motema na ngai. Nasambelaki Nkolo mpo na boboto na Ye, mpo na likamwisi oyo ebikisaki kaka etando te kasi eteyaki ngai mingi oyo etali bolingo mpe nguya na Ye ya kobikisa moko na moko na biso uta na mabunga, botau, mpe masumu na biso mpe kosalisa biso tokoma eloko moko ya motuya.

Kaka ntango mozindo ya botondi na ngai mpo na Mobikisi ekolaki lokola Asalisaki na boboto mpo na kobongisa etando “ya kobongisama te”, lolenge moko bolingo mpe botondi na ngai moko mpo na Mobikisi na ngai ekolaki, ntango nalukaki kosala elongo na ye na oyo etali botau na ngai mpe kolimbisama na mabunga na ngai. Nakozala na botondi mpo na libela epayi ya Mobikisi na ngai ete nakoki kobongwama mpe kosukolama. Azali na motema na ngai, mpe nalikii kosala nyonso oyo Ye alingi ngai nasala mpe nakoma.

Koyambola epesaka biso nzela toyoka bolingo ya Nzambe mpe toyeba mpe tolinga Ye na ndenge tolingaki mokolo moko te na lolenge mosusu koyeba. Mpo na mwasi oyo apakolaki makolo ya Mobikisi mafuta, alobaki, “Masumu na Ye, oyo ezali ebele, elimbisami; mpo alingaki mingi: kasi ye oyo alimbisami moke azali na bolingo moke.” Alingaki Yesu mingi, mpo ete Alimbisaki ye mingi.

Ezali na libondi mpe elikya mpenza na koyebaka ete tokoki komeka lisusu—ete, lokola Mpaka David A. Bednar ateyaki, tokoki kozwa bolimbisi ya masumu na biso ntango nyonso na nzela ya nguya ya kosantisama ya Molimo Mosantu ntango toyamboli mpenza na bosembo mpe motema moko.

Nguya ya kosikola ya Yesu Klisto ezali moko ya mapamboli minene mpenza elakama ya mayokani na biso. Bomaniola yango ntango bozali kosangana elongo kati na makuli ya bule. Soki yango te, tokoki kozonga te na miso ya Tata na biso na Lola mpe ya baoyo tolingaka.

Nayebi ete Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azali na nguya mpo na kobikisa. Lokola Mwana ya Nzambe, oyo amikabaki mpo na masumu ya mokili mpe apesaki bomoi na Ye moko mpe akamataki yango lisusu, Asimbi nguya ya bosikoli mpe bosekwi. Azalisaki bozangi kufa mpo na banso mpe bomoi ya seko mpo na baoyo baponaka Ye. Nayebi ete na nzela ya libonza na Ye ya bomikabi, tokoki koyambola mpe solo kosukolama mpe kosikolama. Ezali likamwisi Alingi yo mpe ngai na lolenge oyo.

Alobaki, “Ekoya bino te sikawa epayi na ngai, mpe koyambola masumu na bino, mpe kobongwana, ete nakoka kobikisa bino?” Akoki kobikisa bisika ya mbindo” ya molimo na biso—bisika bikawusama, makasi, mpe ya mosika na lisumu mpe mawa—mpe “kokomisa esobe [na yo] lokola Edene.”

Kaka lokola tokoki kososola mpasi mpe monyoko ya Klisto ya makasi na Getesemane mpe na ekulusu ete, yango wana biso “tokoki komeka molayi ya ndelo mpe koyeba mozindo ya bozambe ya bolimbisi,” ngolu, mpe bolingo [na Ye] te.

Okoki koyoka bangonga mususu ete ekoki kosalema te osikolama, ete ntango mosusu ozali ya kokesana epayi ya bolingo ya Nzambe mpe nguya ya kosikola ya Mobikisi mpo na oyo ozaleli kobundela na yango to mpo na oyo osali. Kasi natatoli ete bozali na nse ya loboko ya Nkolo te. Mobikisi “akitaki na nse ya makambo nyonso” mpe azali kati na esika ya bonzambe mpo na kotombola yo uta na libulu ya molili mpe komema yo kati na “moi na ye ya kokamwisa.” Na nzela ya minyoko na Ye, Asalaki nzela mpo na moko na moko na biso alonga botau mpe masumu na biso moko. “Azali na nguya nyonso mpo na kobikisa moto nyonso oyo akondima na nkombo na ye mpe akobimisa mbuma oyo elongobani mpo na boyamboli.”

Kaka lokola esengaka mosala mpe kobondela lisalisi ya lola mpo na kobongisa etando, ezwaka mosala, bosembo ya motema, mpe bomikitisi mpo na “kobimisa mbuma oyo elongobani mpo na boyamboli.” Bambuma oyo ezali na kosaleka bondimi mpe elikya na biso kati na Klisto mpe libonza na Ye ya bomikabi, kopesaka epayi na Nzambe motema ebukana mpe molimo ya mawa, kotubelaka mpe kotikaka masumu, kozongisaka oyo ebebisami mpo na bolamu ya makoki na biso, mpe kolukaka kobika na bosembo.

Mpo na koyambola na solo mpe kobongwana, tosengeli yambo “kondima masumu na biso.” Moto amonaka bosenga ya komela kisi te soki asosoli te ete azali kobela. Ekoki kozala na ngonga oyo tozali na bolingi te ya kotala kati na bisomei mpe komona ete nini esengi kobikisa mpe kobongisa.

Na makomi ya C. S. Lewis, Aslan azali koloba maloba oyo epayi ya moto moko oyo amikotisaki na mitambu na ye moko: “O [moto ya mokili], na makoki ya lolenge nini ozali komibatela [uta] na nyonso oyo ekokaki kosala yo malamu!”

Bipayi wapi ekoki yo mpe ngai komibatela uta na makambu oyo ekokaki kosala biso malamu?

Tika tomibatela uta na bolamu oyo Nzambe azali na mposa ya kopambola biso na yango. Uta na bolingo mpe boboto oyo Azali na mposa ete biso toyoka. Uta na mwinda mpe boyebi oyo Azali na mposa ya kopesa biso. Uta na libiki oyo Ayebaka ete tozali na yango mposa mpenza. Uta na mokangano ya boyokani ya mozindo koleka Akanaka mpo na bana na Ye mibali mpe basi nyonso.

Nasambeli ete tokoka kobwaka “manduki ya bitumba” kani” oyo tokamati na koyeba to kutu kozanga koyeba mpo na komibatela uta na bolingo ya Nzambe. Manduki ya lolendo, kimoyimi, kobanga, koyina, kotuka, nsai, bozangi sembo ya kosambisa, bazuwa—eloko kani oyo ekopekisa biso kolinga Nzambe elongo na mitema na biso nyonso mpe kotosa mayokani na biso nyonso elongo na Ye.

Ntango tozali kosalela mayokani na biso, Nkolo akoki kopesa biso lisungi mpe nguya tosengeli mpo na koyeba mpe kolonga botau na biso, kobakisa mpambampamba ya lolendo ya molimo. Profeta na biso alobi:

“Boyamboli ezali nzela ya bopeto, mpe bopeto ememaka nguya.”

“Mpe, o, lolenge nini tokozala na mposa ya nguya na Ye na mikolo ekoya.”

Lokola etando na ngai, Nkolo asilisi kosala elongo na biso te ntango tosali libunga, to akimaka te ntango tobetaka libaku. Bosenga na biso mpo na libiki mpe lisalisi ezali bozito te epayi na Ye, kasi ntina mpenza oyo Ayelaki. Mobikisi Yemei alobaki:

“Tala, nayei epayi ya mokili mpo ya komeme bosikoli bwa mokili, mpo ya kobikisa mokili uta o masumu.”

“Loboko la ngai la ngolu lotandolami ona bino, mpe onso oyo akoya, nakoyamba ye; mpe bapambolami bango baye bakoya epayi ya ngai.”

Boye yaka—yaka, bino oyo bolembi, bosili makasi, mpe na mawa; boya kotika misala na bino mpe bozwa kimia39kati na Ye oyo alingaka bino mingi mpenza. Bokamata ekangeli na Ye likolo na bino, mpo Azali boboto mpe motema mosokemi.

Tata na biso na Lola mpe Mobikisi bamonaka bino. Bayebi motema na bino. Bayokaka maye boyokaka mpasi na motema, kobakisaka baye bolingaka.

Mobikisi akoki kosikola oyo esili kobunga, kobakisaka mikangano ya kobukana mpe ekatana. Asalaki nzela mpo na banso oyo bazali ya kokweya basiolama—mpo na kopema bomoi kati na oyo eyokanaka ya kokufa mpe kozanga elikya.

Soki ozali kobunda na ezalela moko oyo okanisi osengeli kosila kolonga sikawa, kotika te. Zala na motema molai na yomei, batela mayokani na yo, yambola mbala mingi, luka lisalisi ya bakambi na yo soki esengeli, mpe kende na ndako ya Nkolo mbala na mbala bo ekoki yo Yoka mpe salela makebisi Azali kotindela yo. Akotika mokangano ya boyokani elongo na yo Ye te.

Ezalaki na mikangano ya mpasi mpe mindondo na bomoi na ngai oyo nabundaki na yango mpe na bosembo nalukaki kobongisa. Ntanga mosusu nazalaki komiyoka lokola kokweya mbala mingi koleka kokoka yango. Namitunaki, “Ebongisaki ngai te biloko mbala eleki? Elongaki ngai te botau na ngai?” Nayekolaki nsima ya ntango ete nazalaki mpenza semba te; kasi, ezali mbala mingi na mingi ya kosala mingi ya kobikisa oyo esengelami.

Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki: “Solo Nkolo asekaka moke likolo ya moko oyo ayaka na bososoli ya bolongobani, oyo asalaka na sikisiki mokolo na mokolo mpo na kosobitina botau na bokasi. Boyamboli ya solo, mbongwana ya solo ekoki kosenga bomeki ya kozongela, kasi ezali na likambu moko kitoko mpe esantu na bomeki ya boye. Bolimbisi mpe libiki ya Nzambe etiolaka na pete epayi ya molimo ya boye.”

Mokolo na mokolo ezali mokolo ya sika etondisami na elikya mpe makoki ya kosala mpo na Yesu Klisto. Mokolo na mokolo bino mpe ngai tokoki koya koyeba, lokola Mama Eva asakolaki, “esengo ya bosikoli na biso,” esengo ya kokomisamaka mobimba, esengo ya koyokaka bolingo ya sikisiki ya Nzambe mpo na bino.

Nayebi ete Tata na biso na Lola mpe Mobikisi balingaka bino. Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli ya bato nyonso. Azali na bomoi. Na nzela ya libonza ya bomikabi na Ye, nkanga ya masumu mpe liwa ebukamaki mpo na libela mpo ete biso tokoka na bonsomi kopona libiki, bosikoli, mpe bomoi ya seko elongo na baye tolingaka. Mpe natatoli makambo nyonso oyo na nkombo na Ye, Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Matai 19:26.

  2. “Ntango tosali boyokani na Nzambe, tobiki na bonsomi ya seko. Nzambe akotika te mokangano na Ye na baoyo basali mokangano ya lolenge oyo na Ye. Na yango, baoyo nyonso basali boyokani na Nzambe bazali na ndingisa ya bolingo mpe ngolu ya monene. Na lokota ya Baebele, bolingo ya boyokani wana ebengami hesed (חֶסֶד)” (Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” Liahona, Oct. 2022, 5).

  3. “Ntango yo na ngai tokoti na nzela lisusu na nzela yango, tokomi na nzela ya sika ya bomoi. Nde tokelaka mokangano elongo na Nzambe oyo epesaka Ye ndingisa ya kopambola mpe kobongola biso. Nzela yango ekambaka biso tozonga epayi na Ye. Soki totiki Nzambe akamba babomoi na biso, boyokani yango ekokamba biso pembeni mpenza ya Ye. Mayokani nyonso esengeli koyokana. Ekelaka mokangano na basinga ya libela” (Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” 5).

  4. Tala Alma 26:35–36.

  5. Tala Alma 22:18: “Nakotika masumu na ngai nyonso mpo na koyeba yo.”

  6. Luka 7:47; tala lisusu biteni 37–50.

  7. Na ntina ya elambo, Mpaka David A. Bednar alobaki:

    “Ntango tomibongisi na makanisi na biso mobimba mpe tosangani na makuli oyo ya bule elongo na motema ebukani mpe molimo etutami, boye elaka ezali ete tokoki ntango nyonso kozala na Molimo ya Nkolo elongo na biso. Mpe na nzela ya nguya ya kosantisama ya Molimo Monsantu lokola moninga na biso ya ntango nyonso, tokoki ntango nyonso kozwa bolimbisi ya masumu na biso” (“Always Retain a Remission of Your Sins,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 61–62).

    “Na lolenge ya kosalela ya koyaka epayi ya Mobikisi, mpe mbotama lisusu ya molimo, koyambaka nguya ya kosantisa ya Molimo Mosantu kati na bomoi na biso ekelaka makoki ya bosukwami ya ntango nyonso ya molimo na biso uta na lisumu. Lipamboli oyo ya esengo ezali ntina mpo ‘eloko moko te ya mbindo ekoki kofanda na Nzambe’ [1 Nefi 10:21]” (“Always Retain a Remission of Your Sins,” 61).

    Mpaka Bednar ateyaki na seminele ya bakambi ya missio 2023: “Mpe na nzela ya nguya ya bopetolami ya Molimo Mosantu lokola moninga na biso ya ntango nyonso, tokoki ntango nyonso kozwa bolimbisi ya masumu na biso. Bongo, nsango malamu ya Yesu Klisto epesaka, mabaku ya mibale, mpe ya misato, mpe ya minei, mpe ezanga nsuka mpo na kozwa bolimbisi ya masumu na biso” (na Rachel Sterzer Gibson, “Teach to Build Faith in Jesus Christ, Elder Bednar Instructs,” Church News, Sanza ya motoba 23, 2023, thechurchnews.com).

  8. “Profeta Joseph Smith akomisaki mokuse mpenza mosala ya ntina ya makuli ya bonganganzambe kati na nsango malamu ya Yesu Klisto: ‘Kobotamaka lisusu, eyaka na Molimo ya Nzambe na nzela ya makuli’ [Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 95]. Lisakola oyo ya mozindo ebeti nsete na misala ya nyonso mibale Molimo Mosantu mpe makuli ya bule kati na lolenge ya kosalele ya mbotama lisusu ya molimo. …

    “Makuli masantu ezali na katikati ya nsango malamu ya Mobikisi mpe na kati ya lolenge ya kosalela ya koyaka epayi na Ye mpe kolukaka mbotama lisusu ya molimo. …

    “Makuli ya lobiko mpe bonetolami oyo esalaka na Eklezia ezongisama ya Nkolo ezali mosika koleka milulu to masano ya elembo. Kasi, esalaka banzela epesama ndinga kati na yango mapamboli mpe nguya ya lola ekoki kokota na bomoi na biso ya moto na moto. …

    “Makuli oyo ezwami mpe etosami na bosembo ezali ntina mpo na kozwa nguya ya bonzambe mpe mapamboli nyonso oyo ezwami na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi” (David A. Bednar, “Always Retain a Remission of Your Sins,” 59–60).

  9. Tala Yoane 10:17–18; 3 Nefi 9:22.

  10. Tala Bobongoli ya Joseph Smith, Yoane 1:16; Yakobo 6:9; Mose 1:39.

  11. Tala Alma 12:33–34.

  12. Tala Yoane 3:16.

  13. 3 Nefi 9:33.

  14. “Nabondeli na bino boya epayi na Ye mpo ete Akoka … kobikisa bino uta na lisumu ntango boyamboli. Akobikisa bino na mawa mpe bobangi. Akobikisa bino na bampota ya mokili oyo” (Russell M. Nelson, “Eyano Ezali Ntango nyonso Yesu Klisto,” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 127).

  15. Yisaya 51:3; tala lisusu Yisaya 58:10–12; Ezekiele 36:33–36.

  16. James E. Talmage, Jesus the Christ (1916), 265.

  17. Tala Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” 5–7; tala lisusu makomi ya nse 2 mpe 3 kati na nsango oyo.

  18. Malongi mpe Mayokani 88:6; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 122:7–9.

  19. 1 Petelo 2:9; tala lisusu Alma 26:16–17.

  20. Alma 12:15; nsete ebetami.

  21. Tala Alma 34:17.

  22. Tala 2 Bakolinti 7:10; 3 Nefi 9:15–22.

  23. Tala Malongi mpe Mayokani 95:8; 64:7.

  24. Tala Mosiya 27:32–37; Alma 26:30.

  25. Tala Malongi mpe Mayokani 1:32.

  26. Tala Alma 42:8–16.

  27. Tala Robert L. Millet, Becoming New: A Doctrinal Commentary on the Writings of Paul (2022), 26.

  28. C. S. Lewis, The Magician’s Nephew (1955), 185.

  29. Tala Mosiya 4:6–9.

  30. (Tala Alma 12:9–10; 26:22; 3 Nefi 26:9.

  31. “Nzela ya boyokani etali mokangano na biso na Nzambe” (Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” 11; tala lisusu makomi ya nse 2 mpe 3 kati na nsango oyo).

  32. Tala Alma 24:17–19.

  33. Tala Malongi mpe Mayokani 67:10.

  34. Tala Yakobo 2:35. “Baye bamonaka botau na bango te bakendaka liboso te. Boyebi ya botau na bino ezali lipamboli ndenge ezali kosalisa bino botikala na bomikitisi mpe ezali kobatela bino botala epayi ya Mobikisi. Molimo azali kaka kolendisa bino te, kasi Azali lisusu mosali na nzela ya oyo Bomikabi esalaka mbongwana na bomoto na bino mpenza. Na nsima, biloko ya botau ekomaka ya makasi” (Henry B. Eyring, “My Peace I Leave with You,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 16).

  35. Russell M. Nelson, “Tokoki Kosala Malamu mingi mpe Kozala Malamu mingi,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 68.

  36. “Makambo nyonso eteyami na tempelo, na nzela ya malako mpe na nzela ya Molimo, ebutisaka bososoli na biso ya Yesu Klisto. Makuli na Ye ya ntina ekangisaka biso epayi na Ye na nzela ya mayokani ya bule ya bonganganzambe. Nsima, ttango tobatelaka mayokani na biso, Apambolaka biso na nguya na ya Ye nguya ya kobikisa ya kolendisa. Mpe o, lolenge nini tokozala na mposa ya nguya na Ye na mikolo ekoya” (Russell M. Nelson, “Tempelo mpe Moboko na Yo ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 93–94).

  37. 3 Nefi 9:21.

  38. 3 Nefi 9:14.

  39. Tala Erik Dewar, “Come Find His Rest” (song, 2024); tala lisusu Matai 11:28–30.

  40. Tala Dutelonomi 30:20; Yoane 11:25; Etele 3:14; Malongi mpe Mayokani 88:6, 13.

  41. “Bandeko na ngai balingami, oyo ezali elaka na ngai. Eloko moko te ekosalisa bino mingi kosimba makasi na lingenda ya libende koleka bokumbameli kati na tempelo mbala na mbala ntango makambo na bino epesi ndingisa. Eloko moko te ekobatela bino koleka ntango bokokutana na mimekano ya mokili. Eloko moko te ekolendisa litatoli na bino ya Nkolo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye to ekosalisa bino bososola mwango monene ya Nzambe koleka. Eloko moko te ekobondisa mingi molimo na bino na ntango ya mpasi. Eloko moko te ekofungola balola koleka. Eloko moko te! (Russell M. Nelson, “Bosepela na Likabo ya Bafungola ya Bonganganzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 122).

  42. Tala Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” 5.

  43. Tala Russell M. Nelson, “Eyano Ezali Ntango nyonso Yesu Klisto,” 127; tala lisusu nkoma ya nse 14 kati na nsango oyo.

  44. D. Todd Christofferson, “The Divine Gift of Repentance,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2011, 39.

  45. Mose 5:11.

  46. Tala 2 Nefi 2:26–28.